Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Kondima

Kondima

Bato mosusu batutaka ntolo ete basambelaka, kasi bayebaka te ndimbola ya liloba “kondima.” Kondima ezali nini, mpe mpo na nini ezali na ntina? Ndenge nini okoki kokóma na kondima?

Kondima ezali nini?

OYO BATO MOSUSU BALOBAKA

Bato mingi bakanisaka ete moto oyo azali na kondima, andimaka nyonso ata soki amoni te eloko oyo etindi ye andima. Na ndakisa, moto oyo alobaka ete: “Nandimaka ete Nzambe azali.” Soki otuni ye, “Ntina oyo andimaka yango,” akoki koloba: “Bayebisá ngai bongo” to “Bateyá ngai bongo.” Biyano ya ndenge wana, ekoki komonisa ete kozala na kondima mpe bindimandima ekeseni mwa moke.

OYO BIBLIA ELOBI

“Kondima ezali ezaleli ya kozela na motema mobimba biloko oyo ozali kolikya kozwa, ezali elembeteli oyo ezali komonisa bosolo ya makambo atako ezali komonana te.” (Baebre 11:1) Mpo moto azela na motema mobimba, asengeli kozala na ntina oyo etindi ye azela. Na yango, maloba oyo babongoli na “kozela na motema mobimba” esuki kaka te na ndenge oyo moto azali koyoka na kati na ye to makanisi moko boye. Yango wana, kondima esɛngi kozala na bilembeteli oyo esimbi likambo.

“Bizaleli na ye [Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.”Baroma 1:20.

Mpo na nini ezali na ntina ete tókóma na kondima?

OYO BIBLIA ELOBI

“Soki moto azali na kondima te akoki kosepelisa ye ata moke te, mpo moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.”Baebre 11:6.

Ndenge emonisami na ebandeli, bato mingi bandimaka ete Nzambe azali kaka mpo bateyá bango bongo. Bakoki koloba boye: ‘Bayebisá ngai bongo.’ Kasi, Nzambe alingi ete baoyo basambelaka ye bándima mpenza ete azali mpe alingaka bango. Yango wana, Biblia emonisi mpenza ntina oyo tosengeli koluka ye malamumalamu mpo tóyeba ye.

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”Yakobo 4:8.

Ndenge nini okoki kokóma na kondima?

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobi ete “kondima eutaka na likambo oyo moto ayoki.” (Baroma 10:17) Mpo na kondimela Nzambe, likambo ya liboso ezali ‘koyoka’ oyo Biblia elobi mpo na ye. (2 Timote 3:16) Koyekola Biblia ekosalisa yo ozwa biyano na mituna ya ntina mingi oyo: Nzambe azali nani? Nini endimisi ete Nzambe azali? Nzambe akipaka ngai mpenza? Mokano ya Nzambe ezali nini mpo na mikolo ezali koya?

Makambo oyo ezali zingazinga na biso emonisaka ete Nzambe azali

Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyekola Biblia. Ndenge ezali na site Internet na biso, jw.org, “Batatoli ya Yehova basepelaka koteya bato mateya ya Biblia, kasi totindaka moto na makasi te akɔta na lingomba na biso. Nzokande, tomonisaka bato na boboto nyonso makambo oyo Biblia eteyaka mpe toyebaka ete moto ye moko nde akopona kondima likambo boye to boye.”

Na nsuka, kondima na yo esengeli euta na makambo ya solo oyo yo moko otángi na kati ya Biblia. Na ndenge yango okolanda ndakisa ya bayekoli ya Biblia ya siɛklɛ ya liboso oyo “bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, bazalaki kotalela Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezali bongo.”Misala 17:11.

“Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”Yoane 17:3.