Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mangomba nyonso ezali ndenge moko? Nyonso ememaka epai ya Nzambe?

Mangomba nyonso ezali ndenge moko? Nyonso ememaka epai ya Nzambe?

Eyano ya Biblia

 Te, mangomba nyonso ezali ndenge moko te. Biblia elobeli mangomba ebele oyo esepelisaka Nzambe te. Tokoki kotya mangomba yango nyonso na milɔngɔ mibale ya minene.

Molɔngɔ 1: Mangomba oyo esambelaka banzambe ya lokuta

 Biblia elobi ete losambo ya banzambe ya lokuta ezali lokola “mopɛpɛ,” “eloko ya mpamba,” mpe “epesaka litomba te.” (Yirimia 10:3-5; 16:19, 20) Yehova a Nzambe ayebisaki ekólo Yisraele ya kala ete: “Osengeli kozala na banzambe mosusu te mpo na kotɛmɛla ngai.” (Kobima 20:3, 23; 23:24) Soki Bayisraele bakómi kosambela banzambe mosusu, “nkanda ya Yehova ebandaki kongalela” bango.​—Mitángo 25:3; Balevi 20:2; Basambisi 2:13, 14.

 Tii lelo oyo, Nzambe ayokaka kaka bongo mpo na losambo ya “baoyo babengami banzambe.” (1 Bakorinti 8:5, 6; Bagalatia 4:8) Asɛngi baoyo nyonso balingi kosambela ye bálongwa na mangomba ya lokuta; alobi “Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana.” (2 Bakorinti 6:14-17) Soki mangomba nyonso ezalaka ndenge moko, Nzambe alingaki kopesa etinda wana te!

Molɔngɔ 2: Mangomba oyo esambelaka Nzambe ya solo na ndenge oyo andimaka te

 Na bantango mosusu, na losambo ya Nzambe, Bayisraele bazalaki kolanda mateya mpe mimeseno oyo bazwaki na losambo ya banzambe ya lokuta. Kasi Yehova azalaki koboya básangisa ata moke losambo ya solo ná losambo ya lokuta. (Kobima 32:8; Kolimbola Mibeko 12:2-4) Yesu apamelaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye mpo na lolenge oyo bazalaki kosambela Nzambe; bazalaki komilakisa ete bakangami na Nzambe, nzokande bazalaki bakosi, bazalaki ‘kotyola makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo ná motema mawa ná kondima.’​—Matai 23:23.

 Lelo oyo mpe, kaka lingomba oyo eteyaka solo nde ememaka bato epai ya Nzambe. Solo yango ezali na Biblia. (Yoane 4:24; 17:17; 2 Timote 3:16, 17) Mangomba oyo mateya na yango eyokani te na Biblia ekabolaka nde bato na Nzambe. Mateya mingi oyo bato bakanisaka ete ezali mateya ya Biblia, na ndakisa, liteya ya Bosato, ya lifelo ya mɔtɔ, mpe koloba ete molimo ekufaka te, eutá nde na losambo ya banzambe ya lokuta. Mangomba oyo eteyaka makambo wana ezali “mpamba,” to epesaka litomba te, mpo ezali kotya bonkɔkɔ na esika ya Mibeko ya Nzambe.​—Marko 7:7, 8.

 Nzambe ayinaka bokosi ya mangomba. (Tito 1:16) Mpo lingomba esalisa bato bápusana penepene ya Nzambe, mateya na yango esengeli kosalisa bato na bomoi ya mokolo na mokolo; esengeli kosuka kaka te na milulu kilikili. Na ndakisa, Biblia elobi: “Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi nzokande apekisaka lolemo na ye te, kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko, losambo ya moto yango ezali mpamba. Losambo oyo ezali pɛto mpe na mbindo te na miso ya Nzambe na biso mpe Tata yango oyo: kosalisa bitike ná basi oyo mibali bakufá na bolɔzi na bango, mpe komibatela mpe kozala te na litɔnɔ ya mokili.” (Yakobo 1:26, 27) Biblia King James Version esaleli maloba “lingomba ya pɛto.”