Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini na likambo ya kobala moto ya mposo mosusu?

Biblia elobi nini na likambo ya kobala moto ya mposo mosusu?

Eyano ya Biblia

 Nzambe andimaka ete mobali ná mwasi oyo bakeseni mposo bábalana mpo na miso na ye, bato ya mposo nyonso bazali ndenge moko. Biblia elobi: “Nzambe aponaka bilongi te.”​—Misala 10:34, 35.

 Talá bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo emonisi ete bato, ata ya mposo nini, bazali ndenge moko mpe ete bakoki kobalana.

Bato nyonso bautá na moto moko

 Bato nyonso bazali bankɔkɔ ya mobali ya liboso Adama, ná mwasi na ye Eva, oyo Biblia ebengi “mama ya moto nyonso oyo azali na bomoi.” (Ebandeli 3:20) Yango wana Biblia elobi mpo na Nzambe ete: “Na moto moko asalaki bikólo nyonso ya bato.” (Misala 17:26) Ata soki mposo ya bato ekeseni, bazali kaka libota moko. Kasi, mwasi ná mobali bakoki kosala nini soki na esika bafandi bato bakaniselaka mposo mosusu mabe to baponaponaka bikólo?

Bato ya bwanya to ya mayele “bapesanaka makanisi”

 Kobalana na moto ya mposo mosusu ezali ata mabe moke te na miso ya Nzambe; kasi bato mosusu bakanisaka bongo te. (Yisaya 55:8, 9) Soki ozali kokanisa kobala moto ya mposo mosusu, yo ná moto oyo akokóma molongani na yo bosengeli kolobela makambo oyo elandi:

  •   Bokosala nini soki bato ya esika bofandi to bandeko na bino bazali kolobela bino mabe?

  •   Ndenge nini bokosalisa bana na bino báyeba kokanga motema soki basusu bakaniseli bango mabe?

 ‘Kopesana makanisi’ ndenge wana ekoki kosalisa mpo libala na bino ezala malamu.​—Masese 13:10; 21:5.