Lakisá makambo oyo ezali na kati

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO | MIRIAME

“Bóyembela Yehova”!

“Bóyembela Yehova”!

Mwana moko ya mwasi amibombi na esika oyo moto akoki komona ye te, azali kotala esika moko na kati ya matiti. Azali koningana te mpe azali kobanga wana mai ya Ebale Nile ezali koleka malɛmbɛmalɛmbɛ. Asili kotɛlɛma wana ngonga molai, azali se kotala esika yango; banyama ya mikemike ezali kolekaleka pene na ye, kasi azali kokipe te. Kuna, epai azali kotala, babombi kitunga moko oyo mai ekoki kokɔta kati na yango te; na kitunga yango, balalisi bebe moko ya mobali; leki na ye. Azali koyoka mawa mingi ntango azali kokanisa ndenge leki na ye azali se ye moko kuna na kati ya kitunga wana. Kasi, ayebi ete baboti na ye bazwi ekateli ya malamu ndenge batye ye na kitunga na kati ya matiti. Basengeli kaka kosala bongo mpo na kobikisa bomoi ya leki na ye ya mobali.

Elenge mwasi yango azalaki mpenza na mpiko; eumelaki te, amonisaki mpiko mingi lisusu koleka. Atako azalaki naino moke, azalaki kokolisa kondima makasi epai ya Nzambe. Likambo moko esalemaki oyo emonisi ete azalaki mpenza na kondima; mpe kondima yango emonanaki polele na bomoi na ye mobimba. Bambula na nsima, ntango akómaki mwasi monene, kondima na ye ekambaki ye ntango ekólo na bango ekutanaki na likambo moko ya esengo mingi. Lisusu, kondima na ye esungaki ye ntango asalaki libunga moko monene. Elenge mwasi yango nkombo na ye nani? Mpe kondima na ye ekoki koteya biso nini?

Miriame azalaki mwana ya baombo

Biblia epesi te nkombo ya elenge mwasi yango; kasi toyebi soki ezali nani. Ezali Miriame mwana ya liboso ya Amirame mpe Yokebede, baombo Baebre oyo bazalaki na mokili ya Ezipito. (Mitángo 26:59) Na nsima, bebe yango ya mobali abengamaki, Moize. Arona, azalaki yaya ya Moize, mpe azalaki na mbula soki misato na ntango wana. Eyebani mpenza te soki Miriame azalaki na mbula boni, kasi ekoki kozala ete azalaki na nse ya mbula zomi.

Miriame akolaki na ntango oyo bato ya ekólo na bango bazalaki konyokwama. Bato ya Ezipito bazalaki komona Baebre, bato ya ekólo na ye ete bazali likama mpo na bango; yango wana bakómisaki bango baombo mpe bakómaki konyokola bango. Wana baombo yango bazalaki se kokóma mingi, Baezipito babangaki lisusu mpe balukaki kosala likambo moko ya mabe koleka. Farao apesaki mitindo ete bana nyonso ya mibali ya Baebre bábomama kaka ntango babotami. Na ntembe te, Miriame ayebaki kondima oyo basi babotisi Shifara ná Pua bamonisaki ndenge baboyaki na mayele nyonso kotosa mitindo yango.​—Kobima 1:8-22.

Lisusu, Miriame amonaki mpe kondima ya baboti na ye. Ntango mwana na bango ya kitoko ya misato abotamaki, Amirame ná Yokebede babombaki ye tii akokisaki sanza misato. Batikaki te kobanga Farao epekisa bango bábatela mwana na bango. (Baebre 11:23) Nzokande, kobomba bebe ezalaka pɛtɛɛ te; eumelaki te basengelaki kozwa ekateli moko ya mpasi koleka. Yokebede ayebaki ete asengelaki kobomba bebe na ye malamu mpe kotya ye na esika oyo moto moko akokaki komona ye; moto oyo akokaki kobatela mpe kobɔkɔla ye. Na ntembe te, azalaki kobondela na motema na ye mobimba wana azalaki kosala kitunga ya matiti, apakolaki yango gudrɔ ná mpaka mpo mai ekɔta te na kati na yango; na nsima, atyaki mwana na ye na kati ya kitunga yango mpe atyaki kitunga yango pembeni ya Ebale Nile! Ekoki kozala ayebisaki Miriame atikala kuna atala likambo oyo ekosalema.​—Kobima 2:1-4.

