Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Kozala moboti malamu esɛngaka nini?

Oteyaka bana na yo bálinga Nzambe?

Ndako oyo baboti balinganaka mpe bapesanaka limemya ezalaka esika malamu mpenza mpo na kobɔkɔla bana. (Bakolose 3:14, 19) Baboti ya malamu balingaka bana na bango mpe bakumisaka bango kaka ndenge Yehova akumisaki Mwana na ye.​—Tángá Matai 3:17.

Tata na biso ya likoló ayokaka basaleli na ye mpe atyaka likebi na ndenge oyo bamiyokaka na motema. Ekozala malamu baboti bálanda ndakisa ya Nzambe mpe báyokaka bana na bango soki balingi koyebisa bango makambo. (Yakobo 1:19) Basengeli koyeba ndenge bana na bango bazali komiyoka ata soki balobi mabe.​—Tángá Mitángo 11:11, 15.

Ndenge nini okoki kobɔkɔla bana malamu?

Lokola ozali moboti, ozali na lotomo ya kotya mibeko. (Baefese 6:1) Landá ndakisa ya Nzambe. Amonisaka ete alingaka bana na ye na ndenge apesaka mibeko ya polele mpe amonisaka makama oyo ekobima soki batosi yango te. (Ebandeli 3:3) Kutu, na esika atinda bato na makasi bátosa, amonisaka bango nde litomba oyo bakozwa soki basali oyo ezali malamu.​—Tángá Yisaya 48:18, 19.

Zalá na mokano ya kosalisa bana na yo bálinga Nzambe. Boye, bakosala makambo na bwanya ata soki ozali te. Ndenge kaka Nzambe azalaka ndakisa, yo mpe zalá ndakisa mpo na koteya bana na yo bálinga Nzambe.​—Tángá Kolimbola Mibeko 6:5-7; Baefese 4:32; 5:1.