Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakendaka etumba te?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakendaka etumba te?

 Tokendaka etumba te mpo na bantina oyo elandi:

  1.   Totosaka Nzambe. Biblia elobi ete basaleli ya Nzambe basengeli ‘kotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli’ mpe basengeli koyekola etumba lisusu te.​—Yisaya 2:4.

  2.   Totosaka Yesu. Yesu ayebisaki ntoma Petro ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:52) Na yango, Yesu amonisaki ete bayekoli na ye bakoki kosimba mandoki te.

     Bayekoli ya Yesu batosaka etinda oyo Yesu apesaki bango ete basengeli ‘kozala bato ya mokili te,’ elingi koloba basengeli te kokɔta na makambo ya politiki. (Yoane 17:16) Basalaka mobulu te mpo na koboya ete basoda ya ekólo na bango bákende etumba, mpe bapekisaka te bato oyo baponi kokóma basoda.

  3.   Tolingaka bato. Yesu atindaki bayekoli na ye bálinganaka. (Yoane 13:34, 35) Na ndenge yango, bakokóma lisangá ya bandeko na mokili mobimba oyo ata mokolo moko te moto akokende etumba mpo na kobundisa ndeko na ye na mokili mosusu.​—1 Yoane 3:10-12.

  4.   Tolandaka ndakisa ya bakristo ya liboso. Buku moko (Encyclopedia of Religion and War) elobi ete “bayekoli ya liboso ya Yesu baboyaki etumba mpe mosala ya soda,” mpo bazalaki komona ete makambo yango “eyokani te na bolingo oyo Yesu amonisaki mpe na etinda oyo apesaki ete moto asengeli kolinga banguna na ye.” Ndenge moko mpe, Peter Meinhold, mwana-mboka Allemagne mpe moto ya teoloji, alobaki mpo na bayekoli ya Yesu ete: “Moko te akokaki kozala mokristo mpe kozala soda.”

Tosalisaka Leta

 Batatoli ya Yehova bazalaka bana-mboka ya malamu mpe babebisaka kimya te na ekólo oyo bafandi. Batosaka bakonzi ya Leta, na kolanda mitindo ya Biblia oyo elandi:

  •   “Moto nyonso asengeli kotosa bakonzi ya leta.”​—Baroma 13:1, Bible na lingala ya lelo oyo.

  •   “Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.”​—Matai 22:21.

 Na yango, totosaka mibeko ya Leta, tofutaka mpako, mpe tosalaka makambo oyo guvɛrnema elobi ete esengeli kosalema mpo na bolamu ya bato nyonso.