Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Brésil

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Brésil

ELEKI mwa bambula, Rúbia, ndeko mwasi moko oyo azali sikoyo na mbula 30, asalaki mobembo mpo na kokende kotala Sandra, mobongisi-nzela moko oyo azalaki kopesa mabɔkɔ na lisangá moko oyo ezalaki na basakoli mingi te na sudi ya Brésil. Ntango Rúbia azalaki kuna, likambo moko esalemaki oyo esimbaki mpenza motema na ye mpe ebongolaki bomoi na ye. Likambo yango nini? Tótika Rúbia ye moko ayebisa biso yango.

“MALOBA YANGO EKAMWISAKI NGAI”

“Sandra amemaki ngai na ndako ya mwasi moko oyo azalaki koyekola na ye Biblia. Ntango tozalaki koyekola na ye, mwasi yango alobaki boye: ‘Sandra, na esika oyo nasalaka, bilenge basi misato bazali na mposa ya koyekola Biblia, kasi nayebisaki bango ete basengeli kozela ngala na bango. Nayebi ete ozali na bato mingi ya koyekola na bango mpe okokoka kobakisa moto mosusu te mbula oyo.’ Maloba yango ekamwisaki ngai. Bato oyo bazalaki na mposa ya koyeba Yehova basengelaki kozela ngala na bango mpo na koyekola! Na lisangá na biso, nazalaki na mokakatano mpo na kozwa ata moto moko ya koyekola na ye. Mbala moko, kaka ntango tozalaki na ndako ya moyekoli wana ya Biblia, nakómaki na mposa makasi ya kosalisa bato na mwa engumba wana. Mwa moke na nsima, nalongwaki na engumba ya monene oyo nazalaki kofanda mpe nakendaki kofanda na engumba ya moke epai Sandra azalaki mobongisi-nzela.”

Makambo elekaki ndenge nini mpo na Rúbia? Alobi boye: “Sanza mibale nsima ya kokóma kuna, nakómaki koyekola Biblia na bato 15, mpe mosika te, ngai mpe nakómaki lokola Sandra, bato mosusu basengelaki kozela mpo nayekola na bango!”

AZWI EKATELI YA KOTALELA LISUSU MOSALA NA YE YA KOSAKOLA

Diego, ndeko mobali moko oyo azali na mbula mwa moke koleka 20, akendaki kotala babongisi-nzela oyo bakendaki kosakola na Prudentópolis, engumba moko ya moke na sudi ya Brésil. Mobembo yango esimbaki mpenza motema na ye; kutu, azwaki ekateli ya kotalela lisusu mosala na ye ya kosakola. Alobi boye: “Na lisangá na biso, nazalaki kolekisa kaka mwa bangonga moke na mosala ya kosakola sanza na sanza. Kasi, ntango nakendaki kotala babongisi-nzela wana mpe babɛtelaki ngai masolo na bango, namonaki bokeseni na ndenge oyo bazalaki kotalela mosala ya kosakola ná ndenge oyo ngai nazalaki kotalela mosala yango. Mpo na bango ezalaki mosala ya esengo, kasi ngai nazalaki kozwa yango kaka bongobongo. Ntango namonaki esengo na bango, nakómaki na mposa ete bomoi na ngai ezala mpe na ntina lokola oyo ya bango.” Nsima ya mobembo yango, Diego akómaki mobongisi-nzela.

Yo mpe ozali elenge Motatoli lokola Diego? Obimaka na mosala ya kosakola mpe oyanganaka na makita, kasi omonaka ete mosala na yo ya kosakola ekómá kaka bongobongo to epesaka yo esengo te? Soki ezali bongo, okoki kobongola makambo mosusu na bomoi na yo mpo oyoka esengo ya kosala na esika oyo basakoli bazali mingi te? Ya solo, likanisi ya kotika bomoi ya malamu oyo ozalaki na yango ekoki kobangisa yo. Kasi, bilenge mingi baponaki kosala bongo. Bandimaki kobongola mikano mpe bamposa na bango mpo na komipesa mobimba na mosala ya Yehova. Ndakisa mosusu oyo tokoki kotalela ezali ya Bruno.

ALANGA-NZEMBO TO MOSAKOLI?

Eleki mwa bambula, Bruno, oyo azali sikoyo na mbula 28, ayekolaki miziki na eteyelo moko ya lokumu, mpe mokano na ye ezalaki ya kokóma mokambi ya orkɛstrɛ. Kutu, na eteyelo yango, akolisaki mpenza mosala ya miziki, yango wana mbala na mbala basɛngaki ye akamba orkɛstrɛ. Etikalaki moke akóma alanga-nzembo monene. Bruno alobi boye: “Nazalaki komona ete eloko moko ezalaki kozanga na bomoi na ngai. Namipesaki na Yehova, kasi nayebaki ete nazali komipesa mobimba te na mosala na ye, mpe likambo yango ezalaki kotungisa ngai. Nabondelaki Yehova mpo na koyebisa ye ndenge oyo nazalaki komiyoka, mpe nasololaki na bandeko ya lisangá oyo bakɔmɛli na elimo. Nsima ya kokanisa malamumalamu, nazwaki ekateli ya kotya mosala ya kosakola liboso ya miziki, nakataki kelasi ya miziki, mpe nazwaki ekateli ya kokende kosala na teritware moko oyo basakoli bazalaki mingi te.” Ekateli na ye ememelaki ye mapamboli nini?

