Lakisá makambo oyo ezali na kati

Maloba “liso mpo na liso” elimboli nini?

Maloba “liso mpo na liso” elimboli nini?

Eyano ya Biblia

 Mobeko “liso mpo na liso” ezalaki na kati ya mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele na nzela ya Moize mpe Yesu azongelaki yango na Lisolo na ye likoló ya Ngomba. (Matai 5:38; Kobima 21:24, 25; Kolimbola Mibeko 19:21) Yango elimbolaki ete ntango bazalaki kopesa bato mabe etumbu, etumbu yango esengelaki kokokana na mabe oyo basalaki. a

 Bazalaki kosalela mobeko yango mpo na kopesa etumbu na moto oyo asali moto mosusu mabe na nko. Mpo na moto oyo asali moto mosusu mabe na nko, Mibeko ya Moize elobaki boye: “Kobuka mpo na kobuka, liso mpo na liso, lino mpo na lino; kaka mbeba oyo asali moto, yango nde bakosala ye.”​—Balevi 24:20.

 Mpo na nini batyaki mobeko “liso mpo na liso”?

 Mobeko “liso mpo na liso” epesaki bato nzela te ya kozongisa mabe bango moko. Kutu, yango esalisaki baoyo bazalaki na mokumba ya kosambisa bápesa etumbu oyo ebongi, eleka ndelo te, ezala mpe bongobongo te.

 Mobeko yango ezalaki mpe likebisi mpo na moto nyonso oyo alingaki kosala basusu mabe na nko to akanaki kosala yango. Mobeko elobaki: “Bongo bato oyo batikali [baoyo bamonaki ndenge bapesaki moto etumbu na kolanda mibeko ya Nzambe] bakoyoka mpe bakobanga, mpe bakosala lisusu ata moke te likambo ya mabe lokola oyo epai na yo.”​—Kolimbola Mibeko 19:20.

 Mobeko “liso mpo na liso” etali mpe bakristo?

 Te, mobeko yango etali bakristo te. Ezalaki na kati ya Mibeko ya Moize, oyo liwa ya Yesu elongolaki.​—Baroma 10:4.

 Ata bongo, mobeko yango esalisi biso tóyeba ndenge oyo Nzambe akanisaka. Na ndakisa, emonisi ete Nzambe azwaka bosembo na valɛrɛ mpenza. (Nzembo 89:14) Emonisi mpe bosembo na ye; elingi koloba, bato mabe basengeli kozwa disiplini “na ndenge oyo ekoki.”​—Yirimia 30:11.

 Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango mpo na mobeko “liso mpo na liso”

 Libunga: Mobeko “liso mpo na liso” ezalaki makasimakasi.

 Solo: Mobeko yango epesaki nzela te básalela bosembo na ndenge ya kolekisa ndelo. Kutu, ntango bazalaki kosalela yango na ndenge oyo ebongi, bazuzi oyo bayebi kosambisa bazalaki kosɛnga moto oyo asali mabe afuta mpo na mabe asali kaka nsima ya kotalela makambo oyo etindaki moto asala mabe yango mpe soki asalaki yango na nko. (Kobima 21:28-30; Mitángo 35:22-25) Na yango, mobeko “liso mpo na liso” ezalaki kopekisa bápesa moto etumbu koleka ndelo.

 Libunga : Mobeko “liso mpo na liso” epesaki bato nzela ya kozongiselana mabe.

 Solo: Mibeko ya Moize elobaki boye: “Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe to kokangela bango nkanda.” (Balevi 19:18) Na esika mobeko yango elendisa moto ye moko azongisa mabe, ezalaki nde kolendisa bato bátyela Nzambe motema mpe ebongiseli oyo atyaki mpo na kosembola makambo nyonso ya mabe.​—Kolimbola Mibeko 32:35.

a Mobeko yango, oyo na bantango mosusu bazalaki kobenga yango lex talionis na Latin, ezalaki mpe na kati ya mibeko ya bikólo mosusu ya ntango ya kala.