Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamipesaki na bolingo na bango moko na Philippines

Bamipesaki na bolingo na bango moko na Philippines

ELEKI mbula soki zomi, ndeko Gregorio ná mwasi na ye Marilou, oyo bazalaki na mbula koleka 30 bazalaki babongisi-nzela na engumba Manille. Bango mibale bazalaki kosala mosala ya mbongo pɔsɔ mobimba. Ezalaki mpasi, kasi bazalaki kolonga. Na nsima, Marilou akómaki mwa mokonzi na banki oyo azalaki kosala. Alobi boye: “Lokola tozalaki na misala ya malamu, tozalaki na bomoi ya malamu mpenza.” Kutu, lokola bakómaki na mbongo mingi, bakanaki kokokisa likambo oyo bazalaki kolɔta banda kala: kotonga ndako na esika moko kitoko, na kilomɛtrɛ soki 19 na ɛsti ya Manille. Basalaki kɔntra mpo kompanyi moko ya kotonga bandako etongela bango ndako mpe bayokanaki ete bakobanda kofuta nyongo yango sanza na sanza tii ekosilisa nsima ya mbula 10.

“NAMONAKI LOKOLA NAZALI KOYIBA YEHOVA”

Marilou alobi boye: “Mosala ya sika oyo nazwaki ezalaki kolya ngai ntango mpe kosilisa ngai makasi na boye ete molende na ngai mpo na makambo ya elimo ekitaki. Namonaki lokola nazali koyiba Yehova.” Abakisi boye: “Nazalaki lisusu kokoka te kopesa Yehova ntango oyo nasengelaki kopesa na mosala na ye.” Lokola Gregorio ná Marilou basepelaki te na likambo yango, mokolo moko bafandaki mpo na kolobela ndenge oyo bazalaki kotambwisa bomoi na bango. Gregorio alobi boye: “Tomonaki ete tosengeli kobongola makambo mosusu, kasi toyebaki mpenza te nini tosengelaki kosala. Tokanisaki elongo ndenge oyo tokokaki komipesa lisusu mingi na mosala ya Yehova, mingimingi lokola tozali na bana te. Tobondelaki Yehova asalisa biso.”

Na ntango yango, bayokaki badiskur mingi oyo elobelaki kokende kosakola na bisika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Gregorio alobi boye: “Tomonaki ete badiskur yango ezali eyano ya Yehova na mabondeli na biso.” Gregorio ná mwasi na ye babondelaki Yehova apesa bango kondima mingi mpo bázwa mpiko ya kozwa bikateli ya malamu. Mokakatano moko ya monene ezalaki ndako oyo batongisaki. Basilaki kofuta mbongo ya mbula misato. Sikoyo, basengelaki kosala nini? Marilou alobi boye: “Toyebaki ete soki tokati kɔntra yango, tokobungisa mbongo nyonso oyo tofutaki; ezalaki mbongo ebele. Kasi, tomonaki ete ezali libaku ya kopona soki tokotya mokano ya Yehova na esika ya liboso to tokotya nde bamposa na biso moko na esika ya liboso.” Ntango bakanisaki ndakisa ya ntoma Paulo oyo ‘andimaki kobungisa biloko,’ bakataki kɔntra ya ndako, batikaki misala na bango, batɛkaki biloko na bango mingi, mpe bakendaki kofanda na mboka moko mosika, na esanga Palawan, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 480 na sudi ya Manille.​—Flp. 3:8.

‘BAYEKOLAKI SEKELE’ YANGO

Liboso bákende, Gregorio ná Marilou basalaki makasi bámibongisa mpo na kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ, kasi bayaki komona ndenge bomoi na bango ekozala kaka ntango bakómaki na teritware na bango ya sika. Marilou alobi boye: “Nandimaki te. Kura ezalaki te, mai ya pɔmpi te, baaparɛyi te, mpe makambo nyonso ezalaki mpasi. Na esika tólamba loso na nzungu oyo esalaka na kura, esɛngaki tókata nkoni mpo na kolamba. Nazalaki mpenza na mposa ya kokende zando monene, kolya na restora, mpe kosala makambo mosusu oyo ezalaka na engumba monene.” Atako bongo, Gregorio ná Marilou bazalaki ntango nyonso kokanisa ntina oyo bayaki kofanda na mboka yango, mpe eumelaki te bamesanaki. Marilou alobi boye: “Sikoyo nazwaka ntango mpo na kotala biloko kitoko oyo Nzambe akelá, na ndakisa minzoto oyo ezali kongɛnga na butu. Likambo oyo epesaka biso esengo mingi koleka ezali komona ndenge bato basepelaka ntango tozali koteya bango. Kosala awa esalisi biso ‘tóyekola sekele’ ya kosepela na oyo tozali na yango.”​—Flp. 4:12.

