Lakisá makambo oyo ezali na kati

MEKOLÁ KONDIMA NA BANGO​—MARIA MAGADALENA

“Namoni Nkolo!”

“Namoni Nkolo!”

Maria Magadalena azalaki kotala likoló, azalaki kolela na mai ya miso. Bakakisaki Nkolo na ye oyo azalaki kolinga mingi na nzete ya mpasi. Ezalaki soki na midi, na eleko ya prɛnta, “nzokande molili ekɔtaki na mabele mobimba”! (Luka 23:44, 45) Azipaki mapeka na ye na elamba mpe afandaki esika moko na basi oyo bazalaki pene na ye. Ndenge sanza ezipaka moi na mwa baminiti, elingaki te kobimisa molili ya ngonga misato mobimba. Mbala mosusu Maria mpe bato mosusu oyo batɛlɛmaki pene ya Yesu babandaki koyoka mongongo ya banyama oyo eyokanaka kaka na butu. Bato mosusu oyo bazalaki wana “babangaki mingi, balobi: ‘Ya solo oyo azalaki Mwana ya Nzambe.’” (Matai 27:54) Bayekoli ya Yesu mpe bato mosusu bakokaki kokanisa ete Yehova azalaki na mawa mpe na nkanda mpo na bato mabe oyo banyokolaki Mwana na ye.

Ezalaki mpasi mpo na Maria Magadalena atala Yesu mpe amona mpasi oyo azalaki koyoka, kasi alingaki kofanda pene na ye. (Yoane 19:25, 26) Yesu azalaki koyoka mpasi mpenza. Mama ya Yesu azalaki mpe na mposa ya libɔndisi mpe ya lisungi.

Nsima ya makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye, Maria alingaki kosala nyonso oyo akokaki mpo na Yesu. Azalaki moto ya mawa mpe bato bazalaki kotyola ye, kasi Yesu alongolaki ye na bampasi wana nyonso. Akómaki na bomoi ya lokumu mpe ya ntina. Akómaki mwasi oyo azali na kondima monene. Ndenge nini? Mpe kondima na ye ekoki koteya biso nini lelo oyo?

“Bazalaki kopesa biloko na bango mpo na kosalisa bango”

Na Biblia, istware ya Maria Magadalena ebandi na lisolo oyo emonisi ete Yesu apesaki ye bosomi, mpe alongolaki ye bampasi oyo azalaki na yango. Na eleko wana, misala ya bademo epalanganaki mingi, mpe bilimo wana mabe bazalaki konyokola bato, ata mpe kokɔtela basusu mpe kotambwisa bango. Toyebi te ndenge bazalaki kotungisa Maria Magadalena; toyebi kaka ete azalaki na bademo nsambo ya nkandankanda, oyo bazalaki nsɔmɔ. Mpe na lisalisi ya Yesu Kristo, bademo yango nyonso babimaki na kati na ye!​—Luka 8:2.

Lokola azwaki bosomi mpe abikaki na ndenge oyo tokoki kokanisa te, Maria akómaki sikoyo na bomoi ya sika. Ndenge nini akokaki komonisa botɔndi na ye? Akómaki moyekoli ya sembo ya Yesu. Asalisaki mpe Yesu ná bantoma na ye ntango amonaki ete bazalaki na mposa ya bilei, bilamba, mpe esika ya kolala na butu. Bazalaki bazwi te, mpe bazalaki kosala mosala ya mosuni te na ntango wana. Lokola Yesu ná bantoma bamipesaki kaka na mosala ya kosakola mpe koteya, bazalaki na mposa ya biloko ya mosuni.

Maria mpe ebele ya basi mosusu bapesaki mabɔkɔ mpo na kokokisa bamposa yango. Basi yango bazalaki “kopesa biloko na bango mpo na kosalisa bango.” (Luka 8:1, 3) Mbala mosusu basi yango mosusu bazalaki na bozwi. Biblia elobi te soki bazalaki kolamba bilei, kosukola bilamba, to bazalaki kozwa bibongiseli mpo na kolukela bango bisika ya kofanda ntango bazalaki kosala mibembo na bingumba mosusu. Kasi na bolingo na bango bazalaki kokokisa mosala na bango ya kopesa mabɔkɔ na etuluku wana ya bato soki 20 oyo bazalaki kosala mibembo. Kozanga ntembe, milende oyo basi yango basalaki esalisaki Yesu mpe bantoma bámipesa mobimba na mosala ya kosakola. Ya solo, Maria ayebaki ete akokaki te kofuta Yesu mpo na nyonso oyo asalelaki ye​—kasi azalaki na esengo na ndenge asalaki oyo akokaki kosala!

