Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Otikaka Nzambe aloba na yo mokolo na mokolo?

Otikaka Nzambe aloba na yo mokolo na mokolo?

MBALA boni omitalaka na talatala? Mingi kati na biso tosalaka yango mikolo nyonso​—ntango mosusu mbala mingi na mokolo. Mpo na nini? Mpo tomibanzabanzaka mingi mpo na ndenge oyo tozali komonana na miso ya bato.

Tokoki kokokanisa kotánga Biblia na kotala talatala. (Yakobo 1:23-25) Nsango oyo ezali na Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kosalisa biso tómimona mpenza ndenge tozali. “Ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo.” (Baebele 4:12) Na maloba mosusu, ekabolaka bomoto na biso ya libándá na oyo ya kati. Emonisaka biso bisika oyo tosengeli kobongisa, kaka ndenge talatala esalaka.

Kasi, Biblia esukaka kaka te na komonisa biso bisika oyo tosengeli kobongisa, elakisaka biso mpe ndenge oyo tokoki kobongisa yango. Ntoma Paulo akomaki boye: “Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene.” (2 Timote 3:16, 17) Simbá ete na matomba minei oyo elobelami awa, misato​—kopamela, kosembola makambo, mpe kopesa disipilini—​esɛngaka kobongola bizaleli mpe misala na biso. Soki tozalaka na mposa ya talatala mikolo nyonso mpo na koyeba ndenge tozali komonana na miso ya bato, ezali mpe na ntina mingi tótángaka Biblia, Liloba ya Nzambe, mikolo nyonso!

Nsima ya kopona Yosua mpo akamba libota ya Yisalaele, Yehova Nzambe alobaki na ye boye: “Maloba ma buku ya Mobeko malongwa o monoko mwa yo te; manyola mango butu moi mpo ‘te okoka kosala makambo manso makomami o kati. Bobele bongo okoyoka esengo mpe misala mya yo minso mikotambola malamu.” (Yosua 1:8Biblia Liloba lya Nzambe) Ya solo, mpo na kolonga, Yosua asengelaki kotángaka Liloba ya Nzambe “butu moi,” mikolo nyonso.

Ndenge moko mpe, mokapo ya liboso ya Mokanda ya Nzembo emonisi matomba ya kotángaka Biblia mokolo na mokolo; elobi boye: “Esengo ezali na moto oyo aboyi [kolanda] toli ya bato ya mabe, oyo atɛlɛmi na nzela ya bato ya masumu te, oyo afandi esika moko na batyoli te; kasi mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi. Azali lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekokauka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.” (Nzembo 1:1-3) Na ntembe te, tokolinga kozala lokola moto yango.

Bato mingi bazalaka na momeseno ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Ntango batunaki moklisto moko mpo na nini atángaka Biblia mikolo nyonso, alobaki boye: “Soki nasambelaka Nzambe mbala na mbala na mokolo mpe nalingaka ete ayoka ngai, mpo na nini ngai nasengeli te kotángaka Liloba na ye mikolo nyonso mpo na komonisa ete nayokaka ye? Soki tolingi kozala moninga malamu, mpo na nini koluka kaka biso moko tólobaka?” Ezali mpenza bongo. Kotánga Biblia ezali lokola nde ozali koyoka Nzambe, mpo na ndenge yango nde toyebaka makanisi na ye.

Ndenge ya kolonga

Ekoki kozala ete omekaki komityela programɛ ya kotánga Biblia. Osili kotánga Biblia na mobimba na yango? Yango ezali ndenge malamu ya koyeba mpenza makambo oyo ezali na Biblia. Nzokande, bamosusu, bamityelaki mokano ya kotánga Biblia na mobimba na yango, kasi balongaki te. Yo mpe okutaná na mokakatano yango? Okoki kosala nini mpo na kolonga kotánga Biblia mobimba? Meká kolanda toli mibale oyo:

Kɔtisá mpe botángi ya Biblia na makambo osalaka mokolo na mokolo. Mokolo na mokolo, ponáká ngonga oyo omoni ete okokoka kotánga Biblia. Saláká nyonso mpo olekisa mokolo te kozanga kotánga. Soki mpo na ntina moko okoki te kotánga Biblia na ngonga oyo otyaki, poná ngonga mosusu oyo okoki kosala yango mpo mokolo mobimba eleka te kozanga ete otánga Liloba ya Nzambe. Na ndenge yango, okomekola bato ya Beloya. Biblia elobi mpo na bango boye: “Bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, kotaleláká Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezalaki bongo.”​—Misala 17:11.

Omityela mokano. Na ndakisa, soki ozali kotánga mikapo misato to mitano mokolo na mokolo, okoki kosilisa kotánga Biblia mobimba na mbula moko. Programɛ oyo ezali na nkasa oyo elandi emonisi ndenge okoki kosala yango. Mpo na nini te komityela mokano ya kolanda programɛ yango? Na esika bakomi “Dati,” komá ntango oyo okotánga mokapo mokomoko oyo batye wana. Na nsima na etanda oyo ezali wana, tyá elembo mpo na komonisa ete otángi yango. Kosala bongo ekosalisa yo oyeba ndenge ozali kopusana na botángi na yo.

Ntango osilisi kotánga Biblia mobimba, mpo na nini kosuka kaka wana? Okoki kosalela kaka programɛ yango mpo na kozongela botángi na yo ya Biblia mbula na mbula, ntango mosusu, okoki kobanda na biteni mosusu. To soki olingi kotánga Biblia malɛmbɛmalɛmbɛ, okoki kozwaka mikolo mibale to misato mpo na kotánga eteni oyo ebongisami.

Ntango nyonso oyo ozali kotánga Biblia, okomona makambo ya sika oyo okoki kosalela na bomoi na yo, makambo oyo omonaki te liboso. Mpo na nini? “Mpo makambo ya mokili oyo ezali kobongwana,” bomoi na biso mpe ezali se kobongwana. (1 Bakolinti 7:31) Na yango, Omityela mokano ya kotalaka talatala​—Liloba ya Nzambe, Biblia, mokolo na mokolo. Na ndenge yango, okoki kondima ete otikaka Nzambe aloba na yo mokolo na mokolo.​—Nzembo 16:8.