Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maremagnum/Corbis Documentary via Getty Images

BÓSƐNZƐLAKA!

Armagedone ekobanda nde na Israël?​—Biblia elobi nini?

Armagedone ekobanda nde na Israël?​—Biblia elobi nini?

 Biblia emonisi te ete Armagedone ekozala etumba moko oyo ekosalema kaka na mwa eteni moko ya mabele, kasi emonisi ete ekozala etumba kati na baguvernɛma nyonso ya mokili mpe Nzambe.

  •   “Maloba oyo euti na bademo . . . ezali kokende epai ya bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. . . . Bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre Armagedone.”​—Emoniseli 16:14, 16.

 Liloba “Armagedone” euti na liloba ya Ebre oyo elimboli “Ngomba ya Megido.” Megido ezalaki engumba moko na Yisraele ya kala. Mpo na ntina yango, bato mosusu bakanisaka ete etumba ya Armagedone ekosalema na Israël. Nzokande, ezala esika oyo engumba yango ezalaki to mpe na nzinganzinga ya Moyen-Orient mobimba, ezali na esika moko te oyo ekoki kosangisa “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi” mpe mampinga na yango.

 Mokanda ya emoniseli ekomamaki na “bilembo,” to maloba ya elilingi. (Emoniseli 1:1) Armagedone emonisi te esika moko boye oyo bato bakoki komona yango, kasi elakisi nde ndenge makambo ekosalema na mokili, oyo esangisi bikólo nyonso oyo bakosangana mpo na kobundisa Bokonzi ya Nzambe.​—Emoniseli 19:11-16, 19-21.