Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 4

Koyeba kotambwisa makambo

Koyeba kotambwisa makambo

KOYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO ESƐNGI NINI?

Moto oyo ayebi kotambwisa makambo malamu azali moto oyo batyelaka motema. Ntango basɛngi ye asala eloko moko, asalaka yango malamu mpe na ntango oyo ebongi.

Bana bakoki koyekola kotambwisa makambo malamu ata ntango bazali naino mike. Buku moko (Parenting Without Borders) elobi: “Kobanda ntango mwana akómi na sanza 15, akómaka kosala makambo oyo baboti bayebisi ye asala, mpe ntango akómi na sanza ya 18, alingaka kosala makambo nyonso oyo baboti na ye bazali kosala. Na bamboka mingi, baboti basalisaka bana bákolisa makoki na bango mingimingi ntango bakómi na mbula 5 to 7, mpe bana ya mbula wana basalisaka baboti na misala ndenge na ndenge ya ndako.”

MPO NA NINI KOYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO EZALI NA NTINA?

Na bisika mingi, bilenge balongwaka na ndako ya baboti na bango mpo na kofanda bango moko, kasi bakutanaka na mikakatano, mpe bazongaka na ndako ya baboti na bango. Mbala mosusu, likambo yango ekómelaka bilenge mpo baboti balakisaki bango te ndenge ya kosalela mbongo, kotambwisa makambo na ndako, to makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo.

Yango wana, ezali malamu oteya mwana ntango azali naino moke mpo ayeba kotambwisa makambo ntango akokóma mokóló. Buku moko (How to raise an adult) elobi: “Ezali malamu te kotika mwana atalelaka kaka yo tii ntango akokóma na mbula 18 mpe na nsima otika ye akende.”

NDENGE YA KOTEYA BANA BÁYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO

Pesáká bango mwa misala ya ndako.

TOLI YA BIBLIA: “Na mosala makasi ya ndenge nyonso litomba ezalaka”​—Masese 14:23.

Bana basepelaka kosala elongo na baboti na bango. Okoki kosalela mposa wana mpe kopesa bango mwa misala ya ndako.

Baboti mosusu balingaka kosala yango te. Bamonaka ete bana oyo bakendaka kelasi bazalaka na badevuare mokolo na mokolo, mpe kopesa bango misala ya ndako ezali kobakisela bango mikumba.

Kasi, bana mingi oyo basalaka misala ya ndako batángaka malamu na kelasi, mpo misala ya ndako esalisaka bango bándima mikumba mosusu mpe básilisa misala oyo bapesi bango. Longola yango, buku moko (Parenting Without Borders) elobi: “Soki tozali kosalela te mposa oyo bana bazalaka na yango ya kosala misala, bakokanisa ete kosalisa basusu ezali na ntina te . . . Bakobanda mpe kozela kaka ete basusu básalela bango.”

Ndenge maloba wana emonisi yango, misala ya ndako eteyaka bana báyeba kosalisa mpe kokabela basusu. Misala ya ndako esalisaka bana bámona ete bazali na ntina na kati ya libota mpe ete basengeli kosalisa.

Salisá mwana andima mokumba na ye ntango asali mabe.

TOLI YA BIBLIA: “Yoká toli mpe ndimá disiplini, mpo ozala na bwanya na bomoi na yo na mikolo oyo ezali koya.”​—Masese 19:20.

Ntango mwana na yo asali likambo moko ya mabe, na ndakisa abebisi eloko ya moto ata na nko te, kobomba te mabe oyo asali. Salisá mwana andima mokumba na ye na likambo oyo asali, na ndakisa, akende kosɛnga bolimbisi mpe mbala mosusu afuta eloko oyo abebisaki.

Soki bana bayekoli kondima mokumba na bango ntango basali mabe, ekoteya bango

  • báloba solo mpe bándima mabunga na bango

  • bápesa basusu foti te

  • báboya komilongisa

  • básɛnga bolimbisi, ntango esengeli