“Eloko moko te ekokani na esengo ya komona ndenge lisangá ezali kokola. Sikoyo, toyokaka mpenza ete bomoi na biso ezali na ntina.”​—Gregorio ná Marilou

Gregorio alobi boye: “Ntango tokómaki awa, Batatoli bazalaki kaka 4. Basepelaki mingi ntango nakómaki kosala diskur ya bato nyonso pɔsɔ nyonso mpe kobɛta guitar na ngai ntango tozali koyemba banzembo ya Bokonzi.” Nsima ya mbula moko, Gregorio ná mwasi na ye bamonaki ndenge mwa etuluku wana ya moke ekolaki mpe ekómaki lisangá ya basakoli 24 ya molende. Gregorio alobi boye: “Bolingo oyo bandeko ya lisangá bamoniselaka biso, esimbaka mpenza mitema na biso.” Lelo oyo, soki bakanisi mbula motoba oyo basili kosala na mboka wana ya mosika, balobaka boye: “Eloko moko te ekokani na esengo ya komona ndenge lisangá ezali kokola. Sikoyo, toyokaka mpenza ete bomoi na biso ezali na ntina.”

“‘NAMEKAKI MPE NAMONI ETE YEHOVA AZALI MALAMU’!”

Na Philippines, bandeko mibali mpe bandeko basi pene na 3 000 bakendá kofanda na bisika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Basakoli soki 500 kati na bango bazali bandeko basi oyo bazali minzemba. Tózwa ndakisa ya ndeko mwasi Karen.

Karen

Karen, oyo azali sikoyo na mbula soki 25, akolá na engumba Baggao, na Cagayan. Liboso akokisa mbula 19, mbala mingi azalaki kokanisa ndenge oyo akokaki komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. Alobi boye: “Nakómaki na mposa ya kokende kosakola esika oyo basakoli bazali mingi te mpo nayebi ete ntango oyo etikali ekómi mokuse mpe ete bato ya ndenge nyonso basengeli koyoka nsango ya Bokonzi.” Atako bato mosusu ya libota na ye balendisaki ye akɔta na iniversite na esika akende na mboka mosika mpo na kosakola, Karen abondelaki Yehova alakisa ye nzela. Asololaki mpe na bandeko oyo basakolaka na bisika ya ndenge wana. Ntango akokisaki mbula 18, akendaki kofanda na mboka moko mosika, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 64 longwa na engumba na bango.

Lisangá ya moke oyo Karen akendaki kopesa mabɔkɔ ezalaki na teritware ya ngombangomba pembenipembeni ya Mbu ya Pasifike. Karen alobi boye: “Kaka mpo na kolongwa na Baggao tii na esika lisangá yango ezalaki, totambolaki mikolo misato, matá kitá na bangomba mpe tokatisaki bibale mbala koleka 30.” Abakisi boye: “Mpo na kokóma epai ya bato mosusu oyo nayekolaka na bango Biblia, natambolaka ngonga motoba, nalalaka epai ya moyekoli ya Biblia, mpe na mokolo oyo elandi, natambolaka lisusu ngonga motoba mpo na kozonga ndako.” Milende nyonso wana ebotaki mbuma? Karen alobi na esengo ete: “Ntango mosusu nayokaka makolo mpasi, kasi nazali koyekola Biblia na bato ebele, bato 18. ‘Namekaki mpe namoni ete Yehova azali malamu’!”​—Nz. 34:8.

“NAYEKOLAKI KOTYELA YEHOVA MOTEMA”

Sukhi

Nini etindaki Sukhi, ndeko mwasi moko monzemba oyo azali na mbula mwa moke koleka 40, alongwa na États-Unis, akende kofanda na Philippines? Na 2011, na liyangani moko ya zongazonga oyo akɔtaki, batunaki ndeko mobali moko ná mwasi na ye mituna. Bayebisaki ndenge batɛkaki biloko na bango mingi mpo bákende na Mexique kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola kuna. Sukhi alobi boye: “Mituna-lisolo wana etindaki ngai nakóma kokanisa mikano oyo nazalaki na yango liboso te.” Lokola bankɔkɔ ya Sukhi bazalaki bato ya Inde, ntango ayokaki ete bazalaki koluka basakoli mpo na koteya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Punjabi na Philippines, azwaki ekateli ya kokende kuna. Mikakatano nini akutanaki na yango?

