Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini mpo na dime?

Biblia elobi nini mpo na dime?

Eyano ya Biblia

 Mpo na kopesa mabɔkɔ na losambo ya solo, Bayisraele basengelaki kopesa dime, a to moko ya ndambo zomi ya biloko oyo bazwi na boumeli ya mbula mobimba. Nzambe ayebisaki bango: “Osengeli mpenza kopesa moko ya bandambo zomi [to dime] ya mbuma nyonso ya milona na yo, oyo ebimaka na elanga na yo mbula na mbula.”​—Kolimbola Mibeko 14:22.

 Mobeko ya kopesa dime ezalaki na kati ya Mibeko ya Moize, mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele. Lokola bakristo bazali te na nse ya Mibeko ya Moize, ezali na ntina te bápesaka dime. (Bakolose 2:13, 14) Kutu, mokristo mokomoko apesaka mbongo “ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Bakorinti 9:7.

 Dime na “Testama ya Kala”

 Dime elobelami mbala mingi na eteni ya Biblia oyo babengaka Testama ya Kala. Dime elobelami mingi nsima ya kopesa Bayisraele Mibeko na nzela ya Moize. Kasi, dime elobelami mpe liboso Nzambe apesa Bayisraele Mibeko ya Moize.

Liboso ya Mibeko ya Moize

 Moto ya liboso oyo apesaki dime to moko ya bandambo zomi ezali Abrama (Abrahama). (Ebandeli 14:18-20; Baebre 7:4) Abrahama apesaki mokonzi mpe nganga-nzambe ya Saleme dime, emonani ete Abrahama apesaki ye kaka mbala moko. Biblia elobi esika moko te oyo Abrahama to bana na ye bapesaki lisusu dime.

 Moto ya mibale oyo Biblia elobi ete apesaki dime ezali Yakobo, nkɔkɔ ya Abrahama. Yakobo alakaki Nzambe ete soki apamboli ye, akopesa Nzambe “moko ya bandambo zomi” ya biloko oyo akozwa. (Ebandeli 28:20-22) Bato mosusu ya mayele na makambo ya Biblia balobi ete ekoki kozala ete Yakobo apesaki dime yango na nzela ya bambeka ya banyama. Yakobo akokisaki elaka na ye, kasi atindikaki te bato ya libota na ye bápesa mpe dime.

Na nse ya Mibeko ya Moize

 Bayisraele basengelaki kopesa dime mpo na kopesa mabɔkɔ na makambo ya losambo na bango.

  •   Dime ezalaki kokokisa bamposa ya bato oyo bamipesaki na mosala ya Nzambe, elingi koloba, Balevi mpe banganga-nzambe, mpo bazalaki na mabele te mpo na kosala bilanga. (Mitángo 18:20, 21) Balevi oyo bazalaki banganga-nzambe te bazalaki kozwa dime epai ya bato, mpe na nsima bango mpe na ngala na bango, bazalaki kopesa banganga-nzambe “moko ya bandambo zomi uta na moko ya bandambo zomi” ya malamu koleka.​—Mitángo 18:26-29.

  •   Emonani ete mbula na mbula dime ya mibale esengelaki kotyama pembeni mpo na Balevi mpe bato oyo bazalaki Balevi te. (Kolimbola Mibeko 14:22, 23) Dime yango ezalaki mpo na bafɛti ya makambo ya losambo, mpe bambula mosusu bazalaki kopesa dime yango Bayisraele oyo bazalaki babola, oyo bazalaki kokoka te kokokisa bamposa na bango.​—Kolimbola Mibeko 14:28, 29; 26:12.

 Ndenge nini bazalaki kosala kalkile ya dime? Mbula na mbula, Bayisraele bazalaki kotya pembeni moko ya bandambo zomi ya milona na bango. (Balevi 27:30) Soki baponi kopesa mbongo na esika ya milona, basengelaki te kopesa 10% ya mbongo oyo bazwi na boumeli ya mbula mobimba kasi basengelaki nde kopesa 12%. (Balevi 27:31) Basengelaki mpe kopesa “moko ya bandambo zomi nyonso ya etonga ya bangɔmbɛ mpe ya bampate.”​—Balevi 27:32.

