Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sekele mpo na libota ya esengo

Ndenge oyo bana bakɔtisaka mbongwana na libala

Ndenge oyo bana bakɔtisaka mbongwana na libala

Charles * alobi ete: “Ngai ná Mary tosepelaki makasi ntango mwana na biso ya mwasi abotamaki. Kasi na mwa basanza ya ebandeli, nsima ya kobotama na ye, nazalaki kolala malamu te. Tosalaki myango ndenge na ndenge mpo na koyeba ndenge oyo tokobatela ye, kasi eumelaki te myango wana nyonso ekendeki na mai.”

Mary alobi boye: “Nsima ya kobotama ya mwana na biso, mbongwana ekɔtaki na bomoi na ngai. Na mbalakaka, makambo nyonso ekómaki kaka mwana, bibɛrɔ mosusu, kolongola ye kushɛ, to ndenge ya kosala mpo alela te. Ezalaki mpenza mbongwana monene. Esɛngaki basanza mingi mpo boyokani na ngai ná Charles ezonga ndenge ezalaki.”

MINGI bakondima ete kozala na bana ezali moko ya makambo oyo epesaka esengo mpenza na bomoi. Biblia elobi ete bana bazali “mbano” oyo euti na Nzambe. (Nzembo 127:3) Tata ná mama oyo baboti sika lokola Charles mpe Mary bayebi mpe ete bana bakoki komema mbongwana na libala na lolenge oyo bato bakanaki te. Na ndakisa, mama oyo aboti sika akoki kotya likebi na ye nyonso epai ya bebe na ye mpe akoki kokamwa ndenge nzoto mpe motema na ye ekolanda bamposa mikemike ya mwana na ye. Mpo na mobali oyo akómi tata sika, akoki kosepela na boyokani oyo ezali kati na mwasi na ye mpe mwana na ye. Kasi akoki mpe komitungisa ndenge asundolami na mbalakaka.

Ya solo, kobotama ya mwana ya liboso ekoki kobimisa mikakatano na libala. Kozanga kotalela mayoki ya moninga mpe makambo oyo balongani basilisaka te ekoki kobima polele, kokóma makasi mpo na mitungisi oyo eyaka ntango bato bakómi baboti.

Ndenge nini baboti ya sika bakoki komibongisa na basanza ya ebandeli oyo ezalaka na mosala mingi, ntango mwana oyo abotami azali kosɛnga batyela ye likebi na bango mobimba? Mwasi ná mobali bakoki kosala nini mpo na kobatela boyokani na bango? Ndenge nini bakoki kobongisa matata nyonso oyo etali kobɔkɔla mwana? Tótalela mokakatano yango mokomoko mpe tómona ndenge oyo batoli ya Biblia ekoki kosalisa mwasi ná mobali básilisa yango.

MOKAKATANO 1: Na mbalakaka likebi nyonso ekei kaka epai ya mwana.

Mwana oyo abotami sika alyaka ntango ya mama na ye mpe makanisi nyonso ya mama na ye ezalaka epai na ye. Ntango azali kokipe bebe na ye, akoki komiyoka ete azali kokokisa mokumba na ye malamu mpenza. Nzokande, mobali na ye akoki komiyoka ete asundolami. Manuel, oyo afandaka na Brésil alobi boye: “Ndenge mwasi na ngai alongolaki likebi epai na ngai mpe atyaki yango nyonso epai ya bebe na biso, ezalaki mbongwana moko oyo ezalaki mpasi mpenza mpo nandima yango. Liboso ezalaki kaka biso mibale, mpe na mbala moko, ekómaki kaka mwasi na ngai ná mwana.” Ndenge nini okoki kolonga mokakatano yango?

Sekele mpo na kolonga: Zalá motema molai.

Biblia elobi ete “bolingo ezali na motema molai mpe na boboto.” Bolingo “elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te.” (1 Bakorinti 13:4, 5) Ntango mwana abotami, mwasi ná mobali bakoki kosala nini mpo básalela toli oyo?

