Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kozala “Mosamaria ya motema malamu” elakisi nini?

Kozala “Mosamaria ya motema malamu” elakisi nini?

Eyano ya Biblia

Maloba “Mosamaria ya motema malamu” esalelamaka mingimingi mpo na komonisa moto oyo asalaka makambo mpo na kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga. Maloba yango euti na lisolo, to ndakisa moko, oyo Yesu apesaki mpo na komonisa ete mozalani ya malamu mpe ya motema mawa asalisaka basusu kozanga kotalela bikólo to mimeseno na bango. a

Na lisolo oyo, tokolobela:

 Ndakisa ya “Mosamaria ya motema malamu” elakisi nini?

Talá na mokuse lisolo yango oyo Yesu abɛtaki: Moyuda moko autaki Yerusaleme mpe azalaki kokende na Yeriko. Na nzela, Moyuda yango akutanaki na miyibi, babɛtaki ye mpe batikaki ye pene na liwa.

Nganga-nzambe moko Moyuda alekaki moto yango, mpe na nsima mokonzi moko ya lingomba ya Bayuda mpe alekaki Moyuda yango oyo azokaki. Atako bazalaki bato ya ekólo moko na moto yango ya mobembo, kasi ata moko te kati na bango atɛlɛmaki mpo na kosalisa ye.

Nsukansuka, moto moko ya ekólo mosusu oyo azalaki mpe koleka na nzela yango, apusanaki pene na ye. Azalaki Mosamaria. (Luka 10:33; 17:16-18) Mosamaria yango ayokaki mawa mpe akangaki bampota ya moto yango. Na nsima amemaki moto yango na ndako oyo bapaya balalaka. Kuna asalisaki ye butu mobimba. Na mokolo oyo elandi, afutaki mobateli ya ndako yango mpo asalisa moto yango, mpe ayebisaki ye ete akofuta mbongo nyonso oyo ekobakisama likoló.​—Luka 10:30-35.

 Mpo na nini Yesu apesaki ndakisa yango?

Yesu abɛtelaki mobali moko lisolo oyo mpo mobali yango azalaki kokanisa ete kaka bato ya ekólo na ye mpe ya lingomba na ye nde bazali bazalani na ye. Yesu alingaki koteya mobali yango likambo moko ya ntina mingi, elingi koloba, mobali yango asengelaki koyeba ete “mozalani” ezali kaka te bandeko na ye Bayuda, kasi bato nyonso. (Luka 10:36, 37) Lisolo yango etyamaki na Biblia mpo na bolamu ya moto nyonso oyo alingi kosepelisa Nzambe.​—2 Timote 3:16, 17.

 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa yango

Ndakisa yango eteyi biso ete mozalani ya malamu amonisaka motema mawa na misala na ye. Asalisaka moto oyo azali na bosɛnga, ata soki azali moto ya mimeseno mosusu, loposo mosusu to ekólo mosusu. Mozalani ya solosolo asalelaka basusu makambo kaka ndenge alingaka basusu básalela ye.​—Matai 7:12.

 Basamaria bazalaki banani?

Basamaria bazalaki kofanda na nɔrdi ya Yudea. Basusu kati na bango bautá na mabota oyo esangisaki Bayuda ná bato ya bikólo mosusu.

Na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, Basamaria basalaki mwa lingomba na bango moko. Bazalaki kondima mikanda mitano ya liboso ya Makomami ya Ebre, kasi bazalaki koboya mikanda mosusu nyonso oyo etikali.

Bayuda mingi na ntango ya Yesu bazalaki kotyola Basamaria mpe koboya kozala pene na bango. (Yoane 4:9) Bayuda mosusu bazalaki kosalela liloba “Mosamaria” mpo na kofinga.​—Yoane 8:48.

 Lisolo ya “Mosamaria ya motema malamu” esalemá mpenza?

Makomami emonisi te soki lisolo ya Mosamaria ezalaki likambo oyo esalemá mpenza. Nzokande, Yesu azalaki mbala mingi kosalela bandakisa ya mimeseno mpe bisika oyo bayoki na ye bayebaki malamu mpo na kosalisa bango bákanga mpenza ntina ya likambo oyo alingi koteya.

Makambo mingi ya mikemike ya lisolo yango ezali mpenza ya solo. Na ndakisa:

  • Nzela oyo ebandi na Yerusaleme mpo na kokende Yeriko, ezalaki na molai ya kilomɛtrɛ koleka 20, mpe kokita na nse ezalaki kilomɛtrɛ 1. Lisolo yango emonisi polelepolele ete bato ya mibembo bazalaki ‘kouta na Yerusaleme’ mpo na kokita Yeriko.​—Luka 10:30.

  • Banganga-nzambe mpe Balevi oyo bazalaki kofanda na Yeriko bazalaki mbala na mbala kokende na Yerusaleme na nzela yango.

  • Miyibi bazalaki mbala mingi kobatama na nzela yango oyo bato bazalaki koleka mingi te mpo na kozela bato ya mibembo. Bazalaki mingimngi kobimela baoyo bazalaki kosala mibembo bango moko.

a Lisolo ya “Mosamaria ya motema malamu” eyebani mpe na nkombo “Mosamaria oyo azali mozalani ya malamu.”