Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Etikali moke bampasi esila!

Etikali moke bampasi esila!

Kanisá ete ofandi na mokili oyo bampasi, mobulu, bitumba, maladi mpe makama minene oyo eutaka na mopepe makasi to koningana ya mabele ezali te. Kanisá lisusu mpe ete ntɔngɔ nyonso okómi kolamuka kozanga omitungisa ete bakozwa yo na valɛrɛ te, bakonyokola yo to okozwa mbongo ndenge nini. Makambo wana nyonso ekoki mpenza kosalema? Ezali solo ete ebongiseli moko te ya bato ekoki kosala makambo ya boye. Kasi Nzambe alaki kosilisa makambo nyonso oyo ebimiselaka bato bampasi, ata mpe oyo tolobelaki na lisolo oyo euti koleka. Talá bilaka oyo Biblia, Liloba ya Nzambe epesi:

BOYANGELI YA MALAMU

“Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”​—Danyele 2:44.

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló. Yesu Kristo, Mokonzi oyo Nzambe aponi akoyangela na esika ya baguvɛrnema ya mokili oyo mpe akosala ete mokano ya Nzambe esalema kaka na likoló te kasi mpe awa na mabele. (Matai 6:9, 10) Guvɛrnema moko te ekozwa esika ya Guvɛrnema ya Nzambe mpo ezali “bokonzi ya seko ya Nkolo na biso mpe Mobikisi Yesu Kristo.” Ekotya kimya mpo na libela.​—2 Petro 1:11.

MANGOMBA YA LOKUTA EKOZALA LISUSU TE

“Satana ye moko azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole. Bongo ezali likambo monene te soki basali na ye mpe bazali kokoba komimonisa lokola basali ya boyengebene. Kasi nsuka na bango ekozala na kolanda misala na bango.”​—2 Bakorinti 11:14, 15.

Ekomonana polele ete mangomba ya lokuta ezalaki misala ya Zabolo mpe ekozala lisusu te awa na mabele. Bato bakotingama na yango lisusu te mpe ekosopa lisusu makila te. Yango ekosala ete bato nyonso oyo balingaka “Nzambe ya bomoi mpe ya solo” básambela ye na “kondima kaka moko” mpe “na elimo mpe na solo.” Yango ekosala ete kimya mpe bomoko ezala.​—1 Batesaloniki 1:9; Baefese 4:5; Yoane 4:23.

EZALELI YA KOZANGA KOKOKA EKOZALA LISUSU TE

“Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Yehova Nzambe akosala makambo yango na nzela ya Mwana na ye Yesu, oyo apesaki bomoi na ye mpo na bato. (Yoane 3:16) Ntango Yesu akoyangela, bato bakokóma na nzoto ya kokoka. Bampasi ekozala lisusu te mpo “Nzambe ye moko akozala na bango” mpe akopangwisa “mpisoli nyonso na miso na bango.” Ezaleli ya kozanga kokoka mpe bampasi ekokóma makambo ya kala; “bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

BILIMO MABE BAKOZALA LISUSU TE

“[Yesu Kristo] asimbaki dragɔ, nyoka yango ya ebandeli, oyo azali Zabolo mpe Satana, mpe akangaki ye mbula nkóto moko (1 000). Mpe abwakaki ye na libulu mozindo mpe akangaki ye na kati mpe atyaki elembo likoló na yango, mpo akosa lisusu bikólo te.”​—Emoniseli 20:2, 3.

Satana ná bademo na ye bakozala lisusu na nguya te ya kotinda bato básala mabe mpo bakokangama monyɔlɔlɔ mpe bakobwakama na “libulu mozindo,” elingi koloba bakozala lisusu na likoki te ya kosala eloko. Bakosala lisusu bato mabe te. Ekozala mpenza esengo kofanda na mokili ya ndenge wana!

“MIKOLO YA NSUKA” EKOKÓMA NA NSUKA

Oyo Yesu abengaki “bolɔzi moko monene” nde ekosukisa “mikolo ya nsuka.” Alobaki boye: “Na ntango wana ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino te banda mokili ebandá tii sikoyo, ɛɛ, mpe ekosalema lisusu te.”​—Matai 24:21.

Bolɔzi yango ekozala monene mpo ekobimisa bampasi na ndenge oyo esalemá naino te. Bolɔzi yango ekosuka na “Etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” oyo eyebani malamu na nkombo “Har–Magedone.”​—Emoniseli 16:14, 16.

Na bisika nyonso, bato oyo balingaka bosembo bazelaka na motema likoló nsuka ya mokili oyo mabe. Tótalela naino mwa mapamboli oyo bakozwa ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.

NZAMBE AKOSALA MAKAMBO MINGI KOLEKA!

“Ebele mpenza ya bato” bakobika mpo na kofanda na mokili ya sika ya kimya: Liloba ya Nzambe elobi ete “ebele mpenza ya bato” oyo moto moko te akoki kotánga “bauti na bolɔzi monene,” mpe bakobika mpo báfanda na mokili ya sika ya boyengebene. (Emoniseli 7:9, 10, 14; 2 Petro 3:13) Yesu Kristo, “Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili” nde akobikisa bango.​—Yoane 1:29.

Mateya ya Nzambe ekomemela bato matomba: Na mokili ya sika, “mabele ekotonda na boyebi ya Yehova.” (Yisaya 11:9) Mateya yango ekozala na malako etali ndenge ya kofanda na kimya na bato nyonso mpe kobatela mabele mpe biloko oyo ezali na kati. Nzambe alobi boye: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.”​—Yisaya 48:17.

Bandeko mpe baninga na biso bakosekwa: Ntango azalaki awa na mabele, Yesu asekwisaki moninga na ye Lazare. (Yoane 11:1, 5, 38-44) Na yango, amonisaki ndenge akosekwisa ebele ya bato ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela.​—Yoane 5:28, 29.

Kimya mpe bosembo ekozala mpo na libela: Ntango Kristo akoyangela, likambo ya kobuka mibeko ekozala lisusu te. Ndenge nini toyebi yango? Mpo Yesu azali na likoki ya kotánga oyo ezali na mitema ya bato mpe akosalela likoki yango mpo na kosambisa bato malamu mpe bato mabe. Baoyo baboyaka kotika bizaleli na bango ya mabe bakokɔta na mokili ya sika te.​—Nzembo 37:9, 10; Yisaya 11:3, 4; 65:20; Matai 9:4.

Totaleli kaka ndambo ya bisakweli ya Biblia oyo elobeli makambo malamu oyo ekosalema mosika te. Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele, “kimya mingi” ekozala mpo na libela. (Nzembo 37:11, 29) Makambo nyonso oyo ebimiselaka bato minyoko mpe bampasi ekozala lisusu te. Nzambe ye moko alobi boye: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika. . . . Maloba oyo ezali sembo mpe solo.”​—Emoniseli 21:5.