Mobali ya bwanya akomonisa ete alingaka mwasi na ye soki asali makasi mpo nakoyeba ndenge oyo kobotama ya mwana esalaka na nzoto mpe na makanisi ya mwasi. Soki asali bongo akoyeba mpo na nini bizaleli ya mwasi na ye ekoki kobongwana na mbalakaka. * Adam oyo afandaka na France mpe azali tata ya mwana moko ya mwasi ya sanza 11, alobi boye: “Ndenge bizaleli ya mwasi na ngai ebongwanaka, ezalaka mbala mosusu mpasi koyeba yango. Kasi nasalaka makasi nayeba ete nkanda na ye ezali mpo na ngai te. Kasi, asalaka bongo mpo na mitungisi oyo eyei mpo na ndenge tokómi na mwana.”

Ntango mosusu mwasi na yo ayebaka te ete ozali koluka kosalisa ye? Soki ezali bongo, kosilika mbangu te. (Mosakoli 7:9) Kutu, zalá nde motema molai mpe luká matomba na ye liboso na oyo ya yo, mpe yango ekosalisa yo otungisama te.​—Masese 14:29.

Epai mosusu, mwasi ya bososoli akoluka kolendisa mobali na ye na mokumba na ye ya sika. Akosala mpe ete mobali na ye apesaka mabɔkɔ mpo na kokipe mwana, na ndakisa na motema molai, akolakisa ye ndenge ya kolongolaka mwana kushɛ mpe kolatisa ye mosusu to kosala bibɛrɔ, ata soki na ebandeli akoki komona yango mabe.

Ellen, mama moko ya mbula 26 andimi ete asengelaki kotika makambo mosusu oyo azalaki kosala mobali na ye. Alobi boye: “Nasengelaki te komona ete mwana yango azali kaka ya ngai moko. Mpe nasengelaki komikundola ete nasengeli te koluka ntango nyonso ete mobali na ngai asala kaka ndenge nalingi ntango ameki kosala makambo oyo nayebisi ye mpo na kokipe mwana.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Bino basi, soki mibali na bino bakipe bana te ndenge bino bosalaka, bóboya ezaleli ya kotyola bango to kobandela mosala oyo basali. Bopesa bango longonya mpo na oyo ya malamu basali, mpe na ndenge yango, bokosala ete bámona ete bazali na ntina mpe bokolendisa bango mpo bápesa bino lisungi oyo bozali na yango mposa. Bino mibali, bolekisaka ntango mingi te na makambo oyo ezali na ntina mpenza te mpo bózala na ntango mingi ya kosalisa basi na bino, mingimingi na basanza ya liboso nsima ya kobotama ya mwana.

MOKAKATANO 2: Bolingo na bino na libala ekiti.

Atako balɛmbaka mpo na bampɔngi ya kokata mpe makambo mosusu ya mpasi oyo bakanaki te, baboti mingi oyo bakómi na mwana babundaka makasi mpo bázala kaka na boyokani ya malamu mpo bolingo na bango ekita te. Vivianne, mama moko na ekólo France, oyo azali na bana mibale alobi ete: “Na ebandeli, nazalaki kotya likebi mingi kaka na mokumba na ngai ya mama, mpe mbala mingi nazalaki kobosana mokumba na ngai ya mwasi ya libala.”

Epai mosusu, mobali akoki koyeba te ete zemi ebongoli mwasi na ye, na nzoto to na makanisi. Mwana oyo abotami akoki kolya ntango mpe kozwa makasi oyo bino mibale bozalaki kosalela mpo boyokani na bino ezalaka ntango nyonso makasi, ezala na mayoki mpe na makambo etali kosangisa nzoto. Kasi, ndenge nini mwasi ná mobali bakoki kondimisama ete bebe na bango oyo bazali kolinga mingi, oyo azali na likoki te ya kosala eloko ata moko alɛmbisa te boyokani na bango?

Sekele mpo na kolonga: Bózongisa bolingo na bino.

Biblia elobi boye mpo na libala: “Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.” * (Ebandeli 2:24) Yehova Nzambe akanaki ete bana bátika baboti na bango. Nzokande, Nzambe alingi ete mwasi ná mobali oyo babalani mpe bakómi mosuni moko, bátikala elongo bomoi na bango mobimba. (Matai 19:3-9) Ndenge nini kotosa ebongiseli wana esalisaka mwasi ná mobali oyo baboti sika báyeba makambo oyo esengeli kozala na esika ya liboso?

