Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Likoki oyo loposo ya baleine-pilote ezali na yango ya komipɛtola

Likoki oyo loposo ya baleine-pilote ezali na yango ya komipɛtola

Mwa banyama ya mai oyo babengi balane mpe banyama mosusu ya mai oyo ekangamaka mpe etondanaka na nse ya masuwa enyokolaka mpenza batambwisi-masuwa. Soki mwa banyama yango etondani na nse ya masuwa, esalaka ete masuwa etambola malɛmbɛ, esalela mazuti mingi mpe esɛngaka ete bábimisa masuwa na mai nsima ya mbula mibale nyonso mpo na kopɛtola yango. Mpo na kosilisa mokakatano yango, bato ya siansi bazali koluka solisyo na biloko oyo ezali na mokili.

Kanisá naino: Bolukiluki emonisi ete loposo ya baleine-pilote oyo ezalaka na binyanyelo (nageoires) ya milai ezalaka na likoki ya komipɛtola. Loposo yango ezali na mabaku ya mikemike oyo babengi nanostries, oyo ezalaka mike mpenza mpe epekisaka banyama mikemike ebakama na loposo yango. Mabakumabaku yango etondá na mwa mai ya kole oyo ebenganaka mwa banyama mikemike mpe bamikrobe. Baleine etangisaka kole ya sika soki loposo yango elongwe.

Bato ya siansi balingi ete nse ya masuwa ezala na likoki ya komipɛtola lokola oyo ya baleine yango. Liboso, bazalaki kopakola nse ya masuwa langi moko oyo ekimisaka mwa banyama yango. Kasi, bauti kopekisa kosalela langi ya ndenge wana mpo ezali pwazɔ mpo na bambisi mpe banyama mosusu ya mai. Bato ya mayele bazwi solisyo oyo: kobamba monyama moko ya linzanza likoló ya milɔngɔ ya mwa madusu oyo elekisaka nkisi moko oyo ebebisaka mai te. Nkisi yango evimbaka mwa moke mpe ekómaka kole soki etuti mai ya mbu. Na ndenge yango, esalaka loposo moko oyo ezipaka nse mobimba ya masuwa. Nsima ya mikolo, loposo yango, oyo volimi na yango ezali milimɛtrɛ soki 0,7, ebebaka mpe elongwaka yango moko ná mwa banyama nyonso oyo ebakamaki likoló na yango. Na nsima, nkisi yango ekobima lisusu mpe ekokóma kole oyo ekozipa lisusu nse mobimba ya masuwa.

Mwa banyama oyo babengi balane epekisaka masuwa etambola mbangu mpe kolongola yango ezalaka mpasi

Baekzamɛ oyo basali na laboratware emonisi ete mayele yango ekoki kopekisa mpenza banyama mikemike etondana na nse ya masuwa. Bakompanyi ya masuwa ekozwa mpenza benefisi mpo kotya bamasuwa pembeni mpo na kopɛtola yango esɛngaka mbongo mingi.

Okanisi nini? Likoki oyo loposo ya baleine-pilote ezali na yango ya komipɛtola ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?