Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Myanmar

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Myanmar

“MBUMA ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Luka 10:2) Makambo oyo ezali kosalema lelo na mboka Myanmar, eyokani na maloba wana ya Yesu oyo esili koleka mbula 2 000. Mpo na nini? Na Myanmar, basakoli bazali soki 4 200 oyo bazali kosakola nsango malamu epai ya bato milio 55.

Atako bongo, Yehova, “Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma,” asimbaki motema ya ebele ya bandeko ya mikili ndenge na ndenge, mpe bayaki na ekólo ya Azia ya Sudi-Ɛsti mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobuka mbuma na elimo. Nini etindaki bango bátika bamboka na bango? Ndenge nini basalisaki bango mpo báya na Myanmar? Mpe mapamboli nini bazwaka? Tiká tómona yango.

“BOYÁ, TOZALI NA MPOSA YA BABONGISI-NZELA!”

Mwa bambula liboso, maladi ya ndɛkɛ ezalaki kokweisa ndeko Kazuhiro, oyo azali mobongisi-nzela na Japon, azalaki koyeba lisusu eloko te mpe bazalaki komema ye na lopitalo. Monganga ayebisaki ye ete asengeli kokumba motuka te na boumeli ya mbula mibale. Likambo yango etungisaki Kazuhiro. Amitunaki boye: ‘Nakosala nini mpo nakoba kosala mosala ya mobongisi-nzela, mosala oyo nalingaka mingi?’ Abondelaki mingi, asɛngaki Yehova afungolela ye nzela mpo akoba mosala ya mobongisi-nzela.

Kazuhiro ná Mari

Kazuhiro alobi boye: “Nsima ya sanza moko, moninga na ngai oyo azalaki kopesa mabɔkɔ na Myanmar ayokaki mokakatano oyo ekómelaki ngai. Abengaki ngai mpe alobaki ete: ‘Na Myanmar motuka oyo bato mingi basalelaka ezali nde bus. Soki oyei awa, okokoba mosala ya kosakola kozanga ete osalela motuka na yo moko!’ Natunaki monganga soki nakoki kosala mobembo na Myanmar. Nakamwaki ntango monganga ayanolaki ete: ‘Monganga moko ya Myanmar oyo atalelaka makambo ya bɔɔngɔ azali awa na Japon. Nakosala ete bokutana. Soki maladi yango ekweisi yo kuna akoki kosalisa yo.’ Namonaki ete Yehova nde apesaki ngai eyano na nzela ya monganga wana.”

Mbala moko, Kazuhiro akomelaki Betele ya Myanmar mpe amonisaki mposa na ye mpe ya mwasi na ye ya koya kosala kuna lokola babongisi-nzela. Kaka na nsima ya mikolo misato, Betele epesaki eyano oyo: “Boyá, tozali na mposa ya babongisi-nzela!” Kazuhiro ná mwasi na ye Mari, batɛkaki motuka na bango, bazwaki viza, mpe basombaki batike ya aviɔ. Lelo oyo, bazali kopesa mabɔkɔ na esengo nyonso na etuluku ya monɔkɔ ya bajɛstɛ na Mandalay. Kazuhiro alobi boye: “Likambo yango esalaki ete tótya lisusu motema mpenza na elaka ya Nzambe oyo ezali na Nzembo 37:5, oyo elobi: ‘Tikelá Yehova nzela na yo, mpe talelá ye, mpe ye moko akosala.’”

YEHOVA AFUNGOLI NZELA

Na 2014, Batatoli ya Yehova ya Myanmar bazwaki libaku ya koyamba bandeko na liyangani ya sipesiale. Bandeko ebele ya bamboka mosusu mpe bayaki. Moko na bango ezali ndeko mwasi Monique, oyo azali na mbula 34, afandaka na États-Unis, alobi: “Nsima ya liyangani, nabondelaki Yehova mpo na likambo mosusu nalingaki kosala na bomoi na ngai. Nasololaki mpe na baboti na ngai mpo na mikano na ngai ya elimo. Biso nyonso tomonaki ete nasengeli kozonga na Myanmar, kasi ezwaki mwa ntango mpe nasalaki mabondeli mingi liboso ya kozwa ekateli ya nsuka.” Monique alimboli mpo na nini esalemaki bongo.