Vivianne, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nakanisaki maloba oyo ezali na Ebandeli 2:24 mpe yango esalisaki ngai namona ete nakómá ‘mosuni moko’ ná mobali na ngai, kasi te ná mwana na ngai. Namonaki ete ezali na ntina kobongisa libala na biso.” Theresa, mama moko oyo azali na mwana moko ya mwasi ya mbula mibale alobi boye: “Soki nabandi komona ete nakómi mosika na mobali na ngai, nasalaka mbala moko milende mpo na kotyela ye likebi, ata mpo na ntango moke mikolo nyonso.”

Soki ozali mobali, okoki kosala nini mpo na kobongisa libala? Yebisá mwasi na yo ete olingaka ye mpe moniseláká ye boboto. Salá milende mpenza mpo na kosilisa mokakatano nyonso oyo mwasi na yo akoki kozala na yango. Sarah, mama moko ya mbula 30 alobi boye: “Mwasi alingaka koyeba ete azali kaka na valɛrɛ mpe balingaka ye kaka ata soki nzoto na ye ezali lisusu te ndenge ezalaki liboso akóma na zemi.” Alan, oyo afandaka na Allemagne mpe azali tata ya bana mibale ya mibali, amoni ntina ya kosalisa mwasi na ye ntango atungisami na makanisi. Alobi boye: “Namekaka ntango nyonso kobɔndisa mwasi na ngai ntango azali na mawa.”

Ya solo, kobotama ya mwana esalaka ete mwasi ná mobali básangisa te nzoto ndenge bazalaki kosala liboso. Na yango, mwasi ná mobali basengeli kosololaka makambo oyo mokomoko azali na yango mposa. Biblia elobi ete mbongwana na likambo etali kosangisa nzoto kati na mwasi ná mobali esengeli kosalema soki ‘bango mibale bayokani.’ (1 Bakorinti 7:1-5) Yango esɛngaka kosolola. Ekoki kozala mpo na ndenge oyo okolá to mpo na mimeseno ya mboka na bino, okoki koyoka nsɔni kolobela makambo etali kosangisa nzoto elongo na molongani na yo. Kasi, masolo ya ndenge wana ezali na ntina ntango mwasi ná mobali bazali koluka komesana na mokumba ya kozala moboti. Omitya na esika ya moninga, zalá motema molai, mpe sembo. (1 Bakorinti 10:24) Na ndenge yango, bokoboya matata mpe bokokólisa bolingo kati na bino mibale.​—1 Petro 3:7, 8.

Mwasi ná mobali bakoki mpe kokolisa bolingo soki bazali kosepela na oyo mokomoko azali kosalela mosusu. Mobali ya bwanya akotyola te mosala makasi oyo mwasi oyo aboti sika azali kosala. Vivianne alobi boye: “Na nsuka ya mokolo, mbala mingi nayokaka lokola nasali eloko te, atako nasalaki mosala makasi mpo na kobatela mwana ntango nyonso!” Atako asalaka mosala makasi, mwasi ya bososoli akokeba ete atyola te mosala oyo mobali azali kosala mpo na libota.​—Masese 17:17.

MEKÁ KOSALA BOYE: Mama, soki likoki ezali, pemáká ntango mwana na yo alali. Kosala bongo ekosalisa bino bózala na makasi mingi mpo na libala na bino. Batata, soki likoki ezali bolamukaka na butu mpo na koleisa mwana to kolatisa ye kushɛ mosusu mpo basi na bino bápema. Mbala na mbala, tikeláká mwasi na yo mwa mokanda, tindeláká ye basango, to sololáká na ye na telefone mpo na komonisa ete olingaka ye. Bozwaka ntango ya kofanda mpe kosolola. Bosololaka mpe makambo etali bino mibale, kaka ya mwana te. Bósala ete boninga na bino ezala ntango nyonso makasi, mpe bokozala mpenza na likoki ya kolonga mikakatano ya kozala moboti.

MOKAKATANO 3: Bozali koyokana te na ndenge ya kobɔkɔla mwana.

Mwasi ná mobali bakoki komona ete ndenge oyo babɔkwamá ezali kosala ete bazalaka na matata. Asami, mama moko na Japon mpe mobali na ye Katsuro bazalaki na mokakatano yango. Asami alobi boye: “Nazalaki komona ete Katsuro amonaka makambo nyonso ya mwana na biso kaka malamu, kasi ye azalaki komona ete nazalaki makambo makasi epai ya mwana yango.” Ndenge nini bokoki kosala mpo bósala makambo na bomoko?

