Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Kole ya mwa nyama babengi balane

Kole ya mwa nyama babengi balane

Bandá kala bato ya zooloji bamoná likoki oyo mwa nyama babengi balane ezalaka na yango ya kobakama makasi na mabanga, na banzela oyo ekendá tii na mbu mpe na nse ya bamasuwa. Balobaka ete kole ya mwa nyama yango eleki mosika kole mosusu nyonso oyo bato basalaka. Bato ya siansi bauti koyeba ndenge mwa banyama yango ebakamaka na bisika ya maimai kaka mikolo oyo.

Kanisá naino: Makambo bato ya siansi bayekoli emonisi ete mwa banyama yango oyo ebotami sika etambolaka yango moko na kati ya mai mpe etalaka bisika ndenge na ndenge liboso epona esika oyo ebongi, oyo yango ekobakama. Emonani ete soki ezwi esika yango, ebimisaka mai ya lolenge mibale. Mai ya liboso ezalaka lokola mwa mafuta oyo ebenganaka mai oyo ezali na esika oyo yango eponi. Lisusu, mwa mai yango ya mafutamafuta ebongisaka esika mpo mwa nyama yango epakola mai ya mibale oyo esalemi na baproteini oyo ebengami phosphoprotéine, esika oyo yango ekobakama.

Soki esangani, mai yango nyonso mibale ekómaka kole moko ya makasi mpenza, oyo elongwaka te ata soki banyama mosusu ya mikemike eluki kolongola yango. Ezali na ntina mpenza kole yango ezala makasi bongo mpe esila noki te mpo mwa nyama yango elekisaka bomoi mobimba na esika oyo yango ebakami.

Mwa banyama yango mpe ndenge bansingansinga ya kole na yango ezali komonana

Ndenge oyo mwa nyama yango esalaka mpo na kosala kole yango ezali mindɔndɔ koleka ndenge bato ya siansi bazalaki kokanisa liboso. Moko ya bato ya siansi oyo bamonaki likambo yango; alobi boye: “Solisyo oyo mwa nyama yango ezwá mpo na kolonga mokakatano oyo mai etyaka ya kopekisa eloko moko ekatisa yango, ezali mayele moko ya kokamwa mpenza!” Mayele yango ekoki kosalisa bato oyo basalaka bolukiluki básala kole oyo bakoki kosalela na nse ya mai ata mpe bakole mosusu oyo esalemi na biloko mosusu, oyo bakoki kosalela yango na elektroniki, na mosala ya monganga mpe ntango balingi kotya enama mosusu na nzoto ya moto.

Okanisi nini? Kole ya mwa nyama babengi balane ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?