Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 6

Bizaleli malamu

Bizaleli malamu

BIZALELI MALAMU EZALI NINI?

Bato oyo bazalaka na bizaleli malamu bayebaka kokesenisa mabe na malamu. Mpo na kokesenisa mabe ná malamu, balandaka motema na bango te. Kasi, balandaka mibeko oyo etyamá mpo na kotambwisa bango, ata soki bato mosusu bazali komona bango te.

MPO NA NINI KOZALA NA BIZALELI MALAMU EZALI NA NTINA?

Bana bayokaka makambo mingi na oyo etali malamu mpe mabe epai ya bato oyo bakutanaka na bango na kelasi, na miziki oyo bayokaka to na bafilme mpe baprogramɛ mosusu ya televizyo. Makambo wana ekoki kosala ete bakóma na mokakatano ya koyeba oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe.

Likambo yango ekómelaka mingi bilenge. Buku moko (Beyond the Big Talk) elobi ete bilenge basengeli koyeba ete bato mingi bakotya bango mbamba bákóma na bizaleli moko boye mpo báyebana mpe bato bándima bango. Basengeli koyeba kopona bizaleli oyo bakomonisa to makambo oyo bakosala, ata soki ekosepelisa baninga na bango te. Yango wana, baboti basengeli koteya bana na bango bizaleli malamu liboso bákóma bilenge.

NDENGE YA KOTEYA BIZALELI MALAMU

Teyá bango nini ezali malamu mpe nini ezali mabe.

TOLI YA BIBLIA: “Bato oyo bakɔmɛli . . . makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.”​—Baebre 5:14.

  • Salelá maloba oyo ekosalisa bango báyeba oyo ezali malamu to mabe. Pesá ndakisa ya makambo oyo esalemaka mokolo na mokolo mpe yebisá bango polele ete: “Oyo ezali sembo; oyo ezali sembo te.” “Oyo ezali malamu; oyo ezali mabe.” “Oyo ezali likambo ya boboto; oyo ezali likambo ya boboto te.” Kendekende, mwana na yo akoyeba kokesenisa oyo ezali malamu ná oyo ezali mabe.

  • Limbolá ntina oyo likambo moko ezali malamu to mabe. Na ndakisa, okoki kotuna: Mpo na nini eleki malamu kozala sembo? Ndenge nini kokosa ekoki kobebisa boninga? Mpo na nini koyiba ezali mabe? Kosalisa bana na yo báyeba kokanisa malamu ekosalisa bango bókolisa likoki ya kokesenisa mabe ná malamu.

  • Monisá matomba ya kozala na bizaleli malamu. Okoki koloba na mwana na yo boye: “Soki ozali sembo, bato bakotyela yo motema,” to “Soki ozali na boboto, bato bakosepela na yo.”

Salá makasi mpo bato nyonso ya libota na yo bázala na bizaleli malamu.

TOLI YA BIBLIA: “Bókoba kotala soki bozali ndenge nini.”​—2 Bakorinti 13:5.

  • Bato nyonso ya libota na bino basengeli kozala na bizaleli malamu, mpo okokoka koloba ete:

    • “Na libota na biso tolobaka lokuta te.”

    • “Tobundaka te mpe toswanaka te.”

    • “Tokatelaka basusu mangala te mpe tofingaka te.”

Mwana na yo akomona ete bizaleli malamu ezali kilo te kasi ebatelaka lokumu ya libota.

  • Yebisáká mwana na yo mbala na mbala bizaleli malamu ya libota. Salelá makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo mpo na koteya bana na yo. Okoki komonisa ndenge bizaleli malamu ya libota na bino ekeseni na bizaleli oyo balakisaka na TV to oyo amonaka na eteyelo. Okoki kotuna mwana na yo boye: “Olingaki kosala nini?” “Libota na biso ekokaki kosala nini mpo na kosilisa likambo yango?”

Kómisá makasi ekateli na bango ya kosala oyo ezali malamu.

TOLI YA BIBLIA: “Bózala na lisosoli ya malamu.”​—1 Petro 3:16.

  • Pesá bango longonya soki bamonisi bizaleli malamu. Soki mwana asali malamu, pesá ye longonya mpe yebisá ye mpo na nini ezali malamu. Na ndakisa, okoki koloba: “Osalaki likambo ya sembo. Osepelisi ngai mingi.” Soki mwana ayebisi yo ete asalaki likambo moko ya mabe, pesá ye longonya mpo alobi solo mpe na nsima okoki kosembola ye.

  • Sembolá mwana soki asali mabe. Salisá mwana na yo andimaka mokumba ya likambo oyo asali. Bana basengeli koyeba mabe oyo basali, mpe ndenge oyo yango ekeseni na bizaleli malamu ya libota. Baboti mosusu balingaka te koyebisa bana na bango ete basali mabe mpo bana “basilika te.” Kasi, koyebisa mwana na yo mabe oyo azali kosala ekosalisa ye ateya lisosoli na ye mpo eyeba kokesenisa oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe.