Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sekele mpo na libota ya esengo

Ndenge ya kofuta banyongo

Ndenge ya kofuta banyongo

Giannis: * “Mombongo na ngai ekweaki ntango nkita ya ekólo Grɛsi ebebaki, yango wana tozalaki lisusu te kokoka kofuta ndako sanza nyonso mpe banyongo mosusu oyo tozalaki na yango. Nazalaki kozwa mpɔngi te mpo na mitungisi.”

Katerina: “Totongaki ndako na biso malamu mpenza, mpe nazalaki kolinga te tóbungisa yango. Ngai ná Giannis tozalaki koswana mbala mingi mpo na ndenge oyo tokofuta banyongo na biso.”

BANYONGO ekoki kobebisa to kopanza libota. Na ndakisa, Jeffrey Dew, moto moko ya mayele alobi ete mwasi ná mobali oyo bazali na banyongo balekisa ntango mingi te elongo, baswanaka mingi, mpe bazalaka na esengo mpenza te. Kosolola makambo etali banyongo mpe mbongo eumelaka mingi koleka masolo mosusu mpe ebimisaka koswana mpe bitumba mpe ekoki kobimisa makambo mosusu oyo ebebisaka nde makambo koleka. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge mabala mingi na États-Unis ezali kokufa mpo na kozanga koyokana na makambo ya mbongo.

Kozala na banyongo mingi ekoki kobɛlisa moto maladi lokola kozanga mpɔngi, motó mpasi, estoma , maladi ya motema mpe maladi ya makanisi. Mwasi moko nkombo na ye Marta alobi boye: “Mobali na ngai, Luís, akómaki kotungisama mpenza na makanisi mpo na banyongo na biso, yango wana akómaki kolala mokolo mobimba. Mobali oyo nazalaki kotyela ntango nyonso motema akokaki lisusu kosalisa ngai te.” Basusu bakokaka te kolonga maladi ya makanisi. Na ndakisa, basango ya BBC News elobaki ete mwasi moko na sudi ɛsti ya Inde amibomaki mpo azalaki kokoka te kofuta nyongo ya dolare 840 oyo adefaki mpo mwana na ye azwa lisalisi ya monganga.

Bokosala nini soki libota na bino ezali kotungisama mpo na banyongo? Tótalela naino mikakatano mosusu oyo babalani bakutanaka na yango mpo na kofuta banyongo mpe tótala batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa bino bólonga yango.

MOKAKATANO 1: Kopesana foti.

Lukasz alobi boye: “Soki mwasi na ngai alobi na ngai ete tolingaki kozala na mbongo mingi soki nasalaki mosala ya mbula mobimba, nazalaki kopesa ye foti ete azalaki kolya mbongo lokola nguba.” Mwasi ná mobali bakoki kosala nini mpo banyongo ekabola bango te?

Sekele mpo na kolonga: Bópesana mabɔkɔ mpo na kosilisa banyongo.

Kosilikela molongani na yo ekobongisa makambo te ata soki yo te nde okɔtaki nyongo yango. Mbala mosusu yango nde ntango oyo ebongi mpenza ya kosalela toli oyo ezali na Baefese 4:31: “Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino, ná mabe nyonso.”

Bóbunda te, kasi bóbundisa nde banyongo. Stephanos, mobali moko amonisi ndenge ye ná mwasi na ye bapesanaki mabɔkɔ, “totalelaki banyongo na biso lokola monguna na biso nyonso mibale.” Kosala bongo eyokani na maloba oyo ya Masese 13:10, oyo elobi boye: “Na lofundo, moto abimisaka kaka etumba, kasi bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.” Na esika ya koluka kobongisa makambo na lofundo nyonso na ndenge na yo moko, bósolola polele makambo ya mbongo mpe bopesana mabɔkɔ.

Bana na bino bakoki mpe kosalisa. Edgardo, tata moko na Argentine, alobeli likambo oyo libota na ye ekutanaki na yango: “Mwana na ngai ya moke ya mobali alingaki velo ya sika, kasi tomonisaki ye ntina oyo tokokoka te kosomba yango. Na esika na yango, topesaki ye velo oyo ezalaki ya nkoko na ye ya mobali, mpe asepelaki kokumba yango. Namonaki ntina ya kopesana mabɔkɔ na libota.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Bobongisa ntango ya kolobela banyongo na bino polelepolele mpe na kimya. Ndima foti nyonso oyo osalaki. Na esika ya kokangama na makambo oyo eleká, boluka nde koyokana na makambo oyo bokotalela liboso ya kozwa bikateli etali mbongo na mikolo ezali koya.​—Nzembo 37:21; Luka 12:15.

MOKAKATANO 2: Komona lokola bokokoka te kosilisa banyongo.

