Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge oyo mbwa eyokaka nsolo

Ndenge oyo mbwa eyokaka nsolo

Bato ya mayele balobi ete mbwa esalelaka zolo na yango mpo na koyeba soki mbwa mosusu ezali na mbula nini, ezali mwasi to mobali, ezali na nkanda to te. Bato bakoki kutu kolakisa mbwa ndenge ya koyeba bɔmbi to drɔgɛ. Bato basalelaka mingi miso mpo na koyeba biloko oyo ezali zingazinga na bango, kasi mbwa esalelaka nde zolo na yango. Na maloba mosusu mbwa “etalaka” na zolo na yango.

Kanisá naino: Ndenge oyo mbwa eyokaka nsolo eleki mosika mpenza ndenge oyo zolo ya moto eyokaka nsolo. Ebongiseli moko (National Institute of Standards and Technology) elobi ete mbwa “ekoki koyoka nsolo ya eloko oyo ezali na kati ya eloko moko mbala miliare. Yango ekokani na koyoka nsolo ya mwa sukali moke oyo bazwi na lutu ya moke mpenza mpe basopi yango na mai ya pisini oyo basalaka na yango masano ya Olympique.”

Nini esalaka ete zolo ya mbwa eyoka nsolo ndenge wana?

  • Lokola zingazinga ya zolo ya mbwa ezalaka malilimalili to maimai, ebendaka nsolo na pɛtɛɛ nyonso.

  • Na zolo ya mbwa, mopɛpɛ elekaka na banzela mibale: moko mpo na kopema, mpe mosusu mpo na koyoka nsolo. Ntango mbwa ebendaka pema, mopɛpɛ yango elekaka na eteni ya zolo oyo ezalaka na biloko mikemike oyo ebendaka nsolo.

  • Na kati ya zolo ya mbwa, esika oyo ebendaka nsolo ezali na molai ya santimɛtrɛ-karé koleka 130, kasi oyo ya moto ezalaka kaka 5 santimɛtrɛ-karé.

  • Na zolo ya mbwa, baselile oyo ebendaka nsolo ekoki kozala mbala 50 koleka oyo ya biso bato.

Nyonso wana esalisaka mbwa ekesenisa biloko mikemike oyo ezali na kati ya nsolo moko oyo ezali mpasi koyoka yango. Na ndakisa, tokoki koyoka nsolo ya elubu moko, nzokande ndenge bato mosusu ya mayele balobi, mbwa ekoki kokesenisa biloko mikemike oyo epesaka elɛngi na bilei, oyo batye na elubu yango.

Bato ya mayele na Institut moko ya kosala bolukiluki mpo na maladi ya kanser balobi ete, bɔɔngɔ mpe zolo ya mbwa oyo esalaka nzela moko, ezali “moko ya biloko oyo eyebaka nsolo ya mindɔndɔ koleka eloko mosusu nyonso oyo eyebaka nsolo.” Bato ya siansi bazali kosala baaparɛyi oyo ezali lokola “zolo” mpo na koyeba bɔmbi, biloko ya kotɛka oyo ekɔtaka na ndenge ya moyibi mpe bamaladi, ata mpe maladi ya kanser.

Okanisi nini? Ndenge oyo mbwa eyokaka nsolo, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?