Sukhi alobi boye: “Kopona biloko nini nasengelaki komema mpe biloko nini nasengelaki kotɛka ezalaki mpasi koleka ndenge nakanisaki. Lisusu, nsima ya kofanda mbula 13 ngai moko na apartema oyo ezalaki na nyonso oyo esengeli, nakendaki kofanda mwa ntango moke elongo na libota moko epai nakómaki na bomoi oyo ekesanaki na oyo nazalaki na yango. Ezalaki pɛtɛɛ te; kasi ezalaki lolenge malamu ya koyekola ndenge ya kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ.” Mikakatano nini akutanaki na yango ntango akendaki kofanda na Philippines? Alobi boye: “Lokola nabangaka mingi, mokakatano monene ezalaki ete nazalaki kobanga banyama mike mpe nazalaki komesana te kofanda na mboka mopaya. Nayekolaki kotyela Yehova motema mingi koleka liboso!” Ebongaki mpenza asala nyonso wana? Sukhi asɛki mpe alobi boye: “Yehova alobi na biso, ‘Bómeka ngai, bómona soki nakosopela bino lipamboli te.’ Namonaka ete maloba yango ezali solo mbala nyonso oyo nasololi na moto na mosala ya kosakola mpe na nsima atuni ngai: ‘Okoya lisusu mokolo nini? Nazali na mituna mosusu ebele.’ Kosalisa bato oyo bazali na nzala ya elimo epesaka ngai esengo mingi!” (Mal. 3:10) Sukhi abakisi ete: “Mpo na koloba solo, likambo ya mpasi koleka ezalaki nde kozwa ekateli ya koya awa. Nsima ya kozwa ekateli, nakómaki kaka kokamwa na komona ndenge Yehova azalaki kobongisela ngai makambo nyonso.”

“NALONGOLAKI KOBANGA”

Sime, ndeko mobali moko oyo abalá mpe azali na mbula pene na 40, atikaki Philippines mpe akendaki na ekólo moko na Moyen-Orient mpo na kosala mosala oyo azwaki kuna. Kuna, ntango mokɛngɛli moko ya zongazonga alendisaki ye mpe ntango ayokaki diskur ya ndeko moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, Sime amonaki ete asengeli kotya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye. Alobi boye: “Kasi kokanisa kaka ete esengeli natika mosala na ngai, ezalaki kotungisa ngai mingi.” Atako bongo, atikaki mosala yango mpe azongaki na Philippines. Lelo oyo, Sime ná mwasi na ye Haidee bazali kosakola na etúká ya Davao del Sur, na sudi ya Philippines, esika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te mpo na kosakola na teritware wana monene. Sime alobi boye: “Soki nakanisi, nasepelaka mingi ndenge natikaki kobanga ete nabungisa mosala na ngai mpe natyaki Yehova na esika ya liboso. Ezali na eloko mosusu te oyo epesaka esengo na bomoi koleka kopesa Yehova eloko na yo oyo eleki malamu!”

Sime ná Haidee

“EPESAKA BISO ESENGO MINGI!”

Ntango Ramilo ná mwasi na ye Juliet, babongisi-nzela oyo bazali na mbula mwa moke koleka 30, bayokaki ete lisangá moko oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 30 ezalaki na mposa ya lisalisi, bandimaki kokende kopesa yango mabɔkɔ. Na yango, pɔsɔ na pɔsɔ, ezala na nse ya mbula to ya moi, Ramilo ná Juliet basalaka mibembo kende zonga na tukutuku na bango mpo na koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Atako kosala mobembo na banzela ya mabulumabulu mpe kokatisa bagbagba (ponts) ezalaka pɛtɛɛ te, basepelaka mingi ndenge bazali komipesa na mosala ya kosakola. Ramilo alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai toyekolaka Biblia na bato 11! Kosakola na esika oyo mposa ezali makasi esɛngaka komipimela makambo mosusu, kasi yango epesaka biso mpenza esengo!”​—1 Ko. 15:58.

Juliet ná Ramilo

Olingi koyeba makambo mosusu na oyo etali kokende kosakola na esika oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te, ezala na ekólo na bino to na mboka mopaya? Soki ezali bongo, sololá na mokɛngɛli ya zongazonga na bino, mpe tángá lisolo “Okoki ‘koleka na Masedonia’?” na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya mwambe 2011.