Enrique alobi boye: “Nakɔtaki nyongo moko monene mpo na mombongo na ngai, oyo kofuta yango ekómaki lisusu mpasi ndenge nkita ya Argentine ekweaki. Na nsima, esengelaki basala mwasi na ngai lipaso. Namonaki lokola ete banyongo na ngai ekosila lisusu te, nakómaki lokola moto amɛli ndɔbɔ.” Roberto, mobali moko na Brésil abungisaki mbongo nyonso oyo atyaki na banki na mombongo oyo asalaki mpe azalaki na nyongo ya babanki 12. Alobi boye: “Nazalaki kobanga kokutana na baninga na ngai. Nazalaki komiyoka lokola esili mpo na ngai.”

Okoki kosala nini soki ozali koyoka lokola olɛmbi nzoto, omemi ngambo to ozali koyoka nsɔni mpo na banyongo na yo?

Sekele mpo na kolonga: Yeba ndenge ya kosalela mbongo. *

 

1. Yebá motángo ya mbongo oyo ozali na yango. Salá liste ya mbongo nyonso oyo bozwi mpe oyo bosaleli na boumeli ya pɔsɔ mibale to sanza moko, soki ezali malamu mpo na bino. Talelá mpe mbongo ya takse, ya asiranse to ya bilamba; mbongo oyo obimisaka mpenza ntango nyonso te, mpe salá mwayene na yango sanza nyonso.

2. Salá ete mbongo oyo ozwaka ebakisama mwa moke. Okoki kobakisa mwa bangonga na mosala oyo osalaka, kosala mosala oyo esalemaka na eloko moko boye, kopesa mwana moko formasyo, to kotɛka mwa biloko na ndako na ntango oyo ozwaka mwa mopɛpɛ. Likebisi: Kopesa nzela te ete mosala na yo ezwa esika ya makambo oyo eleki ntina, na ndakisa makambo ya losambo.

Bótalela libota mobimba ndenge oyo bokoki kofuta banyongo

3. Kosomba bisombelá te. Sombá eloko oyo ozali mpenza na mposa na yango, kasi kosomba te mpo kaka bazali kotɛka yango. (Masese 21:5) Enrique alobi lisusu boye: “Kozela liboso ya kosomba eloko ezali malamu, mpo ekosalisa yo otala soki ozali mpenza na mposa na yango to kaka mpo olingi yango.” Makambo mosusu ya kosala yango oyo:

  • Ndako: Soki esengeli, bókende kofutela ndako ya ntalo moke. Bokoki mpe kobimisa mbongo mingi te soki bozali kobatela kura, mai mpe biloko oyo epesaka ndako molunge na eleko ya malili.

  • Biloko ya kolya: Lambáká biloko to mwa biloko ya mikemike na esika ya kolyaka ntango nyonso na restora to na malewa. Kɔtáká na bamagazini oyo ntalo ya biloko ezalaka na nse to na bisika oyo bakitisi ntalo ya biloko. Joelma, oyo afandaka na Brésil alobi boye: “Soki nasombi bambuma to ndunda na zando ya balabala mwa moke liboso ete bato basilisa kotɛka, natikalaka na mbongo mosusu.”

  • Transport: Tɛká mituka oyo osalelaka te, mpe bongisá oyo ozali na yango na esika ya kowela kosomba modɛlɛ ya sika. Salelá transport ya bato nyonso, to tambolá na makolo soki okokoka kosala bongo.

Soki osombi bisombelá te, okosalela malamu mbongo oyo otikali na yango.

4. Talelá banyongo oyo ozali na yango mpe luká kofuta yango. Liboso, luká koyeba matabisi oyo okozongisa na nyongo mokomoko, mbongo oyo okofuta mpe nini ekosalema soki ofuti nyongo yango noki te to ofuti yango te; to soki dati ya kofuta yango eleki. Talelá malamumalamu makomi oyo ezali na bafaktire ya mbongo oyo odefaki, mpo bato oyo badefisaka bakoki kokosa yo. Na ndakisa, kompanyi moko oyo edefisaka mbongo mpo na ntango mokuse na États-Unis elobaki ete matabisi na yango ezalaki ya mbongo moke (24%), nzokande ezalaki nde ya mbongo mingi (400%).

Na nsima, talelá banyongo oyo wapi okofuta liboso. Okoki kofuta liboso nyongo oyo okozongisa matabisi mingi. To mpe okoki kofuta naino banyongo ya mike, mpamba te kozwa bafaktire ya mike sanza nyonso ekoki kopesa yo makasi. Soki odefaki mbongo oyo esɛngi ozongisa matabisi ebele, ekozala malamu odefa mbongo mosusu oyo okozongisa na matabisi moke mpo na kofuta nyongo ya liboso.

