Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Ndenge nini bana bakoki koyekola kolinga Nzambe?

Salelá mateya ya Bozalisi mpo na kosalisa bana na yo báyeba Nzambe mpe bálinga ye

Bana bakoki koyekola kolinga Nzambe kaka soki bandimisami ete azalaka mpenza mpe alingaka bango. Mpo bálinga Nzambe, basengeli koyeba ye. (1 Yoane 4:8) Na ndakisa, basengeli koyeba makambo lokola oyo: Mpo na nini Nzambe akelaki bato? Mpo na nini Nzambe atiki ete bampasi ezala? Nzambe akosala nini mpo na bato na mikolo ezali koya?​—Tángá Bafilipi 1:9.

Mpo na kosalisa bana na yo bálinga Nzambe, basengeli komona ete yo moko olingaka ye. Soki bamoni yango, na ntembe te bakolanda ndakisa na yo.​—Tángá Kolimbola Mibeko 6:5-7; Masese 22:6.

Ndenge nini okoki kosimba mitema ya bana?

Liloba ya Nzambe ezali na nguya. (Baebre 4:12) Na yango, salisá bana na yo báyeba mateya na yango ya ebandeli. Mpo na kosimba mitema ya bato, Yesu azalaki kotuna mituna, koyoka mpe kolimbola Makomami. Okoki kolanda ndakisa ya Yesu mpo na kosimba mitema ya bana.​—Tángá Luka 24:15-19, 27, 32.

Lisusu, masolo ya Biblia oyo elobeli lolenge oyo Nzambe asalelaki bato makambo, ekoki kosalisa bana na yo báyeba mpe bálinga Nzambe. Mikanda mingi oyo ebongisami mpo na bango ezali na site www.pr418.com.​—Tángá 2 Timote 3:16.