Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova basanganaka mpe ná mangomba mosusu mpo na kosambela?

Batatoli ya Yehova basanganaka mpe ná mangomba mosusu mpo na kosambela?

 Biso Batatoli ya Yehova, tosepelaka kosolola makambo ya losambo na bato ya mangomba nyonso, kasi tosanganaka ná mangomba mosusu te mpo na kosambela. Biblia elobaka ete Bakristo ya solo bazali “liboke moko na boyokani” mpe eloko esangisaka bango bongo ezali bomoko na makambo oyo bandimaka. (Baefese 4:16; 1 Bakorinti 1:10; Bafilipi 2:2) Yango esuki kaka te na kondima ete bizaleli lokola bolingo, boboto mpe kolimbisa ezali malamu. Mateya ya lingomba na biso eutaka na Biblia, kondima na biso esimbami nde na mateya wana.​—Baroma 10:2, 3.

 Biblia emonisi ete kosangisa losambo ná mangomba mosusu ezali malamu te, mpe ekoki kobebisa kondima ya mokristo. (2 Bakorinti 6:14-17) Yango wana, Yesu aboyaki ete bayekoli na ye basanganaka na basusu mpo na losambo. (Matai 12:30; Yoane 14:6) Ndenge moko mpe, Mibeko oyo Nzambe apesaki Moize, epekisaki Bayisraele básangisa losambo ná bikólo mosusu. (Kobima 34:11-14) Ata na nsima, Bayisraele ya sembo baboyaki lisalisi ya bikólo mosusu mpo ekokaki kosala ete básangana na makambo ya losambo.​—Ezera 4:1-3.

Batatoli ya Yehova basololaka na bato ya mangomba mosusu?

 Ɛɛ. Na ndakisa, na 2023 tolekisaki bangonga 1 791 490 713 mpo na kosolola na bato ya mangomba mosusu. Ndenge moko na Ntoma Paulo, tosepelaka koyoka makanisi mpe bindimeli ya “bato mingi koleka” na mosala na biso. (1 Bakorinti 9:19-22) Na masolo na biso, tosalaka makasi tósalela toli ya Biblia oyo esɛngaka komonisela basusu “limemya makasi.”​—1 Petro 3:15.