Lelo oyo, bato mingi bakoki komona mpamba bato oyo basalelaka basusu mosala oyo ezangi lokumu. Kasi Nzambe amonaka bongo te. Kanisá esengo oyo Nzambe ayokaki ntango amonaki Maria azalaki kosala nyonso oyo akokaki mpo na kosunga Yesu mpe bantoma na ye! Lelo oyo mpe, bakristo mingi ya sembo basalelaka basusu mosala oyo ezangi lokumu na esengo. Mbala mosusu mwa lisalisi to mwa maloba ya boboto ekoki kosalisa mingi. Yehova azwaka na motuya lisalisi ya ndenge wana.​—Masese 19:17; Baebre 13:16.

“Pene ya nzete ya mpasi ya Yesu”

Maria Magadalena azalaki moko kati na basi mingi oyo balandaki Yesu na Yerusaleme na fɛti ya Elekeli ya mobu 33 T.B. (Matai 27:55, 56) Ntango ayokaki ete bakangaki Yesu mpe bazalaki kosambisa ye na butu, Maria atungisamaki mingi. Mpe makambo ezalaki kaka kobeba. Bakonzi ya mangomba ya Bayuda mpe bato mosusu batyaki guvɛrnɛrɛ Ponse Pilate mbamba mpo akatela Yesu etumbu ya liwa ya nsɔmɔ. Ekoki kozala Maria amonaki nkolo na ye ndenge alɛmbaki, makila na nzoto, azali kobunda mpo na kotambola na nzela, amemi nzete moko ya molai mpe azali kokende esika bakoboma ye.​—Yoane 19:6, 12, 15-17.

Na esika babomaki Yesu, ntango molili ekɔtaki na mokili soki na ngonga ya midi, Maria Magadalena mpe basi mosusu batɛlɛmaki “pene ya nzete ya mpasi ya Yesu.” (Yoane 19:25) Maria, oyo atikalaki wana tii na nsuka, amonaki mpe ayokaki ndenge Yesu apesaki ntoma Yoane oyo azalaki kolinga mingi mokumba ya kosunga mama na ye. Ayokaki ndenge Yesu agangaki epai ya Tata na ye ntango alingaki kokufa. Mpe ayokaki maloba na ye ya nsuka oyo ezali na elonga, “Ekokisami,” oyo alobaki liboso akata motema. Atungisamaki makasi. Atako bongo, nsima ya liwa ya Yesu, emonani lokola atikalaki kaka wana. Na nsima atikalaki na lilita ya sika epai mozwi moko na nkombo Yozefe ya Arimatea atyaki nzoto ya Yesu.​—Yoane 19:30; Matai 27:45, 46, 57-61.

Ndakisa ya Maria ekundweli biso makambo oyo tokoki kosala ntango bandeko na biso bakutani na komekama makasi. Tokoki te kopekisa likambo moko ya mabe esalema to kolongola mpasi na bango. Kasi, tokoki komitya na esika na bango mpe komonisa mpiko. Kozala elongo na moninga oyo azali na mikakatano ekoki kosala ete abɔndisama. Kosunga moninga oyo azali na bosɛnga emonisaka kondima makasi mpe ekoki kobɔndisa mingi.​—Masese 17:17.

Na ntembe te, mama ya Yesu abɔndisamaki ntango azalaki elongo na Maria Magadalena

“Nakokamata ye”

Ntango batyaki nzoto ya Yesu na lilita, Maria azalaki kati ya basi oyo bamemaki matiti ya nsolo kitoko mpo bápakola na nzoto ya Yesu. (Marko 16:1, 2; Luka 23:54-56) Na nsima alamukaki na ntɔngɔ makasi ntango Sabata elekaki. Kanisá ndenge azalaki kotambola na molili na nzela elongo na basi mosusu mpo na kokende na lilita ya Yesu. Na nzela, bazalaki komituna ndenge nini bakokaki kobalola libanga ya monene oyo ezalaki na monɔkɔ ya lilita yango. (Matai 28:1; Marko 16:1-3) Atako bongo, bazongaki nsima te. Kozanga ntembe kondima na bango etindaki bango básala oyo bakokaki kosala mpe bandimaki ete Yehova mpe akosala oyo ya ye.

Ekoki kozala Maria azalaki mwasi ya liboso oyo akómaki na lilita yango. Ntango akómaki na lilita, atɛlɛmaki kaka mpe akamwaki. Libanga esí elongwe mpe lilita etikalaki mpamba! Maria azalaki mwasi oyo azalaki te kokakatana mpo na kosala likambo, yango wana azongaki mbangu mpo na kopesa Petro mpe Yoane nsango ya makambo oyo amonaki. Meká naino komona ndenge Maria abendi pema mpe alobi: “Balongoli Nkolo na lilita, mpe toyebi te soki balalisi ye wapi”! Petro mpe Yoane bakimaki mbangu na lilita mpe bamonaki ete lilita etikalaki mpamba, mpe na nsima bazongaki na bandako na bango. *​—Yoane 20:1-10.

