Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova Bapesaki eyano ya boboto ntango basango oyo bazalaki na nkanda batumbolaki bango

Batatoli ya Yehova Bapesaki eyano ya boboto ntango basango oyo bazalaki na nkanda batumbolaki bango

 Artur, mokɛngɛli ya zongazonga moko na Armérnie, akendaki kotala lisangá moko ya Batatoli ya Yehova. Mokɛngɛli yango ayaki koyeba ete bandeko basalaki naino te mosala ya kosala bisika ya bato mingi, oyo esɛngaka kosalela bashario mpo na kotya mikanda. Mpo na kolendisa lolenge wana ya kopesa litatoli, Artur mpe mwasi na ye, Anna, elongo na Motatoli ya Yehova mosusu na nkombo Jirayr, batyaki shario ya mikanda na engumba moko moke. Baponaki esika moko bato bazalaki koleka mingi.

 Baleki nzela bamonisaki mbala moko ete bazali kosepela mpe kozwa mikanda. Kasi eumelaki te, lolenge wana ya sika ya kopesa litatoli ebendaki likebi ya batɛmɛli na biso. Basango mibale bapusanaki pene ya shario, mpe moko na bango, kozanga kokebisa, abɛtaki shario na lokolo mpe mikanda esopanaki. Na nsima abɛtaki Artur mbata na elongi, mpe akweisaki linɛti na ye na nse. Artur, Anna, mpe Jirayr balukaki kokitisa basango yango motema, kasi esimbaki te. basango yango banyataki shario na nkanda mpenza mpe bapanzaki mikanda. Nsima ya kofinga mpe kotumola Batatoli ya Yehova, nsukansuka bakendaki.

 Artur, Anna, mpe Jirayr bakendaki kofunda likambo yango na biro ya polisi. Bayebisaki bakonzi mpe bapolisi makambo oyo elekaki mpe basakwelaki bango na mokuse. Bamemaki Batatoli ya Yehova wana misato epai ya komanda ya bapolisi. Ya liboso, komanda alingaki koyeba ndenge makambo esalemaki. Kasi ntango komanda amonaki ete Artur, mbinga ya mobali aboyaki kozongisa makofi oyo babɛtaki ye, atikaki kotunatuna bango mituna mpe abandaki kotuna mituna mpo na koyeba makambo oyo Batatoli ya Yehova bandimaka. Yango esalaki ete básolola na boumeli ya ngonga minei ná ndambo! Komanda yango akamwaki mpenza mpo na makambo oyo ayokaki mpe alobaki boye: “Lingomba nini kitoko boye! Ngai mpe nalingi kosambela kuna!”

Artur and Anna

 Mokolo elandi, ntango Artur azongaki lisusu kopesa litatoli na bisika ya bato mingi, mobali moko oyo amonaki likambo oyo elekaki ayaki kosolola na ye. Mobali yango apesaki ye longonya ndenge afandaki kimya mpe azongisaki mabe na mabe te. Abakisi ete makambo oyo amonaki etindi ye apesaka lisusu basango limemya te.

 Na mpokwa yango, komanda ya polisi asɛngaki na Artur azonga lisusu. Kasi na esika komanda atuna ndenge makambo elekaki, atunaki mituna mosusu etali Biblia. bapolisi mibale mpe bayaki koyoka masolo na bango.

 Mokolo oyo elandi, Artur azongaki lisusu kotala komanda yango, mbala oyo, Artur alakisaki bavideo oyo ezali na masolo ya Biblia. komanda yango ebengaki bapolisi mosusu mpo bango mpe bátala bavideo yango.

 Mpo na etamboli mabe ya basango esali ete litatoli epesama epai ya bapolisi mingi mpo na mbala ya liboso. Yango esalisaki bango bázala na makanisi ebongi mpo na Batatoli ya Yehova.