Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bampasi nyonso eutaka kaka epai ya Zabolo?

Bampasi nyonso eutaka kaka epai ya Zabolo?

Eyano ya Biblia

 Biblia emonisi ete Satana Zabolo azali mobomi monene mpe alingaka kokokisa mokano na ye na nzela ya “bilembo ya lokuta” mpe “bokosi.” Kutu, Biblia elobi ete “azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole.” (2 Batesaloniki 2:9, 10; 2 Bakorinti 11:14) Mabe oyo Zabolo azali kobimisa emonisi ete azali moto ya solo mpenza.

 Nzokande, bampasi nyonso eutaka epai ya Zabolo te. Mpo na nini? Nzambe akelá moto na likoki ya kopona kosala malamu to mabe. (Yosua 24:15) Ntango toponi kosala mabe, tokobuka mbuma na yango.​—Bagalatia 6:7, 8.