Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 15

Ndenge nini bankulutu basalisaka bandeko ya lisangá?

Ndenge nini bankulutu basalisaka bandeko ya lisangá?

Finlande

Koteya

Kolendisa bandeko

Kosakola

Na ebongiseli na biso, tozali te na bakonzi ya lingomba oyo bafutamaka mpo na mosala na bango. Tozali nde na bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami ya Biblia mpo na kozala bakɛngɛli oyo batyami “mpo na kobatela lisangá ya Nzambe,” kaka ndenge ezalaki na lisangá ya bakristo na ebandeli. (Misala 20:28) Bandeko yango bazali bankulutu oyo bazali na boyokani makasi na Yehova. Bakambaka lisangá mpe babatelaka yango “na kotindikama te, kasi na motema moko; . . . [basalaka yango] te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, kasi na motema ya esengo.” (1 Petro 5:1-3) Misala nini basalelaka biso?

Bakɛngɛlaka mpe babatelaka biso. Bankulutu basalelaka toli ya Biblia mpo na kotambwisa lisangá mpe basalisaka bandeko bátikala penepene na Yehova. Lokola bankulutu bayebi ete Nzambe nde moto apesi bango mokumba wana ya ntina mingi, bakonzaka biso te kasi basalisaka nde biso tómiyoka malamu mpe tózala na esengo. (2 Bakorinti 1:24) Kaka ndenge mobateli ya mpate asalaka makasi akokisaka bamposa ya mpate na ye mokomoko, bankulutu mpe basalaka makasi báyeba ndeko mokomoko na lisangá.​—Masese 27:23.

Bateyaka biso ndenge ya kosala mokano ya Nzambe. Pɔsɔ na pɔsɔ, bankulutu bakambaka makita ya lisangá oyo esalisaka biso tókóma na kondima makasi. (Misala 15:32) Mibali yango ya molende bakambaka mpe mosala ya kopalanganisa nsango malamu, basakolaka elongo na biso mpe balakisaka biso mitindo nyonso ya kosakola.

Balendisaka mokomoko na biso. Bankulutu ya lisangá balukaka kosalisa biso tókolisa boninga na biso na Yehova; yango wana basololaka na biso na bandako na biso to na Ndako ya Bokonzi mpo na kopesa biso lisalisi mpe libɔndisi oyo euti na Biblia.​—Yakobo 5:14, 15.

Longola mikumba na bango ya lisangá, bankulutu mingi bakendeke mosala mpe bazali na mikumba ya libota oyo basengeli kokokisa. Ebongi mpenza tózala na limemya epai ya bandeko mibali yango oyo basalaka mosala makasi.​—1 Batesaloniki 5:12, 13.

  • Mikumba nini bankulutu bazali na yango na lisangá?

  • Na ndenge nini batyelaka mokomoko na biso likebi?