 Mpo na kozwa moko ya bandambo zomi ya nyama, Bayisraele bazalaki kobimisa banyama na etonga, kotánga yango mpe kotya pembeni nyama nyonso ya zomi oyo ezalaki kobima na etonga. Mobeko elobaki ete basengelaki te kotalatala banyama oyo batye pembeni to kotya mosusu na esika na yango. Basengelaki mpe te kopesa mbongo na esika na yango, longola kaka soki ezali dime ya mibale oyo bazalaki kopesa na bafɛti ya makambo ya losambo. (Balevi 27:32, 33) Kutu, Bayisraele mosusu bazalaki kolinga kofuta mbongo mpo na dime ya mibale mpo bazalaki kosala mibembo milai mpo na kokende na bafɛti.​—Kolimbola Mibeko 14:25, 26.

 Ntango nini Bayisraele bazalaki kopesa dime? Bazalaki kopesa yango mbula na mbula. (Kolimbola Mibeko 14:22) Kasi, mbula nsambo nyonso, ezalaki sabata, mbula ya kopema, Bayisraele bazalaki kosala bilanga te. (Balevi 25:4, 5) Na mbula yango, dime ya milona ezalaki kopesama te. Na nsima ya mbula ya misato to ya motoba liboso ya mbula ya 7 oyo ya sabata, Bayisraele bazalaki kopesa dime ya mibale mpo na babola mpe Balevi.​—Kolimbola Mibeko 14:28, 29.

 Nini ebandaki kosalema soki Moyisraele apesi dime te? Mibeko ya Moize ezalaki kopesa etumbu te mpo na moto oyo apesi dime te. Bazalaki kopesa yango mpo bayebaki ete ezalaki malamu kosala bongo, kasi te mpo na kobanga etumbu. Bayisraele basengelaki koyebisa Nzambe ete bakopesa dime mpe kosɛnga ye apambola bango mpo bákokisa elaka na bango. (Kolimbola Mibeko 26:12-15) Soki Moyisraele moko apesi dime te, Nzambe azalaki komona ete Moyisraele yango ayibi Ye.​—Malaki 3:8, 9.

 Kopesa dime ezalaki kilo? Te. Nzambe alakaki ekólo yango ete soki bapesi dime, akopambola bango mpe bakozanga eloko te. (Malaki 3:10) Kutu, ekólo yango ezalaki konyokwama soki bapesi dime te. Nzambe azalaki kopambola bango te mpo banganga-nzambe mpe Balevi bazalaki kosala mosala mosusu mpo na kokokisa bamposa na bango moko mpe bazalaki lisusu kosalisa Bayisraele te básambela Nzambe.​—Nehemia 13:10; Malaki 3:7.

 Dime na “Testama ya Sika”

 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, bazalaki kosɛnga basambeli ya Nzambe bapesaka dime. Kasi, nsima ya liwa ya Yesu, ezalaki lisusu bongo te.

Na ntango ya Yesu

 Na Testama ya Sika, Biblia emonisi ete Bayisraele bazalaki kaka kopesa dime ntango Yesu azalaki awa na mabele. Yesu ayebaki ete basengelaki kopesa dime, kasi apamelaki bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kobɛta nsɛtɛ na likambo ya kopesa dime nzokande bazalaki ‘kotyola makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo ná motema mawa ná kondima.’​—Matai 23:23.

Nsima ya liwa ya Yesu

 Dime ezalaki lisusu na ntina te nsima ya liwa ya Yesu. Mbeka ya Yesu elongolaki Mibeko ya Moize, ezala mpe “mitindo ya kokɔngɔla epai ya bato moko ya bandambo zomi.”​—Baebre 7:5, 18; Baefese 2:13-15; Bakolose 2:13, 14.

a Dime ezali “moko ya ndambo zomi oyo batyaka pembeni mpo na kosalela likambo moko boye. . . . Mbala mingi dime oyo Biblia elobelaka ezalaka mpo na makambo ya losambo.”​—Harper’s Bible Dictionary, lokasa 765.