Sekele mpo na kolonga: Sololáká na molongani na yo mpe bópesanaka mabɔkɔ.

Salomo, mokonzi ya bwanya akomaki boye: “Na lofundo, moto abimisaka kaka etumba, kasi bwanya ezali epai ya baoyo bapesanaka makanisi.” (Masese 13:10) Makambo mingi nini oyebi na oyo etali ndenge oyo molongani na yo atalelaka likambo ya kobɔkɔla bana? Soki ozeli tii ntango mwana na bino akobotama liboso ya kolobela makambo ya sikisiki oyo etali ndenge ya kobɔkɔla mwana, bokobanda kowelana na esika ya kobongisa makambo na ndenge ebongi.

Na ndakisa, na mituna oyo elandi, boyokanaki ndenge nini: “Ndenge nini tokoteya mwana na biso bizaleli ya malamu na makambo etali kolya mpe kolala? Tosengeli kokende kozwaka mwana na mbeto soki aleli na ntango oyo asengeli kolala? Tokosala nini mpo na kolakisa mwana na biso ndenge ya kosalela batwalɛti?” Ya solo, bikateli na bino ekozala ndenge moko te na oyo ya baboti mosusu. Ethan, tata ya bana mibale alobi boye: “Bosengeli kosololaka makambo polele mpo bóyokana. Kosala bongo ekosalisa bino bokokisa bamposa ya mwana na bino.”

MEKÁ KOSALA BOYE: Kanisá na mayele oyo baboti na yo basalelaki ntango babɔkɔlaki yo. Talelá bizaleli nini mpe makambo nini oyo bazalaki na yango oyo okolinga komekola ntango ozali kobɔkɔla mwana na yo. Lisusu, talelá bizaleli to makambo nini okolinga te komekola bango. Sololá bikateli oyo ozwi elongo na molongani na yo.

Mwana akoki kobongisa libala

Ndenge kaka esɛngaka ntango mpe motema molai mpo bato oyo babandi mosala ya bokila bákóma na makoki, bino mpe bosengeli na ntango mpo na komesana na mikumba na bino ya kokóma baboti. Nsukansuka, bokomesana.

Kobɔkɔla mwana ekotya boyokani na bino ya libala na komekama mpe ekobongola mpo na libela boyokani yango. Kasi, ekopesa yo mpe libaku ya kokolisa bizaleli ya malamu. Soki osaleli toli ya bwanya ya Biblia, okokóma na makoki lokola tata moko na nkombo Kenneth. Alobi ete: “Kobɔkɔla bana esalisi ngai ná mwasi na ngai mingi. Lelo oyo, tolukaka te kaka matomba na biso moko, mpe tokómá kolingana mpe koyokana mingi.” Bambongwana ya bongo ezali mpenza na ntina na kati ya libala.

^ par. 3 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 11 Bamama mingi batungisamaka mwa moke na makanisi bapɔsɔ oyo elandaka na nsima ya kobotama ya mwana. Bamosusu batungisamaka makasi na makanisi nsima ya kobota. Mpo na koyeba ndenge mitungisi yango ezalaka mpe kolonga yango, talá masolo “Ma victoire contre la dépression postnatale” na Lamuká! ya 22 Yuli 2002 mpe “Comprendre la dépression postnatale” na Lamuká! ya 8 Yuni 2003, (nyonso na Lifalanse) ebimisami na Batatoli ya Yehova. Okoki mpe kotánga masolo yango na Internet na adrɛsi oyo www.pr418.com.

^ par. 19 Buku moko elobi ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na “kokangama,” oyo ezali na Ebandeli 2:24, ekoki ‘kolimbola kokangama na moto, kolinga ye mpe kozala sembo epai na ye.’

OMITUNA . . .

  • Na pɔsɔ eleki, nasalaki nini mpo na komonisa molongani na ngai ete nasepelaka na oyo azali kosala mpo na libota?

  • Mbala nini ya nsuka oyo nabombaki ntango mpo na kosolola mpenza na molongani na ngai kozanga ete tólobela makambo etali kobɔkɔla mwana?