Lakisá makambo oyo ezali na kati

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezali nini?

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezali nini?

 Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali mwa etuluku ya bakristo oyo bakɔmɛli na elimo, oyo batambwisaka mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Mosala na bango esangisi makambo mibale:

 Na siɛklɛ ya liboso, “bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme” bazalaki kozwa bikateli minene mpo na bolamu ya lisangá mobimba ya bokristo. Lisangani ya Mikóló-Bakambi elandaka ndakisa yango. (Misala 15:2) Ndenge moko na mibali wana ya sembo, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali bakonzi ya Batatoli ya Yehova te. Batikaka Biblia etambwisa bango; na ndenge yango bamonisaka ete bandimaka ete Yehova atyá Yesu Kristo Mokonzi ya lisangá.​—1 Bakorinti 11:3; Baefese 5:23.

Banani bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi?

 Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali David Splane; Geoffrey Jackson; Gerrit Lösch; Kenneth Cook; Gage Fleegle; Mark Sanderson; Samuel Herd; Stephen Lett; Jeffrey Winder. Basalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Warwick, na etúká ya New York, na États-Unis.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisami ndenge nini?

 Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali na bakomite motoba mpo na kokɛngɛla misala ndenge na ndenge; ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaka na komite moko to bakomite mingi.

  •   Komite ya Bakambi: Etalelaka makambo ya Leta mpe ezwaka bibongiseli ntango likama ekómeli bandeko, ntango bazali konyokwama mpo na lingomba na bango, mpe ntango Batatoli ya Yehova bazali na mposa ya lisungi nokinoki.

  •   Komite oyo etalelaka basali: Etambwisaka makambo ya bandeko ya Betele.

  •   Komite ya kobimisa mikanda: Etalelaka mosala ya kobimisa mikanda mpe kotinda yango na bamboka, kotonga bisika ya losambo, babiro mpo na babongoli, mpe bandako ya Betele.

  •   Komite ya Mosala: Etambwisaka mosala na biso ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi.’​—Matai 24:14.

  •   Komite ya Mateya: Ebongisaka mateya oyo toyokaka na makita, na biteyelo, oyo etyamaka na ba CD mpe na bavideo.

  •   Komite ya Bokomi: Etalelaka mosala ya kokoma makambo oyo ebimaka na mikanda, na site na biso, mpe etambwisaka mosala ya kobongola mikanda.

 Longola misala oyo basalaka na bakomite wana, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakutanaka pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kotalela bamposa ya ebongiseli na biso mobimba. Na likita yango, bandeko batalelaka makanisi ya Biblia, batikaka elimo santu ya Nzambe etambwisa bango mpe basalaka makasi bázwa bikateli na bomoko.​—Misala 15:25.

Basungi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali banani?

 Ezali bakristo oyo babongi kotyelama motema; basalaka na bakomite ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. (1 Bakorinti 4:2) Bazali na mayele mpe bameseni na mosala oyo esalemaka na komite oyo batye bango, mpe bakɔtaka na likita ya komite yango pɔsɔ na pɔsɔ. Atako bazalaka te ntango bikateli ezali kozwama, bapesaka toli ya malamu mpe makanisi ya ntina mingi, batosisaka bikateli oyo ezwami mpe balandelaka matomba oyo ebimisi. Lisangani ya Mikóló-Bakambi etindaka bango bákende kotala bandeko na mikili ndenge na ndenge. Bapesaka bango mpe badiskur na makita minene, na ndakisa likita ya nsuka ya mbula ya Batatoli ya Yehova to na likita ya kopesa bana-kelasi ya Gileade badiplome.

BANDEKO OYO BAZALI BASUNGI

Komite

Nkombo

Ya Bakambi

  • John Ekrann

  • Paul Gillies

  • Troy Snyder

Oyo etalelaka basali

  • Daniel Molchan

  • Gerald Grizzle

  • Mark Scott

  • Patrick LaFranca

  • Ralph Walls

Ya kobimisa mikanda

  • Alex Reinmueller

  • David Sinclair

  • Donald Gordon

  • Gajus Glockentin

  • Harold Corkern

  • Robert Butler

  • Robert Luccioni

Ya Mosala

  • Anthony Griffin

  • Baltasar Perla

  • Betty Georges

  • Christopher Mavor

  • Gary Breaux

  • Jacob Rumph

  • Jody Jedele

  • Joel Dellinger

  • Jonathan Smith

  • Leon Weaver

  • Seth Hyatt

  • William Turner

Ya Mateya

  • David Schafer

  • Kenneth Flodin

  • Mark Noumair

  • Michael Banks

  • Ronald Curzan

  • William Malenfant

Ya Bokomi

  • Clive Martin

  • Gene Smalley

  • Izak Marais

  • Hermanus van Selm

  • James Mantz

  • Kenneth Godburn

  • Leonard Myers

  • Nicholas Ahladis

  • Per Christensen

  • Robert Ciranko