Miriame abikisaki leki na ye

Miriame atikalaki wana mpe azalaki kozela. Eumelaki te, ayokaki bato bazali koya. Ezalaki etuluku ya basi Baezipito mpe bazalaki basi ya mpambampamba te. Ezalaki mwana mwasi ya Farao nde azalaki koya elongo na basaleli na ye ya basi; bazalaki koya kosukola na Ebale Nile. Ekoki kozala ete Miriame abangaki. Mwana mwasi ya Farao alingaki nde kobuka mobeko ya tata na ye mpe kotika bebe wana na bomoi? Na ntembe te, Miriame abondelaki Yehova makasi na ntango wana.

Mwana mwasi ya Farao nde moto ya liboso amonaki kitunga wana na matiti. Atindaki mosaleli na ye ya mwasi amemela ye kitunga yango. Na nsima, Biblia elobi boye: “Ntango afungolaki yango amonaki mwana, mpe talá mwana mobali yango azalaki kolela.” Nokinoki, ayebaki likambo oyo esalemaki: Mama moko na kati ya Baebre azalaki koluka kobatela bomoi ya mwana na ye. Kasi, mwana mwasi ya Farao ayokelaki bebe wana kitoko mawa. (Kobima 2:5, 6) Miriame azalaki kotala na bokɛngi mpenza. Mbala mosusu, amonaki ete mwasi yango ayoki mawa. Miriame ayebaki ete ntango ekokaki, ntango oyo asengelaki kosala likambo moko mpo na komonisa kondima na ye epai ya Yehova. Na mpiko nyonso, apusanaki pene ya mwana mwasi ya Farao mpe basaleli na ye ya basi.

Toyebi te etumbu nini mwa elenge mwasi Moebre akokaki kozwa na ndenge apusanaki pene ya mwana ya mokonzi mpe abandaki koloba mbala moko. Ata bongo, Miriame atunaki mbala moko mwana mwasi ya mokonzi boye: “Olingi nakende kobengela yo mpenza mwasi moko oyo azali komɛlisa mabɛlɛ kati na basi Baebre mpo amɛlisela yo mwana yango mabɛlɛ?” Motuna wana ebongaki mpenza. Mwana mwasi ya Farao ayebaki ete azali na likoki te ya komɛlisa bebe mabɛlɛ. Ekoki kozala akanisaki boye: Soki mama moko kati na Baebre amɛlisi bebe yango mabɛlɛ ekobenda mpenza te likebi ya bato; na nsima, akokaki kozwa mwana yango, kokóma mama mobokoli na ye mpe kotángisa ye kelasi. Na ntembe te, Miriame asepelaki makasi ntango mwana mwasi ya Farao ayanolaki ye na liloba kaka moko ete: “Kende!”​—Kobima 2:7, 8.

Na mpiko nyonso, Miriame akɛngɛlaki leki na ye wana azalaki naino bebe

Miriame akimaki mbangu na ndako na bango, epai baboti na ye bazalaki mitema likoló. Kanisá esengo azalaki na yango ntango ayebisaki mama na ye nsango wana. Na ntembe te, Yokebede andimaki mpenza ete Yehova nde azali kotambwisa makambo; na yango, akendaki ná Miriame epai ya mwana mwasi ya Farao. Ekoki kozala ete Yokebede abombaki esengo na ye ntango mwana mwasi ya mokonzi apesaki ye motindo ete: “Zwá mwana oyo azala na yo elongo mpe mɛliselá ngai ye mabɛlɛ, mpe ngai moko nakopesa yo lifuti na yo.”​—Kobima 2:9.

Miriame ayekolaki makambo mingi etali Nzambe na ye, Yehova, na mokolo yango. Ayekolaki ete amibanzabanzaka mpo na bato na ye mpe ayokaka mabondeli na bango. Lisusu, ayekolaki ete kaka bato oyo bazali mikóló te to mpe mibali te nde basengeli komonisa mpiko mpe kondima. Yehova ayokaka mabondeli ya basaleli na ye nyonso ya sembo. (Nzembo 65:2) Biso nyonso lelo oyo, elingi koloba, bilenge mpe mikóló, mibali mpe basi, tosengeli kobosana likambo yango te na ntango oyo ya mpasi.

