Lakisá makambo oyo ezali na kati

Malako etali makambo ya moto

Malako etali makambo ya moto

LIYEBISI: SOKI OZALI KOSALELA SITE NA BISO TO MPE OYEBISI BISO MAKAMBO NA YO, ELAKISI ETE ONDIMI TÓSALELA MAKAMBO YANGO NA NDENGE MPE NA MIKANO OYO EMONISAMI AWA MPE NA KOLANDA MIBEKO YA LETA NA OYO ETALI MAKAMBO YA MOTO.

 KOBATELA MAKAMBO NA YO

Tolingi mpenza kobatela makambo na yo. Yango wana, makambo oyo tokomi awa ezali komonisa ndenge oyo makambo na yo oyo tozwi to oyo yo moko oyebisi biso ekosalelama na site na biso. Soki okɔti na site na biso, totikalaka na mwa makambo na yo mpe toyebi ete ezali na ntina tóbatela yango malamu mpe tóyebisa yo ndenge oyo tokosalela yango. Okoki kozwa ekateli ya koyebisa biso makambo oyo eyebani ete etali moto ye moko. Awa “makambo ya moto” ezali makambo lokola nkombo na yo, adrɛsi e-mail na yo, adrɛsi na yo ya posita, nimero na yo ya telefone to likambo mosusu nyonso oyo ekoki kosalisa mpo na koyeba yo. Tokosɛnga yo te oyebisa makambo na yo liboso okɔta na bisika oyo ezali mpo na moto nyonso na site na biso. Liloba “site” elakisi site oyo mpe basite na biso mosusu lokola: apps.pr418.com, tv.pr418.com, stream.pr418.com, mpe wol.pr418.com.

 EPAI MAKAMBO NA YO EKOKENDE

Site oyo ezali ya Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc. (“Watchtower”), oyo ezali ebongiseli oyo esalaka mombongo te, ekomisami na mikanda ya Leta na etúká ya New York mpe oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mpo na misala na bango, ata mpe mosala ya koteya bato Biblia. Soki osepeli kokomama na site yango, kopesa likabo, kosɛnga báyekola na yo Biblia ofele, to kosala likambo mosusu oyo esɛngi ete oyebisa makambo na yo, elakisi ete ondimi makambo oyo, mpe ondimi bákɔtisa makambo na yo na baordinatɛrɛ oyo ezali na États-Unis mpe ete Watchtower ná bibongiseli mosusu oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na mikili ndenge na ndenge ezwa makambo yango, etalela yango, etinda yango esika mosusu, mpe ebomba yango, mpo na kosala likambo oyo osɛngi. Lingomba na biso esalaka na bikólo ndenge na ndenge na nzela ya bibongiseli oyo endimami na mibeko ya Leta. Na oyo etali kobatela makambo ya moto, bibongiseli yango ekoki kozala masangá, babiro ya filiale, mpe bibongiseli mosusu ya Batatoli ya Yehova.

Epai makambo na yo ekokende ekotalela makambo oyo ozali kosala na site na biso. Na ndakisa, soki opesi likabo na ebongiseli moko oyo endimami na mibeko na ekólo moko boye, nkombo na yo mpe makambo mosusu oyo oyebisi ekotindama na ebongiseli wana, oyo omonaki nkombo na yango ntango ozalaki kolanda malako mpo na kopesa likabo. Ndakisa mosusu: soki osɛngi báyekola na yo Biblia, nkombo na yo mpe makambo na yo mosusu ekotindama na biro ya filiale mpe na lisangá ya Batatoli ya Yehova ya ekólo na bino mpo bákokisa mposa na yo.

Mpo na kosalisa yo, soki na ekólo na bino bozali na mibeko ya kobatela makambo ya moto, okoki komona makambo etali ekólo yango na esika babengi Kobatela makambo - Contacts.