Monique ná Li

Alobi: “Yesu alendisaki bayekoli na ye ‘báyeba mosolo boni ekosɛnga.’ Na yango namitunaki ete: ‘Nazali na mbongo oyo ekoki mpo na kokende esika mosusu? Nakozala na likoki ya kokokisa bamposa na ngai soki nazali kolekisa ntango mingi te na mosala ya mosuni?’” Abakisi boye: “Eumelaki te namonaki ete nazali na mbongo mingi te mpo na kokende esika mosusu.” Nini esalemaki mpo akenda?​—Luka 14:28.

Monique alobi boye: “Mokolo moko patrɔ na ngai ya mosala abengaki ngai. Nabangaki, nakanisaki ete akolongola ngai na mosala. Kasi, apesaki ngai matɔndi mpo na mosala malamu nazalaki kosala. Mpe na nsima ayebisaki ngai ete abongisi makambo mpo nazwa matabisi, mpe mbongo yango ezalaki motángo ya mbongo nazalaki koluka mpo na kofuta banyongo nazalaki na yango!”

Monique akendaki na Myanmar na sanza ya 12/2014. Alobi nini mpo na mosala na ye ya kosakola esika mposa ya basakoli ezali monene? Alobi boye: “Nazali na esengo mingi ndenge nazali awa. Nayekolaka Biblia na bato misato, mpe moko na bango azali na mbula 67. Mpo na kopesa ngai mbote ayambaka ngai na mwa kosɛka. Ntango ayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, alelaki. Alobaki ete: ‘Ezali mbala ya liboso na bomoi na ngai nayoka ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Ozali mwana moke, kasi oteyi ngai likambo eleki ntina oyo nasengelaki koyeba.’ Ngai mpe nalelaki. Makambo lokola oyo esalaka ete moto amiyoka mpenza malamu na bomoi na ye ntango akei kosakola esika mposa ya basakoli ezali monene.” Mikolo eleki, Monique azwaki libaku ya kokɔta Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi.

Eloko mosusu oyo etindaki bandeko mosusu bákende kosakola na Myanmar ezali Buku ya mobu 2013 ya Batatoli ya Yehova oyo elobelaki ekólo yango. Ndeko mwasi Li oyo azali na mbula mwa moke koleka 30, ye mpe afandaki na Azia ya Sudi-Ɛsti. Mosala na ye ezalaki kozwa ye ntango mingi, kasi masolo oyo ezali na Buku ya mobu yango etindaki ye akanisa mbala moko soki asengeli kokende kosala na Myanmar. Alobi boye: “Na 2014, ntango nakendaki liyangani ya sipesiale na Yangon (Rangoun), nakutanaki na ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bakendaki kosakola esika mposa ezali monene na teritware ya monɔkɔ ya Chinois, na ekólo Myanmar. Lokola nalobaka Chinois, nazwaki ekateli ya kokende na Myanmar mpo na kopesa mabɔkɔ na etuluku ya monɔkɔ yango. Ngai ná Monique tokendaki na Mandalay. Yehova asungaki biso tózwa mosala ya kotángisa na eteyelo moko, oyo ezalaki kozwa biso ntango mingi te, mpe tozwaki ndako ya kofutela kaka pembeni wana. Atako molunge ezalaka mpe mikakatano mosusu, nazali kosepela mingi na mosala ya kosakola awa. Bato ya Myanmar bazali na bomoi ya mindɔndɔ te, kasi bazali na bokonde mpe basepelaka kopesa ntango na bango mpo na koyoka nsango malamu. Ezali mpenza esengo komona ndenge Yehova azali kokolisa mosala na ye. Nazali na kondima mpenza ete Yehova nde alingi nazala awa na Mandalay.”