Ntango Maria azongaki lisusu na lilita, akutaki moto moko te kuna. Na ntɔngɔ wana kimya ezalaki na lilita mpo moto moko te azalaki wana, mpe Maria abandaki kolela. Agunzamaki mpo na kotala na kati ya lilita, mpe azalaki kaka kondima te ete Nkolo azalaki te. Ayokaki mpasi makasi. Baanzelu mibale na bilamba ya mpɛmbɛ bafandaki wana! Batunaki ye: “Ozali kolela mpo na nini?” Akamwe, mpe azongeli makambo oyo ayebisaki bantoma: “Balongoli Nkolo na ngai, mpe nayebi te soki balalisi ye wapi.”​—Yoane 20:11-13.

Abalukaki, mpe mobali moko atɛlɛmaki na nsima na ye. Ayebaki ye te, akanisaki ezalaki mosali-bilanga oyo amesanaki kofanda na esika wana. Mobali yango atunaki ye na boboto nyonso boye: “Mwasi, ozali kolela mpo na nini? Ozali koluka nani?” Maria ayanolaki, “Tata, soki olongolaki ye, yebisá ngai soki olalisi ye wapi, mpe nakokamata ye.” (Yoane 20:14, 15) Meká naino kokanisa makambo Maria alobaki. Okanisi ete Maria ye moko akokaki kolongola mpe komema nzoto ya Yesu Kristo, oyo akómaki mbinga ya mobali mpe monene? Maria azwaki ata ntango ya kokanisa makambo wana te. Ayebaki ete asengelaki kosala oyo ezalaki na makoki na ye.

“Nakokamata ye”

Ntango tokutani na likambo moko ya mpasi mingi to mokakatano moko oyo elekeli biso motó, tokoki komekola ndakisa ya Maria Magadalena? Soki tozali kotya likebi kaka na bolɛmbu na biso to na makambo oyo tokokoka kosala te, yango ekoki kosala ete tóbanga mpe tólɛmba nzoto. Kasi soki tozwi ekateli ya kosala nyonso oyo tokoki kosala mpe totikeli Yehova asala oyo ya ye, tokoki kosala makambo oyo tokokaki kosanisa te. (2 Bakorinti 12:10; Bafilipi 4:13) Oyo eleki ntina, tokosepelisa Yehova. Yango nde Maria asalaki, mpe azwaki mbano na ndenge oyo akanisaki te.

“Namoni Nkolo!”

Mobali oyo atɛlɛmaki liboso ya Maria ezalaki mobateli ya elanga te. Kasi ezalaki nde mosali-mabaya, oyo azalaki mpe moteyi, mpe nkolo oyo Maria azalaki kolinga mingi. Nzokande Maria ayebaki ye te, mpe abandaki kobaluka. Maria akokaki te kokanisa ete: Yesu azongaki na bomoi lokola ekelamu ya elimo oyo azali na nguya. Mpo Yesu abimelaki ye lokola moto kasi te na nzoto oyo azalaki na yango liboso akufa. Na mikolo oyo elandaki lisekwa na ye, ntango Yesu abimelaki bato mbala mingi bazalaki koyeba te soki ezali ye, ata mpe baoyo bayebaki ye malamu.​—Luka 24:13-16; Yoane 21:4.

Yesu asalaki nini mpo Maria ayeba ete ezalaki ye? Abengaki ye kaka na nkombo na ye: “Maria!” Asutukaki, agangaki, mpe asalelaki liloba ya Ebre “Rabuni!” oyo kozanga ntembe amesanaki kosalela yango ntango nyonso azalaki kosolola na ye. Ezalaki moteyi na ye oyo azalaki kolinga mingi! Azalaki mpenza na esengo. Maria akangaki Yesu mpe alingaki kotika ye te.​—Yoane 20:16.

Yesu ayebaki makanisi na ye. Alobaki boye: “Tiká kokangama na ngai.” Tokoki kokanisa ndenge alobaki maloba yango na boboto, mbala mosusu na mwa kosɛka mpe ndenge alongolaki na boboto mabɔkɔ ya Maria na nzoto mpe akitisaki ye motema mpe alobaki na ye boye: “Namati naino epai ya Tata te.” Ntango ekokaki naino te mpo akende likoló. Azalaki naino na mosala ya kosala na mabele, mpe alingaki ete Maria asalisa ye. Na ntembe te Maria azalaki koyoka na likebi nyonso makambo nyonso oyo Yesu azalaki koloba. Alobaki na ye boye: “Kende epai ya bandeko na ngai mpe lobá na bango ete: ‘Nazali komata epai ya Tata na ngai mpe Tata na bino mpe epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino.’”​—Yoane 20:17.

