Lakisá makambo oyo ezali na kati

Banefilime bazalaki banani?

Banefilime bazalaki banani?

Eyano ya Biblia

 Banefilime bazalaki bingambe, bana ya ndenge mosusu oyo baanzelu batomboki babotaki na bana basi ya bato na mikolo ya Noa. a

 Lisolo ya Biblia elobi ete “bana ya Nzambe ya solo babandaki kotala bana basi ya bato, bamonaki ete bazalaki kitoko.” (Ebandeli 6:2) ‘Bana wana ya Nzambe’ bazalaki nde bikelamu ya elimo oyo batombokelaki Nzambe ntango “basundolaki esika na bango moko ya kofanda mpenza” na likoló, balataki nzoto ya bato mpe “babandaki kozwa basi, elingi koloba, nyonso oyo bango baponaki.”​—Yuda 6; Ebandeli 6:2.

 Bana oyo baanzelu yango babotaki na bana basi ya bato bazalaki te lokola bana nyonso. (Ebandeli 6:4) Banefilime bazalaki bingambe ya kanza, bato ya nko oyo batondisaki mabele na mobulu. (Ebandeli 6:13) Biblia elobeli bango lokola “bilombe na ntango ya kala, mibali ya lokumu.” (Ebandeli 6:4) Bakendá nsango mpo na mobulu mpe kobangisa bato.​—Ebandeli 6:5; Mitángo 13:33. b

Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango mpo na Banefilime

 Libunga: Tii lelo Banefilime bazalaka.

 Solo: Yehova ayeisaki mpela na mokili mobimba mpo na kobebisa mokili wana oyo etondaki na mobulu. Mpela ekɔmbɔlaki Banefilime ná bato nyonso ya mabe. Kasi, Noa ná libota na ye bandimamaki na miso ya Yehova mpe kaka bango nde babikaki na ntango wana.​—Ebandeli 6:9; 7:12, 13, 23; 2 Petro 2:5.

 Libunga: Bato nde babotaki Banefilime.

 Solo: Batata na bango babengami “bana ya Nzambe ya solo.” (Ebandeli 6:2) Biblia esaleli kaka maloba yango mpo na kolobela baanzelu. (Yobo 1:6; 2:1; 38:7) Baanzelu bazalaki na nguya ya kolata nzoto ya bato. (Ebandeli 19:1-5; Yosua 5:13-15) Ntoma Petro alobelaki “bilimo oyo ezali na bolɔkɔ, oyo kala batosaki te ntango motema molai ya Nzambe ezalaki kozela na mikolo ya Noa.” (1 Petro 3:19, 20) Yuda, mokomi ya Biblia asaleli ndakisa yango ntango alimbolaki ete baanzelu mosusu “babatelaki te esika na bango ya ebandeli kasi basundolaki esika na bango moko ya kofanda mpenza.”​—Yuda 6.

 Libunga: Banefilime bazalaki baanzelu oyo babungaki nzela.

 Solo: Bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe na nse ya Ebandeli 6:4 emonisi ete Banefilime bazalaki baanzelu te, kasi nde bana oyo banzelu oyo basangisaki nzoto na bana basi ya bato babotaki. Ntango baanzelu “babandaki kozwa basi, elingi koloba, nyonso oyo bango baponaki,” Yehova alobaki ete na mbula 120 akosambisa mokili ya ntango wana oyo ezalaki kobanga Nzambe te. (Ebandeli 6:1-3) Lisolo yango ebakisi ete “na mikolo yango,” baanzelu oyo balataki nzoto ya bato “bakobaki kosangisa nzoto na bana basi ya bato” mpe babotelaki bango “bilombe na ntango ya kala,” Banefilime.​—Ebandeli 6:4.

a Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “Nefilime” ekoki kolimbola “Bato oyo bakweisaka.” Buku moko (Wilson’s Old Testament Word Studies) elobi ete liloba yango elobeli baoyo “bakwelaka bato na mobulu mpe babɔtɔlaka bango biloko na makasi [bapunzi], mpe basalaka ete bákwea.”

b Emonani ete Bayisraele oyo bakendaki konɔnga mokili, oyo Mitángo 13:33 elobeli, bamonaki bato ya milai mpenza oyo ezongisaki na makanisi na bango lisolo ya banefilime, oyo basilaki kokufa basiɛklɛ mingi liboso.​—Ebandeli 7:21-23.