Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini na likambo ya kosala mayemi na nzoto?

Biblia elobi nini na likambo ya kosala mayemi na nzoto?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobeli likambo ya kosala mayemi na nzoto kaka mbala moko, na Balevi 19:28, oyo elobi: “Bosengeli komikata nzoloko te.” Nzambe apesaki mobeko wana na ekólo Yisraele; yango ezalaki komonisa ete bakeseni na bato ya bikólo mosusu oyo bazalaki kokoma nkombo to kotya elembo ya banzambe na bango na nzoto na bango. (Kolimbola Mibeko 14:2) Atako Mibeko oyo epesamaki na Yisraele etali mpenzampenza bakristo te, tosengeli kotalela malamu toli oyo epesamaki mpo na likambo ya kosala mayemi na nzoto.

Mokristo akoki kosala liyemi moko na nzoto?

 Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elandi ekoki kosalisa yo okanisa likambo yango:

  •   “Basi bábongisaka nzoto na bango, . . . bálekisaka ndelo te.” (1 Timote 2:9) Toli wana etali basi mpe mibali. Tosengeli kotalela makanisi ya basusu mpe koluka te likebi nyonso ya basusu eya kaka epai na biso.

  •   Bato mosusu basalaka mayemi na nzoto mpo balukaka komilakisa to komonisa ete bazali na likambo na moto te; basusu basalaka yango mpo na komonisa ete nzoto na bango ezali ya bango. Nzokande, Biblia elendisi bakristo ete: “Bókaba nzoto na bino mbeka ya bomoi, ya bosantu, oyo Nzambe akoki kondima: mosala mosantu oyo bozali kosala na makoki na bino ya kokanisa.” (Baroma 12:1) Salelá “makoki na [yo] ya kokanisa” mpo oyeba ntina mpenza oyo ozali koluka kosala liyemi na nzoto. Soki ezali mpo olingi kolanda ndenge bato bazali kosala to mpo na komonisa ete ozali moto ya etuluku moko boye, yebá ete makanisi na yo ekoki kobongwana, kasi liyemi wana ekotikala. Kotalela makanisi na yo ekoki kosalisa yo ozwa ekateli ya malamu.​—Masese 4:7.

  •   “Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” (Masese 21:5) Mbala mingi, moto oyo alingi kosala liyemi na nzoto asalaka yango mbangumbangu; nzokande, abosanaka ete yango ekoki kobebisa boyokani na ye na basusu to kobimisela ye mindɔndɔ mpo na mosala. Mpe mbala mingi, kosala liyemi na nzoto ezalaka ntalo mingi mpe esalaka mpasi mpo na kolongola yango. Baankɛtɛ mpe bakompanyi oyo elongolaka bato mayemi oyo basalaki na nzoto, bamonisi ete bato mingi oyo basalaka mayemi na nzoto, nsukansuka, bamonaka ete basengelaki kosala yango te.