Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini mangomba ya bokristo ezali ebele boye?

Mpo na nini mangomba ya bokristo ezali ebele boye?

Eyano ya Biblia

 Bato basaleli mateya ya Yesu Kristo mpo na kosala mangomba ndenge na ndenge ya “bokristo.” Nzokande, Biblia emonisi ete lingomba ya bokristo ya solo ezali kaka moko. Tótalela ata makambo misato oyo etindi biso tóloba bongo.

  1.   Yesu alobaki ete azali koteya “solo,” mpe bakristo ya liboso bazalaki kobenga lingomba na bango ete “solo.” (Yoane 8:32; 2 Petro 2:2; 2 Yoane 4; 3 Yoane 3) Liloba yango emonisi ete baoyo bateyaka mateya oyo ekeseni na oyo Yesu ateyaki bazali na lingomba ya bokristo ya solo te.

  2.   Biblia elobi ete bakristo basengeli ‘kolobaka bango nyonso na boyokani.’ (1 Bakorinti 1:10) Nzokande, mangomba mingi ya bokristo eyokanaka te ata na mateya oyo esimbi mpenza bokristo, na ndakisa ndimbola ya liloba mokristo. Mangomba nyonso wana ekoki kozala ya solo te.​—1 Petro 2:21.

  3.   Yesu asakolaki ete bato mingi bakomibenga bakristo, kasi bakotosa mibeko na ye te mpe akobengana bato ya ndenge wana. (Matai 7:21-23; Luka 6:46) Bato mosusu bakokosama mpe bakolanda bakonzi ya mangomba oyo babebisi losambo ya solo mpo na koluka matomba na bango moko. (Matai 7:15) Basusu kutu bakopona kolanda mangomba ya bokristo ya lokuta mpo kuna, bakoteya bango makambo oyo matoi na bango elingi koyoka na esika báteya bango solo ya Biblia.​—2 Timote 4:3, 4.

 Na ndakisa oyo Yesu apesaki ya ble ná matiti mabe, asakolaki ete botomboki (lipɛngwi) ekobima na mateya ya bokristo ya solo. (Matai 13:24-30, 36-43) Na boumeli ya ntango molai, bato bakoyeba te kokesenisa bokristo ya solo ná oyo ya lokuta. Kaka ndenge Yesu asakolaki, lipɛngwi ekómaki makasi nsima ya liwa ya bantoma. (Misala 20:29, 30) Atako mateya ya bapɛngwi ezalaka ndenge moko te, kasi mangomba yango nyonso ya bokristo ‘etiká solo.’​—2 Timote 2:18.

 Yesu asakolaki mpe ete nsukansuka, bokeseni kati na bokristo ya solo mpe oyo ya lokuta ekomonana polele. Likambo yango esalemi na mikolo na biso, eleko ya “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”​—Matai 13:30, 39.