Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ezaleli ya boboto emonisaka bwanya

Ezaleli ya boboto emonisaka bwanya

Toñi, ndeko mwasi moko oyo asalaka mosala ya kosalisa mibange to bibɔsɔnɔ, abɛtaki porte moko, mpe mwasi moko ayanolaki ye. Mwasi yango afingaki Toñi mpe asilikelaki ye, alobaki ete asengelaki koya banda kala mpo na kosalisa mama na ye oyo azali mobange. Nzokande, Toñi ayaki na mosala na ngonga oyo ebongi. Atako bongo, na boboto nyonso, Toñi asɛngaki mwasi yango bolimbisi mpo na likambo yango.

NTANGO Toñi ayaki mokolo mosusu, mwasi yango asilikelaki ye lisusu. Kasi, Toñi asalaki nini? Alobi boye: “Ezalaki likambo moko ya mpasi mpenza. Asengelaki te koloba na ngai mabe ndenge wana.” Atako bongo, Toñi asɛngaki lisusu bolimbisi mpe ayebisaki mwasi yango ete ayebaki mpasi oyo azalaki komona.

Soki ozalaki na esika ya Toñi, olingaki kosala nini? Olingaki komonisa ezaleli ya boboto? Elingaki kozala mpasi omipekisa mpo osilika te? Toboyi te, ekoki kozala mpasi kokanga motema na makambo lokola oyo touti kolobela. Ntango tozali na mitungisi to batumoli biso, ezalaka pɛtɛɛ te kokoba komonisa boboto.

Kasi, Biblia elendisi bakristo bámonisaka ezaleli ya boboto. Kutu, Liloba ya Nzambe emonisi ete boboto emonisaka bwanya. Yakobo atuni boye: “Nani azali moto ya bwanya mpe ya mayele na kati na bino? Alakisa misala na ye na etamboli na ye ya malamu na boboto oyo ezali komonisa bwanya.” (Yakobo 3:13) Na ndenge nini ezaleli ya boboto emonisaka bwanya oyo euti na likoló? Mpe nini ekoki kosalisa biso tómonisa ezaleli wana oyo esepelisaka Nzambe?

EZALELI YA BOBOTO EMONISAKA BWANYA

Ezaleli ya boboto ekoki kokitisa nkanda. “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.”​Masese 15:1.

Kosilika ntango balobi to basali biso mabe ekoki se kobebisa makambo; ezali lokola kosopa petrole na mɔtɔ. (Masese 26:21) Nzokande, mbala mingi, eyano ya boboto ekitisaka nkanda. Ekoki ata kolɛmbisa motema ya moto oyo azalaki kosepela na biso te.

Ndeko Toñi amonaki yango na miso. Ntango mwasi wana ayokaki eyano ya boboto oyo Toñi apesaki ye, abimisaki mai ya miso. Alimbolaki ete mikakatano na ye moko mpe oyo ya libota elekelaki ye. Toñi apesaki litatoli ya malamu mpe mwasi yango abandaki koyekola Biblia; nyonso wana kaka mpo amonisaki ezaleli ya boboto.

Ezaleli ya boboto ekoki kopesa biso esengo. “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.”​Matai 5:5.

Mpo na nini bato ya ezaleli ya boboto bazalaka na esengo? Bato mingi oyo liboso bazalaki bato ya matata bakómá na esengo mpo balatá ezaleli ya boboto. Bomoi na bango ekómá malamu, mpe bayebi ete makambo ya malamu ezali kozela bango na mikolo ezali koya. (Bakolose 3:12) Ndeko Adolfo, oyo azali mokɛngɛli ya zongazonga na Espagne, akanisi lisusu ndenge bomoi na ye ezalaki liboso ayeba solo.

Alobi boye: “Nazalaki komona ntina ya bomoi te. Nazalaki kotomboka mpambampamba, yango wana ata baninga na ngai mosusu bazalaki kobanga ngai mpo nazalaki komilakisa mpe kosilika makasi. Nsukansuka, makambo ebongwanaki. Mokolo moko nabundaki, mpe bazokisaki ngai mpota motoba na mbeli; makila ebimaki mingi, etikalaki moke nakufa.”

Kasi lelo oyo, ndeko Adolfo ateyaka basusu ezaleli ya boboto, ezala na maloba to na misala. Bato mingi basepelaka na ye mpo akómá moto ya esengo mpe ya boboto. Ndeko Adolfo alobi ete asepelaka mingi ndenge abongwaná. Mpe atɔndaka Yehova ndenge asalisaka ye amonisa ezaleli ya boboto.

Ezaleli ya boboto esepelisaka Yehova. “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.”​Masese 27:11.

Zabolo, monguna monene ya Yehova, atumolaka ye ntango nyonso. Yehova akokaki mpenza kosilika mpo na matumoli wana; nzokande Biblia elobi ete Yehova azali Nzambe oyo “ayokaka nkanda noki te.” (Kobima 34:6) Soki tosali makasi tómekola Nzambe oyo ayokaka nkanda noki te mpe azali na boboto, tokomonisa ete tozali na bwanya oyo esepelisaka Yehova mingi.​—Baefese 5:1.

Mokili oyo elingaka biso te. Tokoki kokutana na bato oyo bazali “bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, . . . oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko.” (2 Timote 3:2, 3) Kasi, yango esengeli te kopekisa mokristo amonisa ezaleli ya boboto. Liloba ya Nzambe ekundweli biso ete “bwanya oyo euti na likoló ezalaka . . . kimya, na makambo makasimakasi te.” (Yakobo 3:17) Soki tozali komonisa ezaleli ya kimya mpe tozali makambo makasimakasi te, tokomonisa ete tozali na bwanya oyo euti na likoló. Bwanya ya ndenge wana ekotinda biso tózala na boboto ntango batumoli biso, mpe ekosalisa biso tópusana lisusu penepene na Yehova, oyo bwanya na ye ezali na nsuka te.