Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 12

Mosala na biso ya kosakola ebongisami ndenge nini?

Mosala na biso ya kosakola ebongisami ndenge nini?

Espagne

Biélorussie

Hong Kong

Pérou

Mwa moke liboso Yesu akufa, alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Kasi ndenge nini mosala yango elingaki kosalema na mokili mobimba? Na kolanda ndakisa oyo Yesu atikaki ntango azalaki awa na mabele.​—Luka 8:1.

Tosalaka makasi tókutana na bato na bandako na bango. Yesu alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kosakola nsango malamu ndako na ndako. (Matai 10:11-13; Misala 5:42; 20:20) Bapesaki bapalanganisi ya nsango malamu yango ya liboso bisika oyo basengelaki kosakola. (Matai 10:5, 6; 2 Bakorinti 10:13) Ndenge moko mpe lelo oyo, mosala na biso ya kosakola ebongisami malamumalamu mpe bapesaka lisangá mokomoko esika oyo basengeli kosakola. Na ndenge yango, tokokisaka etinda ya Yesu ya “kosakwela bato mpe kopesa litatoli malamumalamu.”​—Misala 10:42.

Tosalaka makasi tókutana na bato na bisika nyonso oyo bazali. Yesu atikaki mpe ndakisa na ndenge azalaki kosakola na bisika ya bato nyonso lokola pembeni ya ebale to ya libulu ya mai. (Marko 4:1; Yoane 4:5-15) Biso mpe tosololaka na bato makambo ya Biblia na bisika nyonso: na balabala, na bisika ya mombongo, to na telefone. Tosakwelaka mpe bato oyo bafandaka pene na biso, baninga na biso ya mosala to ya kelasi, mpe bandeko na biso ya libota soki libaku emonani. Milende nyonso wana esali ete bamilio ya bato na mokili mobimba báyoka “nsango malamu ya lobiko.”​—Nzembo 96:2.

Ezali na moto moko oyo okosepela koyebisa ye nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe bolamu oyo yango ekomemela ye na mikolo ezali koya? Kobomba nsango malamu yango mpo na yo moko te. Bandá koyebisa bato nsango yango sikoyo!

  • “Nsango malamu” nini tosengeli kosakola?

  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa ya Yesu na ndenge ya kosakola?