OKANISI ete Biblia ekoki kosalisa mpo kimya ezala na ndako? Tosɛngi yo otala makambo oyo esalisaki bato oyo batunaki bango mituna mpe oyo Biblia elobaka. Talelá makambo nini ekoki kosalisa yo oboya matata, obatela kimya mpe okómisa boyokani na bino makasi mpenza.
BATOLI YA BIBLIA OYO ESALISAKA BATO BÁZALA NA KIMYA
BÓMITALELAKA NA NDENGE EBONGI.
“Bósala eloko moko te na kowelana to mpo bozali komimona ete boleki bamosusu, kasi na elimo ya komikitisa bómonaka bamosusu ete baleki bino, bótyaka likebi kaka na makambo na bino moko te, kasi bótyaka mpe likebi na makambo ya bamosusu.”—Bafilipi 2:3, 4.
“Tomoni ete ezali malamu kotalela molongani na yo lokola moto oyo aleki yo mpe bato mosusu na valɛrɛ.”—Mwasi oyo aumeli mbula 19 na libala.
YOKÁ NA LIKEBI NYONSO KOZANGA KOTINGAMA KAKA NA MAKANISI NA YO.
“Tokokima matata soki tozali koyanola molongani na biso na boboto. Ezali na ntina koyoka kozanga kokanisela ye mabe mpe komemya likanisi na ye ata soki tosepeli na yango te.”—Mwasi oyo aumeli mbula 20 na libala.
ZALÁ NA MOTEMA MOLAI MPE NA BOBOTO.
“Na motema molai nde bandimisaka motambwisi, mpe lolemo ya boboto ekoki kobuka mokuwa.”—Masese 25:15.
Bato ya libota oyo Lamuká! etunaki bango mituna bazali kaka moke na kotalela bamilio ya bato na mokili mobimba, oyo Biblia esalisi bango bákóma na bizaleli oyo etyaka kimya na ndako.* Ata soki emonani ete bato mosusu ya libota na bango balingi kosala boyokani te, bamoni ete ezali na ntina kosala milende mpo na kotya kimya mpo Biblia elobi boye: ‘Baoyo batyaka kimya bazali bato ya esengo.’—Masese 12:20.
^ par. 24 Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndenge ya kozala na libota ya esengo, talá mokapo 14 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova mpe ezali na www.pr418.com. Fungolá mpe esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > LISALISI MPO NA LIBOTA.