Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia ezali buku oyo etondi kaka na bwanya ya bato?

Biblia ezali buku oyo etondi kaka na bwanya ya bato?

Eyano ya Biblia

 Biblia, oyo bato mosusu babengaka Makomami Mosantu, ezali na maloba ebele ya bwanya. Kasi, yoká ndenge yango moko elobi: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.” (2 Timote 3:16) Makambo mingi emonisi ete maloba yango ezali solo. Tótalela makambo oyo elandi:

  •   Moto moko te alongá komonisa ete masolo ya Biblia ezali lokuta.

  •   Bato oyo bakomaki Biblia bazalaki bato ya sembo mpe bakomaki makambo nyonso polelepolele. Bosembo na bango emonisi mpenza ete makambo oyo bakomaki ezali solo.

  •   Biblia elobeli mingimingi likambo kaka moko: Nzambe azali na lotomo ya koyangela bato mpe mokano na ye ekokokisama na nzela ya Bokonzi ya likoló.

  •   Atako ekomamá kala mpenza, na bisika oyo elobeli makambo ya siansi, Biblia ekɔtisi makanisi ya lokuta te, oyo bato bazalaki kondima na ntango ya kala.

  •   Masolo ya istware emonisi ete bisakweli, to makambo oyo Biblia elobá banda kala mpenza, ekokisamá.