Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 02

Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya

Biblia elaki bomoi ya malamu na mikolo ezali koya

Bato mingi na mokili bazali kokutana na makambo oyo ezali kopesa bango mawa, mpasi, mpe kobangisa bango. Yo mpe osí okutaná na makambo oyo esalá ete omiyoka bongo? Ekoki kozala ete ozali konyokwama na maladi moko boye to mpo moto moko oyo olingaka akufi. Mbala mosusu omitunaka boye: ‘Mokolo mosusu bampasi ekosila mpenza?’ Biblia epesi eyano oyo ebongi na motuna yango.

1. Elikya nini Biblia epesi mpo na mikolo ezali koya?

Biblia emonisi ntina oyo mokili etondi na mikakatano. Kasi mikakatano yango ezali mpo na mwa ntango mpo etikali moke Nzambe asilisa yango. Makambo oyo Biblia elaki ekoki ‘kopesa yo bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’ (Tángá Yirimia 29:11, 12.) Bilaka yango ekosalisa biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tozali na yango lelo, tózala na makanisi malamu mpe tózala na elikya ete tokozala na esengo ya libela.

2. Biblia elobi ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?

Biblia elobi ete na mikolo ezali koya “liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Tángá Emoniseli 21:4.) Makambo oyo enyokolaka bato lelo, na ndakisa bobola, kozanga bosembo, maladi mpe liwa ekozala lisusu te. Biblia elobi ete bato bakosepela na bomoi libela na libela na Paradiso awa na mabele.

3. Okoki kosala nini mpo omindimisa ete makambo oyo Biblia elobi ekokokisama?

Bato mingi bazalaka na elikya ete makambo ya malamu ekoselama, kasi bamonaka te ete makambo yango ekoki mpenza kosalema. Nzokande makambo oyo Biblia elobi ekosalema mpenza. Okomindimisa ete makambo oyo Biblia elobi ekokokisama soki ozali “kotalela Makomami malamumalamu.” (Misala 17:11) Wana ozali koyekola Biblia, okopona soki okondima to te makambo oyo yango elobi mpo na mikolo ezali koya.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo mosusu oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya. Talá mpe ndenge elikya oyo Biblia epesi ezali kosalisa bato lelo oyo.

4. Biblia elobi ete tokozala na bomoi ya libela na libela oyo ezangi mikakatano

Talá na nse makambo oyo Biblia elaki. Osepeli na oyo wapi? Mpo na nini?

Tángá bavɛrsɛ oyo batye pene ya bilaka yango, mpe yanolá na mituna oyo:

  • Bavɛrsɛ yango epesi yo elikya? Ekoki mpe kopesa bandeko to baninga na yo elikya?

Omimona na mokili ntango

MOTO MOKO TE . . .

BATO NYONSO . . .

  • bakomona ntango baninga mpe bandeko na bango bakozonga na bomoi awa na mabele.​—Yoane 5:28, 29.

  • bakozala na nzoto malamu mpe bakozala na makasi ya bolenge.​—Yobo 33:25.

  • akonyokwama na makanisi mpo na makambo oyo eleká.​—Yisaya 65:17.

  • bakozala na bomoi ya malamu libela na libela.​—Nzembo 37:29.

5. Bilaka ya Biblia ekoki kobongola makambo

Bato mingi balɛmbi nzoto to kutu bazali na nkanda ntango bazali komona makambo mabe oyo ezali kosalema. Basusu basali nyonso mpo na kobongisa makambo. Talá ndenge bilaka ya Biblia oyo emonisi ete makambo ekobonga esalisi bato lelo oyo. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video oyo, makambo nini ya kozanga bosembo ezalaki kotungisa Rafika?

  • Atako makambo ya kozanga bosembo oyo azalaki komona esilaki te, ndenge nini Biblia esalisaki ye?

Soki tozali kondima makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya, tokolɛmba nzoto te mpe tokozala na esengo ata soki tozali na mikakatano. Tángá Masese 17:22 mpe Baroma 12:12, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya ekoki mpenza kobongisa bomoi na yo? Mpo na nini?

SOKI MOTO AYEBISI YO: “Makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya ekokokisama te.”

  • Okanisi nini: Mpo na nini ezali na ntina oluka koyeba malamumalamu solo na likambo yango?

NA MOKUSE

Biblia elobeli makambo mingi oyo emonisi ete bomoi ekozala malamu na mikolo ezali koya; yango ezali kopesa biso elikya mpe kokómisa bomoi na biso malamu sikoyo.

Bozongeli

  • Mpo na nini bato basengeli koyeba bilaka ya Nzambe?

  • Biblia elobi nini mpo na mikolo ezali koya?

  • Mpo na nini koyeba makambo oyo Biblia elaki mpo na mikolo ezali koya ezali kosalisa biso sikoyo?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ndenge elikya ekoki kosalisa yo ntango ozali na mikakatano.

“Elikya​—Epai wapi okoki kozwa yango?” (Lamuká! ya 10-12/2004)

Talá ndenge elikya mpo na mikolo ezali koya esalisi bato oyo bazali na maladi oyo eumeli mingi

“Biblia ekoki kosalisa ngai soki nazali na maladi oyo eumeli mingi?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Ntango ozali kotala video ya miziki oyo, omimona mpe omona libota na yo na kati ya Paradiso wana bilaka ya Nzambe ezali kokokisama.

Kanisá ntango wana! (3:37)

Talá ndenge bomoi ya moto moko oyo azalaki kobunda mpo na mbongwana ekómaki malamu ntango ayekolaki makambo oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya.

“Namonaka lisusu te ete nasengeli kobongola mokili” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2013)