Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge oyo tosalelaka ba cookie to mayele mosusu ya ndenge wana

Ndenge oyo tosalelaka ba cookie to mayele mosusu ya ndenge wana

Ndenge kaka ezalaka na basite mingi, soki okɔti na site oyo, tokoki mpe kosalela ba cookie, ba pixel espion to mayele mosusu ya ndenge wana mpo na kotya mwa makambo na telefone, tablɛti, to ordinatɛrɛ na yo. Na Malako oyo, tosaleli liloba cookie mpo na kolobela makambo mingi, ezala mpe mayele mosusu ya ndenge wana oyo babengi stockage local. Ba cookie esalisaka site oyo esala malamu mpe eyebisaka biso ndenge oyo bato basalelaka site na biso. Yango esalisaka biso tóbongisa site na biso. Tolukaka te koyeba moto nani akɔtaki na site na biso, lobá soki moto ye moko andimi kotondisa formilɛrɛ mpo na koyebisa biso makambo na ye.

Ba cookie. Ba cookie ezali ndenge na ndenge mpe ekokisaka misala ekeseni; mbala mingi, yango esalaka ete osepela lisusu kosalela site na biso. Tokoki kosalela yango mpo na koyeba soki okɔtá na site oyo liboso to mpo na kobomba makambo oyo oponaka ntango ozali kosalela site oyo. Na ndakisa, tokoki kosalela cookie moko mpo na kobomba monɔkɔ oyo oponaki mpo ete, ntango okokɔta lisusu na site oyo, ebimisela yo mbala moko monɔkɔ yango. Tosalelaka ba cookie mpo na kolakisa bapiblisite te.

Ezali na mitindo misato ya ba cookie oyo site oyo esalelaka:

  1. Ba cookie oyo ekoki kozanga te. Yango ezali na ntina mingi mpo na kopesa yo nzela ya kosalela makambo mosusu ya site oyo, na ndakisa kokɔta na kɔnti na yo to kotinda baformilɛrɛ. Soki yango te, okokoka te kosala makambo mosusu oyo osɛngi, na ndakisa kopesa makabo na nzela ya Internet. Epesaka biso mpe nzela ya kosalisa yo na likambo moko oyo osɛngi biso ntango ozali kosalela site na biso. Ba cookie yango ekozwa makambo na yo te, oyo tokoki kosalela mpo na kosɛnga yo osomba eloko boye to boye to mpo na koyeba bisika oyo okɔtaki na Internet.

  2. Ba cookie mpo na makambo oyo osalelaka. Tosalelaka yango mpo na kobomba makambo oyo oponaki (na ndakisa nkombo mpo na kokɔta na kɔnti na yo, monɔkɔ to mboka na bino) mpe koyebisa yo makambo ya sika mpo osepela lisusu kosalela site na biso.

  3. Ba cookie mpo na koyeba makambo. Tosalelaka yango mpo na koyeba ndenge bato basalelaka site oyo, na ndakisa motángo na bango mpe ntango oyo baumelaka soki bakɔti na site oyo. Tosalelaka makambo wana kaka mpo na kobongisa ndenge oyo site oyo esalaka.

Ba cookie mingi oyo tosalelaka ezali ya biso moko, oyo site na biso moko etya. Ba cookie mosusu ezali ya biso te, kasi basite mosusu nde etyaka yango. Na liste ya cookie oyo tozali na yango, tomonisi polele ba cookie ya basite mosusu

Ba pixel espion. Totyaka na bisika mosusu ya site na biso mwa badosye mike ya elektroniki babengi pixel espion mpo na koyeba makambo ozali kosala na site na biso, na ndakisa ntango okɔti na esika boye to boye. Tosalelaka ba pixel espion mpo na kolandela makambo bato bazali kosala na site na biso mpe soki site na biso ezali kosala malamu.

Kosalela baadrɛsi IP. Adrɛsi IP ezali kode ya mitángo oyo ezali lokola nkombo ya ordinatɛrɛ na yo na Internet. Tosalelaka yango mpe navigateur oyo ozali kosalela mpo na kotalela ndenge osalelaka mingi site na biso, koluka koyeba mikakatano okutanaka na yango na site oyo mpe kobongisa lisusu makambo na site na biso. Ata soki tozali na adrɛsi IP na yo, elakisi te toyebi yo, lobá se soki oyebisi biso makambo na yo mosusu.

Oyo oponi. Soki okɔtaki na site na biso, totindaki ba cookie na biso na navigateur na yo mpe efandi na ordinatɛrɛ na yo. Soki ondimi kosalela site na biso, yango elakisi ete ondimi kosalela ba cookie mpe mayele mosusu ya ndenge wana. Soki olingi kolongola yango, okoki kosala yango na ba paramètre ya navigateur na yo. Kasi, yebá ete soki ba cookie ezali te, ntango mosusu okokoka te kosalela makambo nyonso ya site na biso. Navigateur na navigateur ezali na ndenge na yango ya kolongola ba cookie. Okoki kotánga malako nyonso na Aide (lisalisi) ya navigateur na yo.

Poná site moko kati na oyo etyami awa na nse mpo na komona bandakisa ya ndenge oyo tosalelaka ba cookie na site yango.

Talá mpe Ba cookie mpe teknoloji ya ndenge wana oyo basite na biso esalelaka.