Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Likoki oyo nzoto ya moto ezalaka na yango ya kokaukisa mpota

Likoki oyo nzoto ya moto ezalaka na yango ya kokaukisa mpota

LIKOKI oyo nzoto ya moto ezalaka na yango ya kobɛlisa mpota mpe kobotisa baselile oyo ebebi ezali moko ya makambo mingi oyo esalaka ete moto azala na bomoi. Yango ebandaka ntango kaka moto azoki.

Tókanisa naino: Mpo mpota ebanda kokauka makambo ndenge na ndenge ya kokamwa esalemaka na baselile:

  • Mposo ya makasi ebotaka pembenipembeni ya mpota mpe ekangaka makila mpo misisa oyo ezoki etika kobimisa makila.

  • Kovimba esalaka ete mpota ekɔta mikrobe te mpe elongolaka “basalite” nyonso ya mpota.

  • Nsima ya mikolo, baselile ya sika ebotaka, ekangaka mpota mpe ebongisaka misisa oyo ezokaki.

  • Nsukansuka, baselile yango ezipaka mpota mpe ekómisaka makasi esika oyo mpota ezalaki.

Ndenge makila ekangamaka ntango moto azoki etindi bato ya mayele básala baplastike oyo ekoki “komibongisa” soki etɔbɔki to epasuki. Mpo baplastike yango emibongisa soki epasuki to etɔbɔki, batyá yango batiyo mibale ya mike ngámbo na ngámbo oyo mokomoko ezali na nkisi oyo “etangaka.” Ntango nkisi yango mibale esangani, ekómaka lokola kole oyo epanzanaka mpo na kozipa esika oyo epasukaki to etɔbɔkaki. Ntango kole yango ezali kokóma makasi ezongisaka esika oyo ebebaki ndenge ezalaki. Moto moko ya mayele amonisi ete ndenge oyo tozali kosala mpo eloko moko “emibongisaka yango moko,” tomonaka yango na biloko mosusu oyo Nzambe akelá.”

Okanisi nini? Likoki oyo nzoto ezalaka na yango ya kokaukisa mpota, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?