Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda euti na Bénin

Oyo likambo nini namilukeli?

Oyo likambo nini namilukeli?

EZALAKI mokolo moko na ntɔngɔ, na mboka moko ya wɛsti ya Afrika. Mopɛpɛ etondaki na nsolo kitoko ya bilubu mpe loso oyo ezalaki kotɔka na mɔtɔ. Basi bazalaki kotambola, bamemaki bakilo moko ya kosakana te na mitó na bango. Makelele ya kosɛka na esengo esanganaki ná makelele ya kobendana mpo na kokakola biloko. Moi ebimaki noki atako ezalaki naino ntɔngɔ.

Ntango bamonaki Yovo, elingi koloba mondɛlɛ, etuluku moko ya bana mike bakomaki koyembela ngai Nzembo mpe kobina. Bazalaki koyemba boye: “Yovo, Yovo, bonsoir” mpe bazalaki kosukisa boye: “Wapi kado oyo okopesa biso ndenge toyembeli yo?” Mwana moko ya mobali azalaki koyemba te. Ntango nazalaki kokoba na nzela na ngai, mwana yango alandaki ngai mpe abandaki kosala bajɛstɛ na mabɔkɔ na ye. Ezalaki lokola elobeli ya bajɛstɛ. Ntango nazalaki na États-Unis, nayekolaki elobeli ya bajɛstɛ ya Amerika (ASL), kasi Bénin ezali ekólo oyo bato balobaka Lifalanse.

Nabundanaki mpo na kosala bajɛstɛ ya balɛtrɛ mwambe ya nkombo na ngai. Mwana yango asɛkaki na esengo mpenza. Asimbaki lobɔkɔ na ngai mpe alekisaki ngai na mwa balabala moko ya moke tii na ndako na bango oyo batongá na babriki, ndako ya shambrɛ mibale. Bato ya libota na ye bazingaki ngai. Bango nyonso bazalaki kosolola na elobeli ya bajɛstɛ. Sikoyo, nakosala nini? Nayebisaki bango nkombo na ngai na elobeli ya bajɛstɛ mpe nakomelaki bango mokanda ete nazali misionɛrɛ oyo ateyaka bato Biblia, nakozongela bango mbala ya nsima. Bato mosusu ya kartye na bango oyo bazali bababa te bayaki mpe wana, bango nyonso bazalaki koningisa mitó mpo na komonisa ete basepeli. Namitunaki boye: ‘Oyo likambo nini namilukeli?’

Ntango nazongaki na ndako nabandaki kokanisa ete ‘esengeli moto moko asalisa bato yango báyeba elaka ya Nzambe oyo elobaka: “Matoi ya bato oyo bakufá matoi ekofungwama.”’ (Yisaya 35:5) Nasalaki mwa bolukiluki. Ankɛtɛ moko oyo eutaki kosalema kala mingi te emonisaki ete na Bénin, bato oyo bakufá matoi mpe baoyo bayokaka malamu te bazali 12 000. Nasepelaki ntango namonaki ete basalelaka te elobeli ya bajɛstɛ ya bato ya France na biteyelo ya bato bakufá matoi kasi nde oyo ya Amerika. Kasi likambo ya mawa, ata Motatoli moko te ya Yehova ayebaki elobeli yango. Na mawa nyonso, nayebisaki Motatoli moko oyo afandaka kuna ete “nakosepela ete moto moko oyo ayebi ASL aya kopesa mabɔkɔ.” Ayanolaki ngai ete, “Ozali awa, boye te?” Alobaki solo! Nasɛngaki buku moko oyo ekokaki kosalisa ngai mpe ba-DVD na monɔkɔ ya ASL oyo ebimisamaki na Batatoli ya Yehova. Nazwaki eyano na mabondeli na ngai ntango Motatoli moko oyo ayebaki ASL malamu, autaki na Cameroun mpe ayaki na Bénin.

Bato mingi bayokaki ete nazali koyekola elobeli ya bajɛstɛ. Bayebisaki ngai nakende kotala Brice, mopakoli langi moko oyo alobaka na bajɛstɛ. Abongisaki esika na ye ya mosala na mandalala ya mbila mpe na ntango ya molunge, ezalaki na mwa mopɛpɛ ya malili na kati. Efelo ya esika yango ekómaki na langi lokola oyo ya monama mpo mbula na mbula azalaki kosukola babrɔsi oyo azalaki kopakola na yango langi na efelo yango. Apupolaki ebele ya bisaleli na ye mpe atalaki ngai, azalaki kozela ete nabanda lisolo. Nalakisaki ye DVD na aparɛyi na ngai ya mabɔkɔ. Apusanaki pene mpo na kotala yango. Asalaki bajɛstɛ oyo: “Namoni! Namoni!” Bana mike ya kartye na bango bayaki ebele mpe bazalaki kotombola mitó na bango mpo bámona. Moko na bango alobaki, “mpo na nini bazali kotala filme oyo ezanga maloba?”

Mbala nyonso oyo nazalaki kokende kotala Brice, bato mingi bazalaki koya kotala DVD yango. Eumelaki te, Brice mpe bato mosusu bakómaki koyangana na makita na biso. Kobongolela bango esalisaki ngai nayeba elobeli ya bajɛstɛ noki. Lokola tokómaki mingi, bababa mosusu kutu bakómaki koya koluka ngai. Na ndakisa, mokolo moko Motuka na ngai egangaki mpe eboyaki kotambola ntango nakɔtaki na libulu moko mpo na kokima bantaba mpe bangulu oyo ebungaki nzela. Nayokaki mbala moko makɛlɛlɛ na nsima ya motuka. Na nse ya motema nalobaki, ‘oyo likambo nini boye, ebeba lisusu te!’ Te, ezalaki nde baba oyo azalaki koya mbangu na nsima ya motuka na ngai mpe azalaki kobɛta yango mpo namona ye.

Etuluku ya elobeli ya bajɛstɛ ekómaki mpe na bingumba mosusu. Ntango bandimaki ete elobeli ya bajɛstɛ ekóma kobongolama na liyangani ya mbula na mbula oyo tozalaki kosala, baponaki ngai nazala na kati ya bato oyo bakobongola na elobeli yango. Ntango natɛlɛmaki liboso ya estrade mpo na kozela molobi abanda, nakanisaki mbala moko ntango oyo nabandaki mosala na ngai mpo na mbala ya liboso. Nazalaki mbala mingi kokanisa makambo oyo ‘nakosala lisusu na Afrika na mosala na ngai ya misionɛrɛ.’ Nsima ya kotala bayangani, nazwaki eyano​—kozala misionɛrɛ oyo asalisaka bababa. Namitunaka lisusu te ‘oyo likambo nini namilukeli?’