Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kosalela makambo ya moto​—République tchèque

Kosalela makambo ya moto​—République tchèque

Ntango moto andimi kokóma mosakoli, elakisi ete andimi mpe ete lingomba ya Batatoli ya Yehova​—ata lisangá oyo ayanganaka, biro ya filiale ya ekólo na bango, to bibongiseli mosusu ya Batatoli ya Yehova—​esalela makambo na ye mpo na kokokisa mikano na yango ya losambo. Basakoli bandimaka koyebisa lisangá makambo na bango na ndenge oyo elimbolami na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova mpo bákoka kosala makambo oyo losambo na bango esɛngi mpe bázwa lisungi ya elimo.​—1 Petro 5:2.

Basakoli bakoki koyebisa makambo na bango mosusu na ebongiseli ya Batatoli ya Yehova ntango balingi komipesa na misala mosusu ya lingomba. Makambo ya moto ekoki kozala: nkombo na ye, dati na ye ya kobotama, koyebisa soki azali mwasi to mobali, dati na ye ya batisimo, nimero na ye ya telefone to adrɛsi e-mail na ye, to makambo etali boyokani na ye ná Nzambe, mosala na ye ya kosakola to mikumba oyo azali na yango na ebongiseli ya Batatoli ya Yehova. Makambo yango ekoki mpe komonisa bindimeli ya mosakoli mpe makambo na ye mosusu oyo moto nyonso te akoki koyeba. Kosalela makambo ya moto ekoki kolimbola kozwa makambo yango, kobomba yango, kobongisa yango mpe kotya yango na molɔngɔ, ata mpe kosala na yango makambo mosusu ya ndenge wana.

Mobeko ya kobatela makambo na ekólo oyo yango oyo:

Mobeko No. 110/2019 coll., oyo etali kolandela makambo ya moto, mpe Malako ndenge na ndenge etali kobatela makambo (UE) 2016/679.

Na boyokani na “Mobeko ya kobatela makambo” yango, basakoli bandimaka ete ebongiseli ya Batatoli ya Yehova esalela makambo na bango mpo na bantina ya losambo lokola oyo elandi:

  • kosala masolo na makita ya lisangá ya Batatoli ya Yehova na esika bafandi to kosala mosala moko oyo esɛngi lifuti te;

  • kondima kosala masolo na makita, na liyangani ya moke to ya monene oyo bakozwa bilili mpe mingongo mpe bakolakisa yango mpo na koteya makambo ya elimo na Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba;

  • kosala misala to kokokisa mikumba mosusu na lisangá, oyo esɛngi ete nkombo ya mosakoli mpe mokumba bapesi ye ekomama na etanda ya mayebisi na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova;

  • kobomba bafishɛ ya Mosala ya mosakoli na lisangá;

  • kolendisama mpe kozwa lisalisi ya bankulutu ya Batatoli ya Yehova (Misala 20:28; Yakobo 5:14, 15);

  • kobomba banimero ya telefone to baadrɛsi mosusu mpo na kosalela yango na ntango ya likama.

Makambo ya moto ekobombama ntango nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa bantina oyo touti kotánga to mpo na bantina mosusu oyo ebongi. Soki mosakoli aboyi kotya sinyatire na formilɛrɛ ya Koyebisa makambo mpe kondima básalela makambo na ngai, ntango mosusu Batatoli ya Yehova bakozala na likoki te ya koyeba soki abongi kokokisa mikumba mosusu na lisangá to mpo na kosala makambo mosusu ya lingomba.

Soki esengeli mpe ebongi tósala yango, tokoki kotinda makambo ya moto ata na ebongiseli nini ya Batatoli ya Yehova. Basakoli bayebi ete bibongiseli yango mosusu ekoki kozala na bikólo oyo mibeko na yango na oyo etali kobatela makambo ya moto ekeseni ná oyo ya ekólo epai makambo ya moto euti. Atako bongo, basakoli bayebi ete, ezala esika nini makambo na bango ekokende, ata mpe bibongiseli oyo ezalaka na Biro monene ya Batatoli ya Yehova na États-Unis, bakosalela yango kaka ndenge “Ndenge oyo lingomba ya Batatoli ya Yehova ebatelaka makambo ya moto” esɛngi.

Basakoli bazali na lotomo ya komona makambo na bango oyo Batatoli ya Yehova babombi, kosɛnga ete báboma yango to koyebisa na makambo nini bakoki kotalela yango to mpe kosembola mabunga oyo bamoni na kati. Basakoli bakoki, ata na ntango nini, koloba ete baboyi ndenge mosusu oyo bakoki kosalela makambo na bango na mikolo ekoya. Soki mosakoli alingi lisusu te básalela makambo na ye, Batatoli ya Yehova bakoki kozala na lotomo ya kokoba kosalela makambo na ye mosusu kozanga ndingisa na ye na kotalela bantina ebongi oyo lingomba na bango ezali na yango ya kobatela mpe kotalela makambo ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba to mpo na ntina mosusu oyo endimami na mibeko mpe na “Mobeko ya kobatela makambo.” Basakoli bayebi ete bakoki koyebisa ebongiseli ya Leta oyo etalelaka kobatela makambo na ekólo oyo bafandi likambo nyonso oyo bamoni mabe.

Mpo na kobatela makambo ya moto, Batatoli ya Yehova bazwá bibongiseli ndenge na ndenge oyo bakoki kolanda mpe eyokani na “Mobeko ya kobatela makambo.” Basakoli bayebi ete kaka bato moke oyo bazwi ndingisa ya kokokisa bantina oyo tolobeli likoló nde bakoki komona makambo na bango.

Moto akoki kotuna mituna epai ya moto oyo atalelaka likambo ya kobatela makambo mpo na ekólo na bino na adrɛsi e-mail oyo:

DataProtectionOfficer.CZ@jw.org.

Basakoli bayebi ete bakoki komona nkombo mpe baadrɛsi ya ebongiseli oyo etalelaka makambo na bango na ekólo oyo bafandaka, ata mpe ya momonisi na yango to ya moto na yango oyo atalelaka likambo ya kobatela makambo, soki esengeli, na jw.org, na esika bakomi Kobatela makambo – Contacts.

Na bantango mosusu, tokoki kobongola malako na biso etali makambo ya bato soki misala na biso mosusu ya lingomba, mibeko to makambo ya tekiniki ebongwani. Soki esɛngi tóbongola makambo mosusu na esika oyo, “Kosalela makambo ya moto,” tokotya mbongwana wana na esika oyo mpo basakoli báyebaka ntango nyonso makambo oyo tozwaka epai na bango mpe ndenge oyo tosalelaka yango. Tosɛngi yo otángaka makambo ekomami na esika oyo mpo na koyeba makambo oyo ebongwani.