Lakisá makambo oyo ezali na kati

Yesu akufaki nde na ekulusu?

Yesu akufaki nde na ekulusu?

Eyano ya Biblia

 Bato mingi bamonaka ete ekulusu ezali elembo ya bokristo. Nzokande, Biblia elobeli te eloko oyo babakaki na yango Yesu; na yango moto moko te ayebi mpenza soki ezalaki ndenge nini. Kasi, Biblia elobeli makambo oyo emonisi ete Yesu akufaki na ekulusu te, kasi nde na nzete moko kaka oyo batɛlɛmisaki.

 Na bisika oyo Biblia elobeli liwa ya Yesu, mbala mingi, esaleli liloba ya Grɛki stauros. (Matai 27:40; Yoane 19:17) Atako mbala mingi Babiblia ebongolaka liloba yango na “ekulusu,” bato ya mayele na makambo ya Biblia bandimaka ete liloba yango elimboli nde “nzete etɛlɛmá.” a Buku moko (A Critical Lexicon and Concordance to the English and Greek New Testament) elobi ete stauros “elimbolaka ata moke te biteni mibale ya nzete oyo balalisi moko likoló ya mosusu.”

 Biblia esaleli mpe liloba ya Grɛki xulon oyo ekokani na stauros. (Misala 5:30; 1 Petro 2:24) Liloba yango elimboli “libaya,” to “nzete.” b Yango wana, maloba na nse ya lokasa na Biblia moko (The Companion Bible) elobi ete: “Na Grɛki oyo bakomelaki [Kondimana ya Sika], eloko moko te epesi ata likanisi moke ya biteni mibale ya nzete bakangisi moko likoló ya mosusu.”

Nzambe andimaka ete bato básalela ekulusu na losambo?

Crux simplex​—maloba oyo ya Latin elimboli nzete moko oyo bazalaki kosalela mpo bábaka mosali mabe na yango

 Ata soki eloko oyo bakakisaki na yango Yesu ezalaki ndenge nini, makambo mpe bavɛrsɛ ya Biblia oyo elandi emonisi ete esengeli te kosalela ekulusu na losambo.

  1.   Nzambe alingaka te bato básalela bililingi to bilembo na losambo, ata mpe ekulusu. Nzambe akebisaki Bayisraele ete basengeli te kosalela “elilingi ya elembo nyonso” na losambo na bango. Biblia eyebisi mpe bakristo ete: “Bókima losambo ya bikeko.”​—Kolimbola Mibeko 4:15-19; 1 Bakorinti 10:14.

  2.   Bakristo ya liboso bazalaki kosalela ekulusu na losambo te. c Mateya mpe makambo oyo bantoma bazalaki kosala ezali ndakisa oyo bakristo nyonso basengeli kolanda.​—2 Batesaloniki 2:15.

  3.   Kosalela ekulusu na losambo eutá na mimeseno ya bapakano. d Bambula mingi nsima ya liwa ya Yesu, mangomba ekómaki koteya makambo mosusu. Mangomba yango “etikelaki bapakano oyo babongwani nzela ya kokoba kosalela bilembo na bango,” kati na yango ekulusu. (The Expanded Vine’s Expository Dictionary of New Testament Words) Nzokande, Biblia elobi te ete esengeli kondima bilembo ya bapakano kaka mpo na kozwa bandimi ya sika.​—2 Bakorinti 6:17.

a Talá New Bible Dictionary, ebimeli ya misato, ya D. R. W. Wood, lokasa 245; Theological Dictionary of the New Testament, Volimi VII, lokasa 572; The International Standard Bible Encyclopedia, Revised Edition, Volimi 1, lokasa 825; mpe The Imperial Bible-Dictionary, Volimi II, lokasa 84.

b Talá The Expanded Vine’s Expository Dictionary of New Testament Words, lokasa 1165; A Greek-English Lexicon, ya Liddell ná Scott, ebimeli ya libwa, nkasa 1191-​1192; mpe Theological Dictionary of the New Testament, Volime V, lokasa 37.

c Talá Encyclopædia Britannica, 2003, motó ya likambo “Cross”; The Cross​—Its History and Symbolism, lokasa 40; mpe The Companion Bible, Oxford University Press, apɛndisi 162, lokasa 186.

d Talá The Encyclopedia of Religion, Volimi 4, lokasa 165; The Encyclopedia Americana, Volimi 8, lokasa 246; mpe Symbols Around Us, nkasa 205-207.