Ezalaki mokumba ya ntina oyo Nkolo na ye apesaki ye! Maria azalaki moyekoli ya liboso oyo azwaki libaku ya komona Yesu ntango asekwaki, mpe sikoyo apesaki ye mokumba ya koyebisa basusu nsango yango ya malamu. Kanisá esengo mpe mposa oyo azalaki na yango ya kokende koluka bayekoli. Meká komona na makanisi ndenge abendi pema mpo na kobimisa maloba oyo esengelaki kotikala na makanisi na ye ata nsima ya ntango mingi: “Namoni Nkolo!” Ayebisaki bango makambo nyonso oyo Yesu alobaki, azalaki na esengo mpenza yango wana akómaki koloba mbangumbangu. (Yoane 20:18) Nsango oyo amemaki endimisaki makambo oyo basi mosusu bayebisaki bantoma ya Yesu na oyo etali lilita ya Yesu oyo etikalaki mpamba.​—Luka 24:1-3, 10.

“Namoni Nkolo!”

“Bandimelaki basi wana te”

Mibali yango bandimaki nsango yango? Bandimaki te mpo na mbala ya liboso. Totángi boye: “Bamonaki maloba wana lokola bilobaloba mpamba mpe bandimelaki basi wana te.” (Luka 24:11) Mibali yango oyo bazalaki na makanisi malamu bakolaki na esika oyo bazalaki kotyela basi konfianse te; na kolanda mimeseno ya Barabi, mwasi akokaki te kopesa litatoli na tribinale. Mbala mosusu bantoma batikaki ete momeseno yango etambwisa lolenge na bango ya kotalela makambo na esika ya kolanda bosolo ya makambo. Kasi Yesu ná Tata na ye batalelaka makambo bongo te. Ezali lokumu monene oyo bapesaki mwasi yango ya sembo!

Na ntembe te, Maria atikaki te ete eyano ya mibali yango elɛmbisa ye. Ayebaki ete Nkolo na ye azalaki kotyela ye motema, mpe yango ekokaki. Baoyo nyonso balandaka Yesu bazali mpe na mokumba ya komemela basusu nsango. Biblia ebengi nsango yango “nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 8:1) Yesu alakaki bayekoli na ye te ete moto nyonso akondima bango to akozwa na valɛrɛ na mosala na bango. Ezali bongo te. (Yoane 15:20, 21) Ekozala malamu bakristo bákanisaka lisolo ya Maria Magadalena. Ata soki bayekoli mosusu bandimelaki ye mbala moko te, atikaki te ete yango elongola ye esengo ya kopesa bango nsango etali lisekwa ya Yesu!

Na ntango moko boye, Yesu abimelaki bantoma na ye mpe na nsima ebimelaki ebele ya bayekoli na ye. Lisusu, abimelaki bayekoli koleka 500 na mbala moko! (1 Bakorinti 15:3-8) Na ntembe te, kondima ya Maria Magadalena ekómaki makasi mbala nyonso oyo Yesu abimelaki bayekoli na ye, ezala amonaki to ayokaki nsango ete abimelaki basusu. Ekoki kozala ete Maria Magadalena azalaki moko ya basi oyo bazalaki na kati ya bayangani oyo bazalaki na likita na Yerusaleme na mokolo ya Pantekote ntango elimo santu ekitelaki bayekoli ya Yesu oyo bayanganaki kuna.​—Misala 1:14, 15; 2:1-4.

Ezala ndenge nini, tozali na ntina monene ya kondima likambo oyo: Maria Magadalena abatelaki kondima na ye tii na nsuka. Tiká ete mokomoko na biso azala na ekateli ya kosala mpe bongo! Tokomekola kondima ya Maria Magadalena soki tozali komonisa botɔndi na oyo nyonso Yesu asalá mpo na biso mpe tozali kosalela basusu na komikitisa nyonso wana tozali kotya motema ete Nzambe akosunga biso.

^ par. 11 Emonani lokola Maria alongwaki na lilita liboso ya basi mosusu oyo bazalaki elongo na ye oyo bakutanaki na anzelu moko oyo ayebisaki bango ete Yesu asekwi. Soki bongo te, Maria alingaki koyebisa Petro mpe Yoane ete anzelu moko ayebisaki ntina oyo nzoto ya Yesu ezalaki te na lilita.​—Matai 28:2-4; Marko 16:1-8.