Miriame azalaki yaya ya motema molai

Yokebede amɛlisaki bebe yango mabɛlɛ mpe abatelaki ye malamu. Tokoki kokanisa ndenge Miriame alingaki ndeko na ye mingi, oyo abikisaki. Ekoki kozala asalisaki ye ayekola koloba mpe asepelaki makasi ntango alobaki nkombo ya Nzambe na ye, Yehova mpo na mbala ya liboso. Ntango mwana akolaki, basengelaki kokende kotika ye epai ya mwana mwasi ya Farao. (Kobima 2:10) Na ntembe te, libota mobimba ezalaki na mawa mpo na kokabwana na ye. Ekoki kozala ete Miriame azalaki kozela na motema likoló mpo na koyeba soki ndeko na ye akokóma moto ya lolenge nini, ndenge mwana mwasi ya Farao apesaki ye nkombo Moize! Akokoba kaka kolinga Yehova atako azalaki kokola na ndako ya mokonzi?

Na nsima, eyano emonanaki polele. Na ntembe te, Miriame asepelaki mingi ntango leki na ye akolaki mpe aponaki kosalela Yehova na esika ya kolanda bozwi mpe lokumu oyo akokaki kozwa na ndako ya Farao! Ntango Moize akómaki na mbula 40, amityaki na ngámbo ya bato ya ekólo na ye. Abomaki Moezipito moko oyo azalaki konyokola moombo moko Moebre. Moize akimaki Ezipito mpo na kobatela bomoi na ye.​—Kobima 2:11-15; Misala 7:23-29; Baebre 11:24-26.

Ekoki kozala ete Miriame azalaki kozwa lisusu te bansango ya ndeko na ye na boumeli ya bambula 40 oyo elandaki, wana ndeko na ye azalaki ye moko mosika na Midiane, epai azalaki kobatela bampate. (Kobima 3:1; Misala 7:29, 30) Wana Miriame azalaki malɛmbɛmalɛmbɛ kokóma mokóló, amonaki ndenge bato ya ekólo na bango bazalaki konyokwama se konyokwama.

Miriame azalaki mosakoli-mwasi

Ekoki kozala ete Miriame azalaki na mbula koleka 80 ntango Moize azongaki; Nzambe atindaki ye alongola libota na Ye na boombo. Arona azalaki molobeli ya Moize, mpe bandeko mibale wana ya Miriame bakendeki epai ya Farao mpo na kosɛnga ye atika basaleli ya Nzambe bákende. Na ntembe te, Miriame asalaki nyonso mpo na kosunga mpe kolendisa bango wana Farao aboyaki koyoka bango, mpe ntango basengelaki kozonga mbala na mbala mpo na kokebisa Baezipito, ntango Yehova ayeisaki malɔzi zomi. Mpe na bolɔzi ya nsuka, ntango bana nyonso ya liboso ya Baezipito babomamaki, ngonga ekokaki mpo Bayisraele nyonso bábima! Kanisá ndenge Miriame, kozanga kolɛmba azalaki kosalisa bato ya ekólo na ye wana Moize azalaki kokamba bango mpo na kobima na Ezipito.​—Kobima 4:14-16, 27-31; 7:1–12:51.

Na nsima, Bayisraele bakómaki na motambo; elingi koloba, Mbu Motane ezalaki liboso na bango mpe limpinga ya basoda ya Ezipito ezalaki kolanda bango na nsima. Na ntango yango, Miriame amonaki ndenge ndeko na ye Moize atɛlɛmaki liboso ya Mbu mpe atombolaki lingenda na ye. Mbu ekabwanaki! Mabele ekaukaki; amonaki ndenge Moize azalaki kokamba Bayisraele bákatisa esika yango. Na ntembe te kondima ya Miriame epai ya Yehova ekómaki lisusu makasi koleka. Ayebaki ete Nzambe na ye azalaki na likoki ya kosala nyonso, kokokisa likambo nyonso oyo alaki!​—Kobima 14:1-31.

Na nsima, ntango Bayisraele bakatisaki kozanga likama mpe ete mai ya mbu ezongaki mpe ezindisaki Farao ná limpinga na ye ya basoda, Miriame amonaki ete ata limpinga oyo elekaki mampinga nyonso na mokili na nguya, elongaki te liboso ya Yehova. Mibali ya Yisraele bayembelaki Yehova nzembo. Ntango mibali bazalaki koyemba, basi bazalaki kozongisa na maloba oyo Miriame alakisaki bango: “Bóyembela Yehova, mpo atombwami likoló mingi mpenza. Mpunda mpe motambwisi na yango abwaki bango na mbu.”​—Kobima 15:20, 21; Nzembo 136:15.

