Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mabɔkɔ ya nyama ya mai oyo babengi pieuvre ekamwisaka mpenza

Mabɔkɔ ya nyama ya mai oyo babengi pieuvre ekamwisaka mpenza

Ba-ingénieur oyo basalaka barobo bazali kosala bisaleli malamu koleka oyo ekosalisa minganga básalaka lipaso kozanga kotya moto mpota monene na nzoto. Likambo ya sika ezali ete Ba-ingénieur yango bazwi likanisi ya komekola mabɔkɔ to bansingansinga ya nyama yango mpo ebendanaka na pɛtɛɛ nyonso mpenza.

Tókanisa naino: Nyama yango ekoki kokanga, kosimba to kofina eloko na bansingansinga na yango mwambe oyo ebendanaka na pɛtɛɛ nyonso, ata na bisika ya nkaka mpenza. Nyama yango esukaka te kaka na kogumba bansingansinga na yango na ngámbo nyonso, kasi ekoki mpe kokómisa makasi bansinga na yango mosusu soki esengeli.

Bato yango ya mayele bamoni ete lobɔkɔ ya robo oyo ezali pɛtɛpɛtɛ lokola bansingansinga ya nyama yango mpe oyo ekoki kobendana na pɛtɛɛ nyonso ekosalisa mpenza na kosala lipaso kozanga kofungola mpota monene na nzoto ya moto. Bisaleli ya ndenge yango ekoki kosalisa minganga básala na pɛtɛɛ nyonso lipaso ya mindɔndɔ oyo esɛngaka kofungola mpota monene.

Talá ndenge bansingansinga ya nyama yango ebendanaka na pɛtɛɛ nyonso

Ba-ingénieur basí basali esaleli ya ndenge wana mpe bazali kosalela yango na mapaso oyo ekokani na lipaso ya solosolo. Eteni moko na molai ya milimɛtrɛ 135 ya lobɔkɔ yango ekoki kosimba mpe kotombola biloko ya kati ya libumu kozanga kobebisa yango ntango eteni mosusu ezali kosala lipaso. Doktɛrɛ Tommaso Ranzani, moko ya bato ya ekipi oyo basalaki esaleli yango alobaki boye: “Tomoni ete mayele oyo tosaleli ezali kaka ebandeli; ekosalisa biso tóbongisa lisusu esaleli yango oyo tokotya biloko mosusu oyo ekosalisa yango esala malamu koleka.”

Lobɔkɔ ya robo oyo ezali pɛtɛpɛtɛ ekosalisa mpenza na kosala lipaso

Okanisi nini? Mabɔkɔ ya nyama ya mai oyo babengi pieuvre ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?