 KOBATELA MPE KOBOMBA MAKAMBO

Tozwaka na lisɛki te likambo ya kobatela mpe kobomba makambo na yo. Tosalelaka mayele nyonso ya sika mpo na kobomba mpe kobatela makambo na yo mpo na kopekisa bato oyo bazali na ndingisa te bámona yango, básalela to bápanza yango, bábongola yango kozanga ndingisa, bábebisa yango na nko, to bábungisa yango kozanga kokana. Tosɛngaka na bato nyonso oyo bazali na mikumba ya kotalela makambo ya moto mpe bakompanyi mosusu oyo topesaka mokumba ya kosalela makambo yango bábomba yango sɛkɛlɛ. Tokobomba makambo na yo ntango oyo esengeli na kotalela ntina oyo tozwaki yango to mpo na kotosa mibeko ya Leta na likambo ya kobomba makambo ya moto.

Mpo na komema makambo na yo tii esika oyo ekobombama, tosalelaka mayele oyo ezali kopekisa moto atánga yango, na ndakisa TLS (Transport Layer Security). Tosalelaka mpe baordinatɛrɛ oyo esɛngi kode mpo na kokɔta, oyo ezali na kati ya bisika oyo moto nyonso te azali na ndingisa ya kokɔta. Tolandelaka makasi ndenge tozali kobatela makambo ya moto mpo moto oyo azali na ndingisa te amona yango te.

 BANA MIKE

Soki okokisi naino te mbula oyo batángaka moto mokóló na mboka na bino, ntango ozali kokɔta na site na biso, okoki kokɔtisa makambo na yo kaka soki moboti (to baboti) na yo to mpe moto oyo abɔkɔlaka yo, apesi ndingisa. Soki ozali moboti to moto oyo abɔkɔlaka mwana mpe opesi ye nzela atinda makambo na ye na site oyo, elakisi ete ondimi mwana na yo asala makambo ndenge tolimboli awa.

 BAKOMPANYI OYO ESALELAKA BISO MISALA MOSUSU

Ntango mosusu, na site na biso okoki komona bisika oyo, soki ofini yango, ekomema yo na site ya kompanyi moko oyo toponá mpo esalela biso misala mosusu (na ndakisa, kotondisa formilɛrɛ na Internet). Okoyeba ete okɔti na site mosusu mpo yango ekomonana ndenge mosusu mpe adrɛsi ya Internet ekobongwana na likoló, na esika oyo balukaka basite. Ntango tozali kopona bakompanyi oyo ekosalisa biso, mpe nsima ya kopona yango, totalelaka mbala na mbala ndenge na bango ya kobomba makambo ya bato mpe makambo mosusu mpo na koyeba soki eyokani ná oyo ya biso. Soki ozali na mituna etali ndenge na bango ya kobomba makambo, tángá yango na site na bango.

 KOYEBISA SOKI TOBONGOLI MAKAMBO

Totikaka te kobongisa mpe kobakisa makambo ya sika na site oyo, ezala mpe na makambo oyo tomeseni kosala. Mpo na yango, mpe lokola mibeko mpe makambo ya baordinatɛrɛ ezali kobongwana, ndenge na biso ya kosalela makambo ya bato ekobanda mpe kobongwana. Soki esɛngi tóbongola makambo na biso, tokotya mbongwana wana na esika oyo mpo oyebaka ntango nyonso makambo oyo tozwaka epai na yo mpe ndenge oyo tosalelaka yango.

 SCRIPT TO JAVASCRIPT

Tosalelaka ba-script na site na biso mpo site na biso ezala mindɔndɔ te. Ba-script esalisaka mpo na kobimisela yo nokinoki makambo ozali koluka. Tosalelaka yango ata moke te mpo na kotya programɛ moko boye na ordinatɛrɛ na yo to mpo na kozwa makambo na ordinatɛrɛ na yo kozanga kosɛnga yo ndingisa.

Na navigateur na yo, esengeli yo moko opesa nzela na ba-script to JavaScript mpo bisika mosusu ya site esala malamu. Ba navigateur mingi epesaka likoki ya kofungola to kokanga ba-script yango mpo na site boye to boye. Esengeli kotánga esika bakomi “Aide” na navigateur oyo ozali kosalela mpo na koyeba ndenge ya kofungola ba-script na site moko boye.