YEHOVA AYOKAKA MABONDELI

Bandeko ebele oyo bakendá kosakola esika mposa ya basakoli ezali monene bamonaki nguya ya libondeli. Tózwa ndakisa ya Jumpei oyo azali na mbula 37 mpe mwasi na ye Nao, oyo azali na mbula 35. Bapesaká mabɔkɔ na lisangá ya elobeli ya bajɛstɛ na Japon. Mpo na nini bakendaki na Myanmar? Ndeko Jumpei alobi boye: “Banda kala, ngai ná mwasi na ngai tozalaki na mokano ya kokende kosakola na mboka mosusu, esika mposa ya basakoli ezali monene. Ndeko mobali moko ya lisangá na biso ya elobeli ya bajɛstɛ na Japon akendaki na Myanmar. Atako tozalaki na mbongo mingi te, biso mpe tokendaki na Myanmar na sanza ya 05/2010. Bandeko bayambaki biso malamu mpenza!” Mpo na teritware ya elobeli ya bajɛstɛ, alobi boye: “Mosala ya kosala ezali mingi. Ntango tolakisaka bavideo ya elobeli ya bajɛstɛ, yango ekamwisaka mpenza bato oyo tokendaka kotala. Tozali mpenza na esengo ndenge tozwaki ekateli ya kokende kosalela Yehova kuna!”

Nao ná Jumpei

Jumpei ná Nao bazwaki mbongo wapi? Balobi boye: “Nsima ya mbula misato, tosalelaki mbongo oyo tozalaki na yango mpe tozalaki lisusu na mbongo ya kofuta ndako te mpo na mbula oyo elandaki. Ngai ná mwasi na ngai tobondelaki mingi. Tozwaki mokanda oyo eutaki na Betele mpe basɛngaki biso tósala mosala ya mobongisi-nzela monene mpo na mwa ntango, likambo oyo tokanisaki te! Totyelaki Yehova motema, mpe tomonaki ete asundolaki biso ata moke te. Asalisi biso na makambo mingi.” Mikolo eleki, Jumpei ná Nao bakɔtaki eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi.

YEHOVA AZALI KOSIMBA MITEMA YA BATO MINGI

Nini etindaki Simone, ndeko mobali oyo azali na mbula 43, moto ya Italie, ná mwasi na ye Anna, oyo azali na mbula 37, moto ya Nouvelle-Zélande, bákende na Myanmar? Anna ayanoli boye: “Ezalaki lisolo ya Myanmar oyo ezali na Buku ya mobu 2013!” Simone alobi: “Ezali mpenza libaku malamu kozala awa na Myanmar. Awa bomoi ezali mindɔndɔ te, mpe nakoki kopesa ntango mingi na mosala ya Yehova. Ezali mpenza esengo komona ndenge Yehova azali kotyela biso likebi ntango tozali kosala esika mposa ya basakoli ezali monene.” (Nzembo 121:5) Anna abakisi boye: “Naino nayoká esengo ya boye te. Tozali na bomoi ya mindɔndɔ te. Nalekisaka ntango mingi elongo na mobali na ngai, mpe boninga na biso ekómi lisusu makasi. Tozwi mpe baninga malamu ya sika. Awa bato bakaniselaka Batatoli ya Yehova mabe te, mpe ndenge batyaka likebi ntango tozali kosakola ekamwisaka mpenza!” Na ndenge nini?

Simone ná Anna

Anna alobi: “Mokolo moko na wenze nasakwelaki mwana-kelasi moko ya Iniversite mpe toyokanaki tókutana lisusu. Ntango nakendaki kotala ye, abengaki baninga na ye mosusu. Mbala oyo elandaki, abakisaki baninga na ye mosusu. Mbala mosusu oyo elandaki, ayaki na bato ebele koleka. Lelo nayekolaka na bato mitano kati na bango.” Simone alobi boye: “Na mosala ya kosakola bato bayambaka biso malamu mpe balingaka koyeba makambo ya sika. Bato mingi basepelaka. Biso nde tozali na ntango mingi te mpo na kolandela bato nyonso oyo basepelaka.”

