Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Alisa

Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Turquie

Bamipesaki na bolingo na bango moko—Na Turquie

BAKRISTO ya siɛklɛ ya liboso basalaki milende mingi mpo báyebisa ebele mpenza bato ‘nsango malamu ya Bokonzi.’ (Matai 24:14) Basusu bakendaki kutu na mboka mopaya. Na ndakisa, ntoma Paulo akendaki na etúká oyo ezalaki esika ekólo Turquie ezali lelo mpe asakolaki kuna na molende na mibembo na ye ya misionɛrɛ. * Mbula soki 2 000 na nsima, na 2014, kampanye monene ya kosakola esalemaki lisusu na Turquie. Mpo na nini basalaki kampanye yango? Banani basalaki yango?

“LIKAMBO NINI EZALI KOLEKA AWA?”

Na Turquie, basakoli bazali koleka 2 800, kasi ekólo yango ezali na bato milio 79. Yango elakisi ete mosakoli 1 asengeli koteya bato pene na 28 000. Ndenge okoki komona yango, basakoli balongaki kosolola kaka na mwa bato moke ya ekólo yango. Basalaki kampanye yango ya kosakola mpo na kosolola na ebele ya bato na ntango moke. Bandeko soki 550 oyo balobaka monɔkɔ ya Turc mpe bazalaki kofanda na bikólo mosusu bayaki na Turquie mpe basakolaki elongo na bana-mboka na kampanye yango. Mosala yango ebimisaki matomba nini?

Litatoli monene epesamaki. Lisangá moko na Istanbul ekomaki boye: “Ntango bato bazalaki komona biso, bazalaki kotuna: ‘Liyangani moko ya monene ezali awa? Tozali komona Batatoli ya Yehova bisika nyonso!’” Lisangá moko na engumba Izmir ekomaki boye: “Mobali moko azalaki kosala na esika bazelaka bisi apusanaki epai ya nkulutu moko mpe atunaki ye: ‘Likambo nini ezali koleka awa? Bobakisi molende na mosala na bino?’” Ya solo, kampanye yango ezalaki monene.

Steffen

Basakoli oyo bautaki bikólo mosusu basepelaki mpenza na kampanye yango. Steffen, oyo autaki na Danemark, alobaki boye: “Nazwaki libaku ya koteya bato oyo bayoká naino makambo ya Yehova te. Nayokaki ete nazali kopesa mabɔkɔ mpo nkombo ya Yehova eyebana. Jean-David, oyo autaki na France, akomaki boye: “Tosakolaki kaka na balabala moko ngonga ebele. Ezalaki malamu mpenza! Bato mingi bayebaki Batatoli ya Yehova te. Na ndako mingi, tozwaki libaku ya kobanda lisolo, kolakisa video, mpe kotikela bato mikanda.”

Jean-David (na katikati)

Basakoli 550 oyo basalaki kampanye yango bakabolaki mikanda soki 60 000 na pɔsɔ mibale mpamba! Ya solo, litatoli monene mpenza epesamaki na kampanye yango.

Molende mpo na mosala ya kosakola ebakisamaki. Kampanye yango elendisaki bandeko ya Turquie. Mingi bakómaki kokanisa kobanda mosala ya ntango nyonso. Kutu, motángo ya babongisi-nzela ya sanza na sanza emataki mingi (24 %) na boumeli ya sanza 12 oyo elandaki kampanye.

Şirin

Bandeko oyo bautaki na bikólo mosusu balobaki ndenge oyo kampanye esalisaki bango na mosala ya kosakola ata ntango bazongaki na bamboka na bango. Şirin, ndeko mwasi moko ya Allemagne, akomaki boye: “Bandeko ya Turquie bazalaki kobanga te kopesa litatoli ya libaku malamu. Ngai nayokaka nsɔni mpenza kopesa litatoli ya libaku malamu. Kasi kampanye oyo tosalaki, ndakisa ya bandeko ya Turquie, mpe ebele ya mabondeli esalisaki ngai nasala oyo nazalaki kokoka kosala te liboso. Nateyaki mpe nakabolaki mikanda ebele esika engbunduka elekaka! Lelo oyo, nayokaka lisusu nsɔni mingi te.”

Johannes

Ndeko Johannes, oyo autaki na Allemagne alobaki boye: “Nayekolaki mwa makambo oyo ekosalisa ngai na mosala ya kosakola. Bandeko ya Turquie bazalaki mpenza na mposa ya kopesa litatoli epai ya bato ebele. Bazalaki kopesa litatoli na libaku nyonso. Nazwaki ekateli ya kosalaka mpe bongo ntango nazongaki na Allemagne. Lelo oyo, nateyaka bato ebele koleka liboso.”

Zeynep

Ndeko Zeynep oyo autaki na France alobaki boye: “Kampanye yango esalisaki ngai mingi mpo na mosala ya kosakola. Esalisaki ngai nazala na mpiko koleka mpe natyela Yehova motema.”

Basakoli bakómaki na bomoko makasi. Bolingo mpe bomoko oyo ezalaki kati na bandeko ya bikólo ndenge na ndenge esimbaki mpenza mitema. Jean-David, oyo tolobelaki liboso, alobaki boye: “Tomonaki mpenza boyambi ya bapaya.” Abakisi boye: “Bazwaki biso lokola baninga mpe bandeko ya libota na bango. Bayambaki biso na bandako na bango. Nayebaki ete tozali libota ya bandeko na mokili mobima; natángá yango mingi na mikanda na biso. Kasi namonaki yango na miso. Esengo na ngai ya kozala mosaleli ya Yehova ebakisamaki mpe napesaki ye matɔndi ndenge apesá ngai lokumu yango.”

