Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Eteni oyo ebimisaka pole na nzoto ya mwa nyama ya mai oyo babengi calmar hawaïen

Eteni oyo ebimisaka pole na nzoto ya mwa nyama ya mai oyo babengi calmar hawaïen

MWA NYAMA yango oyo esalaka bokila na butu ebimisaka pole na yango moko​—esalaka bongo mpo bámona yango te, pole na yango esanganaka na pole ya sanza mpe minzoto. Sekele ya mwa nyama yango ebombani na boyokani oyo ezalaka kati na yango mpe bamikrobɛ (bactéries) oyo ebimisaka pole yango. Boyokani yango ezali na sekele oyo ekoki komemela biso litomba, kasi na ndenge oyo tokoki kokanisa te. Ekoki kozala na litomba na sante na biso.

Tókanisa naino: Mwa nyama yango efandaka pembenipembeni ya mai ya pɛto oyo ezalaka na bisanga ya Hawaii. Mpo na koloba solo, pole ya sanza mpe minzoto esengeli komonisa elilingi ya mwa nyama yango polele na mai mpo banyama mosusu to bato oyo balyaka yango bákanga yango. Kasi, mwa nyama yango ebimisaka pole na nse ya libumu na yango, pole yango ezalaka makasi ndenge moko na pole ya sanza mpe minzoto. Yango esalaka ete elili na yango ezala te mpo bámona yango te. Sekele na yango ebombani na mwa eteni ya nzoto na yango oyo ebimisaka pole, esika ebele ya bamikrobɛ oyo ebimisaka pole efandaka mpe bamikrobɛ yango esalisaka mwa nyama yango ebatama.

Bamikrobɛ yango ekoki kosalisa mwa nyama yango elalaka to elamukaka na ndenge ebongi. Yango ebendi likebi ya bato ya mayele mpo bamoni ete ndenge oyo bamikrobɛ yango esalaka epai ya mwa nyama yango butu moi ezalaka mpe bongo epai ya bikelamu mosusu. Na ndakisa, epai ya banyama oyo emɛlisaka mabɛlɛ, bamikrobɛ oyo esalisaka yango enika bilei na estoma ekoki mpe kosalaka butu moi. Kotungisama na makanisi, diabɛti, kozala monene mingi mpe kolala malamu te nde esalaka ete bamikrobɛ yango esala malamu te butu moi. Na yango, koyekola ndenge oyo bamikrobɛ oyo efandaka na nzoto ya mwa nyama babengi calmar hawaïen esalaka, ekoki kosalisa minganga báyeba lisusu malamu ndenge ya kosalisa bato.

Okanisi nini? Eteni ya nzoto ya mwa nyama babengi calmar hawaïen, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?