Sachio ná Mizuho

Makambo nini mpenza moto asengeli kosala mpo na kozwa ekateli ya kokende na Myanmar? Mizuho oyo azali moto ya Japon, alobi boye: “Banda kala, ngai ná mobali na ngai, Sachio, tozalaki na mposa ya kokende kosala na mboka mosusu, esika mposa ya basakoli ezali monene, kasi toyebaki te esika nini tókende. Nsima ya kotánga Buku ya mobu 2013 oyo elobeli Myanmar, bandakisa ya malamu oyo ezalaki kuna esimbaki mpenza motema na biso mpe tobandaki kokanisa soki tokoki kokende kopesa mabɔkɔ kuna.” Sachio abakisi boye: “Tozwaki ekateli ya kokende na Yangon, engumba monene ya Myanmar, na boumeli ya pɔsɔ moko mpo na kotala ndenge ezali. Mobembo mokuse wana endimisaki biso mpenza ete tosengeli kokende kuna.”

OKOKI KONDIMA KOKENDE?

Jane, Danica, Rodney mpe Jordan

Rodney ná mwasi na ye Jane, bazali bato ya Australie, bango mibale bazali na mbula mwa moke koleka 50, elongo na mwana na bango ya mobali Jordan mpe mwana na bango ya mwasi Danica, bapesaka mabɔkɔ na Myanmar kobanda 2010. Rodney alobi boye: “Komona ndenge bato bazali na mposa ya koyoka Liloba ya Nzambe ezali mpenza kosimba motema na biso. Nazali mpenza kosɛnga mabota mosusu ete bango mpe bákende kopesa mabɔkɔ na bamboka lokola Myanmar.” Mpo na nini? “Mpo koya awa esali ete libota mobimba ekóma na boyokani makasi na Yehova! Bilenge mingi batyaka makanisi nyonso na batelefone na bango, mituka, mosala mpe bongo na bongo. Bana na biso balekisaka ntango na koyekola maloba ya sika mpo na kosalela yango na mosala ya kosakola. Basalaka makasi báyekola ndenge ya kosolola na bato oyo bamesaná te na Biblia, ndenge ya kopesa eyano na makita ya lisangá, mpe lisusu bamipesi mpenza na makambo mosusu oyo etali losambo na biso.”

Oliver ná Anna

Oliver, ndeko mobali oyo azali na mbula 37 mpe azali moto ya États-Unis, amonisi ntina oyo azali kosɛnga ete bato mosusu bákende kopesa mabɔkɔ esika mposa ezali monene, alobi: “Kokende kosalela Yehova esika omesani te ezali na matomba mingi. Kotika mboka na ngai esalisi ngai nakóma na kondima makasi mpe natyela Yehova motema ata soki nakutani na likambo nini. Kosala elongo na bato oyo oyebaki te liboso, kasi oyo bozali na bango bindimeli moko esalisaki ngai namona ete eloko moko te na mokili ezali na ntina koleka Bokonzi ya Nzambe.” Lelo oyo, Oliver ná mwasi na ye, Anna, bazali kokoba kopesa mabɔkɔ na molende nyonso na lisangá ya monɔkɔ ya Chinois.

Trazel

Trazel, ndeko mwasi moko ya mbula 52, azali moto ya Australie, mpe apesaka mabɔkɔ na Myanmar kobanda 2004. Alobi boye: “Nasɛngi baoyo bakoki kokende kosala esika mposa ezali monene, básala yango. Namoni mpenza ete soki ozali na mposa ya kosala, Yehova akopambola milende na yo. Natikalá kokanisa ata moke te ete nakozala na bomoi ya boye. Ezali bomoi eleki malamu mpe etondi na mapamboli oyo nakokaki kokanisa te.”

Tiká ete maloba ya kolendisa ya bandeko oyo bakendá kopesa mabɔkɔ na Myanmar, esimba motema na yo mpe otala soki okoki kokende kosakola na bateritware oyo basakolá naino te. Ya solo, bandeko oyo bakendá kopesa mabɔkɔ esika mposa ezali monene bazali kobelela ete: “Tobondeli yo, leká na Myanmar kosalisa biso!”