Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Ndenge mino ya mbɛmbɛ babengi patelle esalemá

Ndenge mino ya mbɛmbɛ babengi patelle esalemá

Mbɛmbɛ babengi Patelle ezali mbɛmbɛ moko ya mai oyo ezalaka na ndako na yango oyo ezali lokola ekoti, ezalaka na mino moko ya makasi mpenza. Mino na yango esalami na bansinga mikemike oyo ekanganikangani esika moko lokola mwa mabanga mike ya makasi oyo babengi goethite, oyo etondi na baproteini.

Kanisá naino: Mbɛmbɛ babengi patelle ezalaka na eloko moko lokola lolemo oyo etondi na milɔngɔ ya mino oyo egumbamá; oyo lino mokomoko ezali na bolai ya milimɛtrɛ soki moko​—oyo esalaka lokola mbeli. Lino mokomoko esengeli kozala makasi mpenza mpe ekembá mpo ekoka kobenda milona oyo ekangamá na mabanga na nse ya mai mpo emileisa.

Bato ya mayele basalelaki mikroskope oyo eleki makasi mpo na koyeba nguya oyo mino ya mbɛmbɛ babengi patelle ezalaka na yango liboso ebukana. Bamonaki ete mino ya mbɛmbɛ babengi patelle ezali makasi koleka eloko mosusu nyonso oyo bayekolaki, eleki ata mpe nsinga ya ndako ya limpulututu (araignée). Mokambi ya bato yango ya mayele alobaki boye: “Tosengeli komekola mayele ya moto oyo asalá mino ya mbɛmbɛ babengi patelle ntango tolingi kosala biloko ya sika.”

Bato ya mayele bakanisi ete bakoki kosalela biloko ya mino yango mpo na kosala mituka, bamasuwa, mpe baaviɔ, ezala mpe prothèse ya mino.

Okanisi nini? Mino ya mbɛmbɛ babengi patelle ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?