Nzambe asalelaki Miriame mpo na kokamba basi ya Yisraele báyemba loyembo ya elonga na Mbu Motane

Ezalaki mokolo moko ya ntina mingi na bomoi ya Miriame, mokolo oyo akokaki kobosana yango ata moke te. Na esika oyo, Biblia ebengi Miriame mosakoli-mwasi. Miriame azali mwasi ya liboso oyo abengami bongo. Miriame azalaki moko ya basi moke oyo basalelaki Yehova lokola basakoli.​—Basambisi 4:4; 2 Bakonzi 22:14; Yisaya 8:3; Luka 2:36.

Na yango, Biblia emonisi biso ete Yehova amonaka biso mpe azalaka na mposa ya kopambola milende oyo tosalaka na komikitisa nyonso, motema molai oyo tomonisaka mpe mposa oyo tozalaka na yango mpo na kokumisa ye. Tózala bilenge to mikóló, mibali to basi, tokoki komonisa kondima epai ya Yehova. Kondima motindo wana esepelisaka ye; abosanaka yango te, mpe asepelaka kopesa mbano mpo na yango. (Baebre 6:10; 11:6) Yango emonisi biso ntina ya komekola kondima ya Miriame!

Miriame akómi na lolendo

Mikumba mpe lokumu ememaka mapamboli kasi ekoki mpe komema makama. Ntango Bayisraele babimaki na boombo, emonani ete Miriame azalaki mwasi moko ya lokumu mingi na ekólo. Akokóma na lolendo to akomitombola? (Masese 16:18) Likambo ya mawa, na ntango moko boye akómaki na lolendo.

Mwa basanza nsima ya kobima na Ezipito, Moize ayambaki bato oyo bautaki mosika, elingi koloba, tata-bokilo na ye, Yetro oyo ayaki kotika mwasi ya Moize, Zipora mpe bana na bango mibale ya mibali. Moize abalanaki na ye ntango afandaki mbula 40 na Midiane. Na nsima, Zipora azongaki epai ya libota na ye na Midiane; ekoki kozala mpo na kotala bango mpe sikoyo tata na ye ayei kotika ye na kaa ya Bayisraele. (Kobima 18:1-5) Kanisá ndenge kaa eninganaki ntango bakómaki! Na ntembe te, bato mingi bazalaki na mposa ya komona mwasi ya moto oyo Nzambe aponaki mpo na kobimisa bango na Ezipito.

Miriame mpe asepelaki? Mbala mosusu na ebandeli asepelaki. Kasi, emonani ete na nsima akómaki na lolendo. Ekoki kozala ete abangaki, akanisaki ete Zipora akozwa esika na ye ya mwasi oyo aleki na lokumu na kati ya ekólo. Ata soki ezalaki bongo to te, Miriame ná Arona bakómaki koloba mabe. Mpe ndenge emonanaka mbala mingi, maloba mabe ya ndenge wana ekómaka maloba ya kozokisa. Liboso bazalaki koloba mabe mpo na Zipora mpo azalaki Moyisraele te, kasi Mokushi. * Kasi, bakómaki mpe koloba mabe mpo na Moize. Miriame ná Arona bazalaki koloba boye: “Ezali kaka na nzela ya Moize ye moko nde Yehova alobi? Ye alobi mpe na nzela na biso te?”​—Mitángo 12:1, 2.

Miriame azwi maladi ya maba

Na maloba wana, tomoni ete Miriame ná Arona bakómaki kokolisa ezaleli moko ya mabe. Bazalaki kosepela lisusu te na ndenge oyo Yehova azalaki kosalela Moize, bakómaki koluka kokóma na bokonzi mpe lokumu mingi. Ezalaki nde mpo Moize azalaki kosalela bokonzi na ye na ndenge ya mabe, to azalaki koluka lokumu? Te. Na ntembe te, azalaki na mabunga, kasi azalaki te na lolendo mpe koluka kokonza basusu. Biblia elobi boye: “Mpe moto yango Moize azalaki na komikitisa mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele.” Ata soki ezalaki bongo to te, Miriame ná Arona balobaki mabe mpo na Moize, mpe bazalaki na likama. Mpo Biblia elobi ete: “Yehova azalaki koyoka.”​—Mitángo 12:2, 3.

Na mbala moko, Yehova abengaki bandeko misato yango bákende na hema ya kokutana. Kuna, likonzí ya lipata, oyo ezalaki komonisa Yehova ekitaki mpe etɛlɛmaki na monɔkɔ ya hema. Na nsima, Yehova abandaki koloba. Apamelaki Miriame ná Arona, akundwelaki bango boyokani oyo azalaki na yango ná Moize mpe ntina monene oyo aponaki kotyela ye motema. Yehova atunaki bango boye: “Bongo mpo na nini bobangi te koloba mabe mpo na mosaleli na ngai, mpo na Moize?” Na ntembe te, Miriame ná Arona balɛngaki na kobanga. Ndenge oyo bazangaki limemya epai ya Moize, Yehova amonaki ete bazangi nde limemya mpenza epai na ye moko.​—Mitángo 12:4-8.