Soki omoni ete okokoka te kofuta banyongo na yo, meká kosolola na bato oyo badefisaki yo mbongo, bóyokana mpo na bibongiseli ya sika oyo ozwi mpo na kofuta banyongo na bango. Okoki kosɛnga bábakisela yo mikolo to bákitisa matabisi oyo okofuta bango. Bato mosusu oyo badefisaki yo mbongo bakoki kutu kondima kokitisa nyongo oyo ozali na yango soki ondimi kofutaka yango mokemoke na bosembo mpenza. Zalá sembo mpe na limemya ntango ozali kolimbola mokakatano ya mbongo oyo ozali na yango. (Bakolose 4:6; Baebre 13:18) Komá makambo nyonso oyo boyokani na mokanda. Ata soki bandimeli yo te mpo na mbala ya liboso, kobá kosɛnga ete bákitisela yo mwa moke soki likoki ezali.​—Masese 6:1-5.

Toboyi te, ekosɛnga ondima ete okokoka makambo nyonso te ntango ozali kobongisa ndenge ya kosalela mbongo na yo. Ata mayele oyo eleki malamu ekoki mpe kosimba te mpo na makambo oyo ekanami te, mpo mbala mingi mbongo “emisalelaka mapapu lokola oyo ya mpongo mpe epumbwaka mosika na likoló.”​—Masese 23:4, 5.

MEKÁ KOSALA BOYE: Mbala ya liboso oyo bobongisi ndenge ya kosalela mbongo, bósolola ndenge oyo mokomoko na bino akoki koboya kobebisa mbongo mpambampamba mpe ndenge oyo akoki kosala mpo ete mbongo ya libota emata mwa moke. Milende oyo mokomoko azali kosala ekoki kosalisa mpo bósilisa banyongo oyo libota na bino ezali na yango.

MOKAKATANO 3: Banyongo esilisaka moto mayele.

Kobundana mpo na kofuta banyongo ekoki kobebisa makambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Mobali moko na nkombo Georgios alobi boye: “Mokakatano monene oyo tozalaki na yango ezalaki ete banyongo nde ekómaki na esika ya liboso na bomoi na biso. Makambo oyo esengelaki kozala na esika ya liboso ezongaki nde nsima.”

Sekele mpo na kolonga: Tyá mbongo na esika na yango.

Ata soki osali molende ndenge nini, mbala mosusu ekosɛnga bambula mingi mpo osilisa banyongo na yo. Soki ezali bongo, ekozala malamu oyeba ndenge ya kotalela mikakatano na yo. Na esika ya kotya makanisi na yo nyonso na mbongo to mpo ozangi yango, ekozala malamu kolanda toli oyo ya Biblia: “Soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.”​—1 Timote 6:8.

Kosepela na oyo ozali na yango epesaka esengo oyo bozwi ekoki kopesa te

Kosepela na mbongo oyo ozali na yango ekosalisa yo ‘oluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Bafilipi 1:10) Boninga na yo ná Nzambe mpe libota na yo ezali mpe na kati ya ‘Makambo oyo eleki ntina.’ Georgios oyo tolobelaki awa na likoló alobi boye: “Ata soki tosilisi naino te kofuta banyongo nyonso oyo tozali na yango, ezalaka lisusu te likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso. Tozali sikoyo na libala ya esengo mpo tolekisaka ntango mingi na makambo ya Nzambe mpe na makambo mosusu elongo na molongani ná bana na biso.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Salá liste ya makambo oyo ezali mpenza na ntina mpo na yo mpe oyo mbongo ekoki kosomba te. Na nsima, talá ndenge ya kobakisa ntango mpe makasi oyo opesaka na likambo mokomoko oyo ezali na liste na yo.

Banyongo ebimisaka mitungisi, mpe koluka kosilisa yango esɛngaka milende; ata bongo milende yango ezali na ntina. Andrzej, mobali moko oyo afandaka na ekólo Pologne, alobi boye: “Ntango nayebaki ete mwasi na ngai andimaki kofutela moninga na ye moko ya mosala nyongo ya monene, mpe na nsima moninga yango akimaki kozanga ete azongisela ye mbongo yango, matata ekɔtaki na ndako na biso.” Soki akanisi lisusu ndenge oyo ye ná mwasi na ye basalaki mpo na kolonga likambo yango, alobi boye: “Tokómi mpenza na boyokani makasi koleka​—mpo na likambo yango te, kasi nde mpo topesanaki mabɔkɔ mpo na kosilisa yango.”

^ par. 3 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 17 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá masolo “Comment gérer votre argent,” na Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ 2011, na lifalanse, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

OMITUNA BOYE . . .

  • Ndenge nini nakoki kosalisa libota na ngai esilisa banyongo?

  • Ndenge nini tokoki kosala mpo banyongo na biso elekela biso motó te to ebebisa boyokani na biso te?