Claire (na katikati)

Claire, oyo autaki na France, alobaki boye: “Ezala bandeko ya Allemagne, ya Danemark, ya France, to ya Turquie, biso nyonso tozalaki libota moko. Ezalaki lokola nde Nzambe azwaki gɔmɛ ya monene mpe abomaki bandelo nyonso oyo ekaboli bikólo.”

Stéphanie (na katikati)

Stéphanie, oyo autaki na France abakisaki ete: “Kampanye yango eteyaki biso ete eloko oyo esangisi biso ezali mimeseno ya mboka to monɔkɔ te, ezali nde bolingo mpo na Yehova.”

MATOMBA YA NTANGO MOLAI EMONANI

Basakoli mingi oyo bautaki bikólo mosusu bakómaki kokanisa kokende kofanda na Turquie mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala oyo esengeli kosalema kuna. Bandeko mosusu bakendá kuna. Bana-mboka basepelaka mpenza na bandeko yango oyo bayá kopesa mabɔkɔ.

Tózwa ndakisa ya mwa etuluku moko ya basakoli 25. Ezalaki kaka na nkulutu moko na boumeli ya mbula ebele. Kanisá esengo oyo basakoli bayokaki na 2015, ntango bandeko oyo bautaki Allemagne mpe Pays-Bas bayaki kopesa bango mabɔkɔ!

KOSALA ESIKA MPOSA EZALI MONENE

Basakoli oyo bakendaki kopesa mabɔkɔ na Turquie balobi nini nsima ya kofanda kuna mwa ntango molai? Ya solo, na ebandeli ezalaki pɛtɛɛ te, kasi kopesa mabɔkɔ esika mposa ezali monene epesaka esengo mpenza. Talá makambo bandeko yango mosusu balobi:

Federico

Ndeko Federico, oyo autaki na Espagne, azali na mbula soki 40 mpe abalá alobi boye: “Lokola nazali na biloko mingi te ya mosuni, nazalaka na bomoi ya mindɔndɔ te mpe epesaka ngai nzela ya kotya makanisi na makambo oyo eleki ntina.” Akoki kolendisa basusu bákende mpe kopesa mabɔkɔ esika mposa ezali monene? Alobi boye: “Ɛɛ. Soki okei na mboka mopaya mpo na kosalisa bato báyeba Yehova, ezali lokola omitye na mabɔkɔ na ye. Yehova akotyela yo likebi mingi koleka mpe okomona yango.”

Rudy

Ndeko Rudy, oyo azali na mbula pene na 60, abalá mpe autá na Pays-Bas alobi boye: “Toyokaka esengo mingi kosala esika mposa ezali monene, koyebisa nsango malamu epai ya ebele ya bato oyo bayoká yango naino te. Komona esengo ya bato soki bandimi solo epesaka esengo mingi mpenza.”

Sascha

Sascha, ndeko mobali moko ya mbula mwa moke koleka 40, oyo abalá, mpe autá na Allemagne, alobi boye: “Mbala nyonso soki nabimi na mosala ya kosakola, nakutanaka na bato oyo bayoki solo mpo na mbala ya liboso. Kopesa bato libaku ya koyeba Yehova epesaka ngai esengo makasi.”

Atsuko

Atsuko, ndeko mwasi moko ya mbula soki 35, oyo abalá mpe autá na Japon, alobi boye: “Liboso, nazalaki kolinga Armagedone eya nokinoki. Kasi, nsima ya koya awa na Turquie, napesaka Yehova matɔndi ndenge azali naino komonisa motema molai. Ntango nazali komona ndenge Yehova azali kotambwisa makambo, ezali kotinda ngai nakangama na ye lisusu mingi.”

Alisa, ndeko mwasi moko ya mbula mwa moke koleka 30 oyo autá na Russie, alobi boye: “Kosalela Yehova na esika oyo mposa ezali monene esalisi ngai nameka bolamu na ye nyonso.” (Nzembo 34:8) Abakisi ete: “Yehova azali Tata na ngai, kasi azali mpe Moninga na ngai ya motema, nayebi ye malamu na nzela ya makambo ndenge na ndenge oyo nakutani na yango. Bomoi na ngai etondi na ebele ya makambo ya esengo, masolo kitoko, mpe mapamboli beboo!”

‘TALÁ BILANGA’

Na lisalisi ya kampanye monene oyo esalemaki na Turquie, bato ebele koleka bayoki nsango malamu. Atako bongo, ezali kaka na bisika ebele oyo nsango malamu ekómi te. Mokolo na mokolo, bandeko oyo bayá kosalisa na Turquie bakutanaka na bato oyo bayoká naino makambo ya Yehova te. Okolinga kosala na teritware ya ndenge wana? Soki bongo, tolendisi yo boye: ‘Tombolá miso na yo mpe talá bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.’ (Yoane 4:35) Okolinga kokende kosalisa na esika oyo bilanga “eteli mpo na bobuki mbuma”? Soki bongo, bandá kosala sikoyo makambo oyo ekosalisa yo okokisa mokano yango. Yebá likambo oyo: Komipesa mingi na kopalanganisa nsango malamu “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele” ekomemela yo mapamboli oyo ekokani na mosusu te!Misala 1:8.

^ par. 2 Talá mwa buku ‘Voyez le bon pays,’ nk. 32-33.