Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge loposo ya moselekete babengi diable épineux ebendaka mai

Ndenge loposo ya moselekete babengi diable épineux ebendaka mai

MOSELEKETE babengi diable épineux ya Australie (Moloch horridus) ebendaka mai ya londende, ya bisika oyo moi ekɔtaka te mpe ya zɛlo ya maimai. Na nsima, ememaka mai yango na monɔkɔ na yango mpo emɛla. Ndenge nini? Sekele ekoki kozala na loposo ya moselekete yango oyo ekamwisaka.

Banzela oyo ezali likoló ya loposo ekutaná na oyo ezali na kati ya loposo mpo mai ekende tii na monɔkɔ ya moselekete yango

Tókanisa naino: Loposo yango ezipamá na ba-écaille. Bato mosusu ya siansi bamoni ete mai to londende oyo ba-écaille ebendaka elekaka na bisika oyo loposo ezali makasi mpe ekɔtaka na banzela oyo ekaboli ba-écaille yango. Banzela yango ekutanákutaná mpe ekendá tii na monɔkɔ ya moselekete yango.

Kasi, ndenge nini moselekete yango ebendaka mai kobanda na makolo, emata na nzoto mpe ekóma tii na monɔkɔ kozanga ete nguya ya gravitation epekisa yango? Ndenge nini engulutaka libumu na yango na bisika ya maimai mpo na kobenda mai yango?

Emonani ete bato ya mayele bayebi sikoyo sekele ya moselekete yango. Mwa batiyo oyo ezalaka na nzoto na yango nde ekutanisaka banzela oyo ezali likoló ya loposo na oyo ezali na kati. Ndenge oyo banzela yango ezalaka, esalaka ete mai eleka na banzela ya mikemike kozanga ete nguya ya gravitation epekisa yango. Na ndenge yango, loposo na yango ebendaka mai lokola epɔnje.

Janine Benyus, prezida ya ebongiseli moko (Biomimicry Institute) alobi ete komekola mayele oyo moselekete yango esalelaka mpo na kobenda mai ekoki kosalisa ba-ingénieur básala baaparɛyi mpo na kobenda mai na londende mpo bandako ezala na malili ya makasi mingi te mpe bato bázwa mai ya komɛla.

Okanisi nini? Ndenge oyo loposo ya moselekete yango ebendaka mai ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?