Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mwa banɔti na nse ya masini ya kosukola bilamba

Mwa banɔti na nse ya masini ya kosukola bilamba

 Nsima ya kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova, Zarina alongwaki na Russie mpe azongaki mboka na ye na Asie Centrale. Azalaki na ekateli ya kobɔkɔla bana na ye mibale ya basi na mateya oyo akómaki kondima. Lokola azalaki na mbongo mpenza te, akendaki kofanda na apartema moko oyo baboti na ye mpe ndeko na ye ya mobali ná mwasi na ye bazalaki kofanda. Baboti na ye bayebisaki ye ateya bana na ye makambo ya Biblia te. Bayebisaki mpe bana na ye básolola makambo ya Biblia te ná mama na bango.

 Zarina akanisaki mpenza ndenge oyo akoki kosalisa bana na ye báyekola makambo ya Yehova. (Masese 1:8) Yango wana abondelaki na motema mobimba, asɛngaki Yehova atambwisa ye mpe apesa ye bwanya. Na nsima, Zarina asalaki makambo oyo eyokani na libondeli na ye; akómaki kokende kotambola elongo na bana na ye mpe nzelanzela azalaki kosolola na bango na ntina etali biloko ya kokamwa oyo Nzambe akelá. Kotambola elongo esalisaki bana na ye báluka koyeba lisusu mingi makambo etali Mozalisi.

 Na nsima, Zarina asalelaki mayele mosusu mpo na koteya bana na ye makambo mingi na lisalisi ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? * Azalaki kokoma baparagrafe mpe mituna oyo ezalaki na buku yango na biteni ya bapapye. Azalaki mpe kobakisa bafraze mosusu mpo na kosalisa bana na ye bákanga mpenza ntina ya mateya yango. Na nsima, azalaki kobomba biteni ya bapapye yango ná krɛyo na nse ya masini ya kosukola bilamba. Soki bana bazali na ndako, bazalaki kotánga baparagrafe yango mpe kokoma biyano na bango na nse.

 Mayele yango esalisaki Zarina ayekola na bana na ye mikapo mibale ya buku Biblia eteyaka liboso bango misato bázwa ndako na bango moko. Kuna, akómaki na bonsomi ya koteya bana na ye kozanga ete moto mosusu apekisa ye. Na sanza ya 10/2016, bana na ye nyonso mibale bazwaki batisimo mpe bazali na esengo ndenge mama na bango asalelaki bwanya mpe mayele mpo na koteya bango makambo ya Nzambe.

^ Lelo oyo bato mingi bakómi kosalela buku Makambo oyo Biblia eteyaka