Bruno akendaki kofanda na engumba Guapiara (oyo ezali na bato soki 7 000), na kilomɛtrɛ soki 260 longwa na engumba São Paulo. Ezalaki mbongwana monene. Alobi boye: “Nakómaki kofanda na mwa ndako moke oyo ezalaki na frigo te, TV te, mpe nakokaki kosalela Internet te. Atako bongo, lopango yango ezalaki na biloko mosusu oyo nazalaki na yango liboso te: elanga ya ndunda mpe banzete ya mbuma!” Ntango Bruno azalaki kuna na lisangá moko oyo ezalaki na basakoli mingi te, mbala moko na pɔsɔ azalaki kotya bilei, molangi ya mai, mpe mikanda na sakosi na ye mpe azalaki kokende kosakola na bamboka, na tukutuku na ye. Bato mingi na bamboka yango bayokaki naino nsango malamu te. Alobi boye: “Nakómaki koyekola Biblia na bato 18. Komona ndenge oyo bato yango bazalaki kobongola bomoto na bango ezalaki kopesa ngai esengo mingi!” Abakisi boye: “Na ntango yango nde namonaki ete nazwi eloko oyo ezalaki kozanga na bomoi na ngai: esengo monene oyo moto ayokaka ntango azali kotya Bokonzi na esika ya liboso. Nakokaki koyoka esengo yango te soki nalandaki mikano ya mokili.” Ndenge nini Bruno azalaki kozwa mbongo ya kobikela na Guapiara? Alobi na mwa kosɛka ete: “Nazalaki kolakisa bato kobɛta gitare.” Tokoki koloba ete azalaki kaka alanga-nzembo.

“ESENGELAKI KAKA NATIKALA”

Mariana, oyo azali sikoyo na mbula pene na 30, akutanaki na likambo oyo esɛngaki ye azwa ekateli lokola oyo Bruno azwaki. Azalaki avoka; kasi atako azalaki kozwa mbongo mingi na mosala yango, azalaki mpenza na esengo te. Alobi boye: “Nazalaki koyoka lokola nde nazali ‘kolanda mopɛpɛ.’” (Mos. 1:17) Bandeko mingi balendisaki ye atala soki akoki kokóma mobongisi-nzela. Nsima ya kokanisa malamu, Mariana ná baninga na ye Bianca, Caroline, ná Juliana, bazwaki ekateli ya kokende kopesa mabɔkɔ na lisangá moko na Barra do Bugres, engumba moko ya mosika pembeni ya Bolivie. Nini esalemaki na nsima?

Mariana alobi boye: “Nazalaki na makanisi ya kolekisa sanza misato kuna. Kasi ntango sanza misato ekokaki, nazalaki koyekola Biblia ná bato 15! Bayekoli yango bazalaki na mposa básalisa bango lisusu mpo bákola na elimo. Na yango, nazalaki kokoka koyebisa bango te ete mosika te nakotika bango. Esengelaki kaka natikala.” Nsukansuka, bandeko basi yango minei batikalaki na engumba wana. Mosala oyo Mariana aponaki esalisaki ye akóma na bomoi oyo ezali na ntina? Alobi boye: “Nasepelaka mingi ndenge Yehova azali kosalela ngai mpo nasalisa bato bábongwana mpe bákóma na bomoi ya malamu koleka. Nayokaka esengo mingi koyeba ete sikoyo nazali kosalela ntango mpe makasi na ngai na mosala oyo ezali mpenza na ntina.” Caroline amonisi makanisi na bango nyonso minei na maloba oyo: “Soki nakei kolala na butu, nayokaka mpenza esengo mpamba te nalekisaki mokolo na mosala ya Nzambe. Kosalisa bato oyo nayekolaka na bango Biblia nde likambo eleki ntina na bomoi na ngai. Ezali mpenza esengo komona ndenge oyo bazali kokola na elimo. Nazali komona bosolo ya maloba oyo: ‘Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu.’”​—Nz. 34:8.

Na ntembe te Yehova asepelaka mingi ntango amonaka bilenge bakristo mibali mpe basi, oyo motángo na bango ezali se kobakisama na mokili mobimba, ‘bazali komipesa na bolingo na bango moko’ mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye na bamboka ya mosika! (Nz. 110:3; Mas. 27:11) Yango wana, azali kopambola bilenge yango, oyo bandimi komipesa na mosala na ye.​—Mas. 10:22.