Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntango ndeko to moninga moko azali kobɛla

Ntango ndeko to moninga moko azali kobɛla

“Ntango tata alingaki kobima na lopitalo, tosɛngaki monganga na ye asala ye lisusu ekzamɛ ya makila. Monganga ayebisaki biso ete makila na ye ezalaki malamu, kasi na boboto nyonso, asalaki ye lisusu ekzamɛ. Monganga yango akamwaki ntango azwaki ye na maladi mibale! Asɛngaki bolimbisi mpe abengaki monganga mosusu oyo ayebi kosalisa bamaladi yango. Sikoyo, tata azali malamu. Kasi, tozali mpenza na esengo ndenge totunaki mituna.”​—Maribel.

Liboso ya kokutana na monganga, komá bilembo ya maladi mpe bankisi oyo azali komɛla

Kokutana na monganga mpe kokɔta lopitalo ekoki kotungisa mingi. Kasi, ndenge lisolo ya Maribel emonisi yango, lisalisi ya moninga moko to ndeko ya libota ekoki mpenza kozala malamu, ata mpe kobikisa bomoi ya moto. Ndenge nini okoki kosalisa moninga to ndeko oyo azali kobɛla?

Liboso bókende epai ya monganga. Salisá moto oyo azali kobɛla na kokoma ndenge azali komiyoka mpe nkisi nyonso oyo azali komɛla. Komá mpe motuna nyonso oyo okolinga kotuna monganga. Salisá moninga na yo akanisa lisusu makambo mikemike ya maladi na ye to soki ndeko moko ya libota na ye abɛlaki maladi yango. Koloba te ete monganga ayebi makambo wana nyonso to akotuna yango.

Tyá likebi, tuná mituna na limemya mpe komá makambo oyo monganga azali koloba

Ntango bozali epai ya monganga. Omindimisa ete yo ná moto oyo azali kobɛla bozali kokanga ntina ya makambo oyo monganga azali koloba. Tunáká mituna kasi kopesa makanisi na yo moko te. Tiká moto oyo azali kobɛla atuna mituna mpe aloba ndenge azali komiyoka. Tyá likebi mpe komáká makambo oyo monganga azali koloba. Luká koyeba lisalisi nini ya monganga akoki kozwa. Na bantango mosusu, ekoki kozala malamu koyebisa moto oyo azali kobɛla aluka likanisi ya monganga mosusu.

Talelá lisusu malako ya monganga mpe bankisi oyo akomi

Nsima ya kouta epai ya monganga. Bótala na ye mokolo oyo bokozonga epai ya monganga. Omindimisa ete azali komɛla bankisi oyo esengeli. Lendisá ye amɛla bankisi ndenge bakomeli ye mpe ayebisa monganga mbala moko likambo nyonso ya mabe oyo bankisi yango esali ye. Salisá ye alɛmba nzoto te mpe lendisá ye alanda malako mosusu nyonso oyo monganga abakisi mpo na ndenge ya kokoba komɛla bankisi yango. Salisá ye ayeba makambo mosusu oyo etali maladi na ye.

Na lopitalo

Omindimisa ete bakomi makambo nyonso na fishɛ malamu

Zalá motema mpiɔ mpe tyá likebi. Moto ya maladi oyo alingi kokɔta lopitalo akoki komitungisa mpe komona ete azangi elikya. Soki ozali motema mpiɔ mpe ozali kotya likebi, okoki kosalisa moto nyonso azala motema likoló te mpe bosala mabunga te. Omindimisa ete ayebisi makambo nyonso malamumalamu ntango monganga azali kosalela ye fishɛ. Tosá lotomo ya moto oyo azali kobɛla ya kozwa bikateli etali lisalisi ya monganga oyo alingi kozwa. Soki azali maladi makasi mpe azangi likoki ya kosala yango, kokisá mposa na ye ndenge ezali na papye oyo akomaki mpe makanisi ya ndeko to ya moto moko oyo atyelaka motema. *

Monisá makanisi na yo epai ya minganga na limemya nyonso

Kozela te bátuna yo mpo oloba. Kobanga koloba te. Kolata malamu mpe komonisa bizaleli ya malamu ekoki kotinda minganga bátyela ndeko to moninga na yo likebi mpenza mpe ekoki kutu kotinda bango básalisa ye malamu koleka. Na balopitalo mingi, moto ya maladi akutanaka na minganga ndenge na ndenge. Okoki kosalisa na koyebisa minganga mosusu makambo oyo baninga na bango balobaki. Oyebi moto oyo azali kobɛla malamu, yango wana lobelá mbongwana nyonso oyo omoni na nzoto to na makanisi na ye.

Salá oyo okoki kosala kozanga kolekisa ndelo

Monisá limemya mpe botɔndi. Mbala mingi minganga batungisamaka mingi na mosala na bango. Salelá bango makambo ndenge okolinga básalela yo. (Matai 7:12) Monisá limemya mpo na formasyo mpe eksperiansi na bango, tyelá makoki na bango motema mpe zalá na botɔndi mpo na milende na bango. Kosala bongo ekoki kolendisa bango básala lisusu malamu koleka.

Moto moko te akoki kokima maladi. Kasi, soki okanisi malamu liboso mpe opesi lisalisi oyo ebongi, okoki kosalisa moninga to ndeko ayikela mokakatano oyo ekómeli ye mpiko.​—Masese 17:17.

^ par. 8 Esika na esika ezali na mibeko mpe makambo oyo etali lotomo ya moto ya maladi mpe mikumba oyo asengeli kokokisa. Omindimisa ete papye oyo ezali na bamposa na ye na makambo etali lisalisi ya monganga ezangi likambo moko te mpe ezali ya kala te.