Emonani ete Miriame nde abandisaki likambo yango, atindaki ndeko na ye azala na ngámbo na ye mpo na kotɛlɛmela mwasi ya ndeko na bango. Yango emonisi ntina oyo kaka Miriame nde azwaki etumbu. Yehova apesaki ye maladi ya maba. Maladi mabe yango ekómisaki loposo na ye “mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.” Na mbala moko, Arona amikitisaki liboso ya Moize mpe asɛngaki ye abondela Nzambe mpo na bango; alobaki boye: “Kotángela biso te lisumu oyo tosali na bozoba mpe oyo tosumuki na yango!” Moize, moto ya komikitisa abelelaki Yehova na maloba oyo: “Ee Nzambe, nabondeli yo, bikisá ye, nabondeli yo!” (Mitángo 12:9-13) Arona ná Moize bayokaki mawa mingi mpo na Miriame mpe bazalaki na mposa ete abika, yango emonisi ete balingaki ye mingi atako asalaki libunga.

Nzambe alimbisi Miriame

Yehova alimbisaki Miriame mpo abongolaki motema. Nzokande, asɛngaki alekisa mikolo nsambo libándá ya kaa ya Yisraele. Ezalaki nsɔni mpo na Miriame atosa etinda yango, mpo basusu na kaa basengelaki koyeba ete azwi etumbu. Kasi, kondima na ye ebikisaki ye. Na ntembe te, na motema na ye ayebaki ete Tata na ye Yehova azali sembo mpe ete apesaki ye etumbu mpo alingaki ye. Yango wana, atosaki mpe azalaki ye moko mosika na bato mikolo nsambo na libándá ya kaa wana bato nyonso bazalaki kozela ye. Na nsima, Miriame amonisaki lisusu kondima na ye ntango amikitisaki mpe andimaki ete ‘báyamba ye lisusu na kaa.’​—Mitángo 12:14, 15.

Yehova apesaka etumbu na baoyo alingaka. (Baebre 12:5, 6) Lokola alingaki Miriame, asembolaki ye ntango amonisaki ezaleli ya lolendo. Kosembolama yango esalaki mpasi, kasi ebikisaki mpe ye. Lokola Miriame amonisaki kondima mpe aboyaki disiplini te, yango esalaki ete Nzambe andima ye lisusu. Aumelaki na bomoi kino pene na nsuka mpenza ya kozala ya Bayisraele na esobe. Ntango akufaki na Kadeshe, na esobe ya Zine, emonani ete azalaki na mbula pene na 130. * (Mitángo 20:1) Bankama ya bambula na nsima, Yehova akanisaki Miriame mpo na mosala ya sembo oyo asalaki. Na nzela ya mosakoli na ye Mika, akundwelaki bato na ye boye: “Nasikolaki bino na ndako ya boombo; mpe natindaki Moize, Arona mpe Miriame.”​—Mika 6:4.

Kondima ya Miriame esalisaki ye azala na komikitisa ntango Yehova apesaki ye disiplini

Tokoki koyekola makambo mingi na bomoi ya Miriame. Tosengeli kobatela baoyo bazali na likoki te ya komibatela mpe na mpiko nyonso koloba mpo na kolongisa makambo oyo ezali sembo, ndenge Miriame asalaki ntango azalaki naino mwana. (Yakobo 1:27) Na ndakisa na ye, tosengeli koteya basusu nsango malamu ya Nzambe na esengo nyonso. (Baroma 10:15) Lokola ye, tosengeli koyekola koboya zuwa mpe makambo nyonso ya bololo. (Masese 14:30) Mpe lokola ye, na komitisa nyonso tosengeli kondima mpe kotika ete Yehova asembola biso. (Baebre 12:5) Soki tosali bongo, tokomekola mpenza kondima ya Miriame.

^ par. 21 Na oyo etali Zipora, ekoki kozala ete liloba “Mokushi” ezali mpo autaki na Arabia, lokola basi mosusu ya Midiane, kasi te na Etiopi.

^ par. 26 Bandeko yango misato bakufaki na kolanda ndenge babotamaki​—liboso Miriame, na nsima Arona, mpe na nsuka Moize​—ekoki kozala nsima ya mbula soki moko.